Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Hear, Israel: today you cross the Jordan to go in and drive out nations greater and stronger than you—great cities fortified to the sky. Oh Isalaele, yoka malamu ! Okomi sik’oyo pene ya kokatisa Yordani mpo na kokota mpe kobengana bikolo oyo eleki yo na monene mpe na makasi, bikolo oyo evandaka kati na bingumba minene oyo ezali na bamir batonga makasi mpe ekenda kino na likolo.
2 A large, tall people, the descendants of the Anakim, whom you know and of whom you have heard it said: "Who can stand against Anak's sons?" Bato yango bazali makasi mpe bingambe, bana ya Anaki ! Oyebi bango mpe osila koyoka bato koloba na tina na bango : « Nani akoki kotelema liboso ya bana ya Anaki ? »
3 Know today: your Father crosses ahead of you as a consuming fire. He will destroy them and subdue them before you; you will drive them out and wipe them out quickly, as your Father told you. Kasi lelo, yeba malamu ete Yawe, Nzambe na yo, azali Ye moko kotambola liboso na yo lokola moto oyo ezikisaka ; akobebisa bango mpe akobuka bango liboso na yo ; bongo yo okokamata mabele na bango mpe okosilisa bango noki-noki, ndenge Yawe alakaki yo.
4 After your Father drives them out before you, don't say in your heart, "Because of my righteousness our Father brought me in to possess this land"—it's because of these nations' evil that he's driving them out before you. Tango Yawe, Nzambe na yo, akosilisa kobengana bango liboso na yo, komilobela te kati na motema na yo : « Ezali mpo na bosembo na ngai nde Yawe amemaki ngai mpo ete nakamata mokili oyo. » Te, ezali bongo te ! Ezali nde mpo na mabe ya bikolo yango nde Yawe abengani yango liboso na yo.
5 Not for your righteousness or your heart's integrity are you entering to take their land, but for these nations' evil your Father drives them out before you, and to keep the word your Father swore to your fathers—Abraham, Isaac, and Jacob. Ezali te mpo na bosembo na yo to mpo ete otambolaki alima nde okokota mpo na kozwa mokili na bango, kasi ezali solo mpo na mabe ya bikolo yango nde Yawe, Nzambe na yo, akobengana yango liboso na yo, mpo na kokokisa ndayi oyo alapaki epai ya bakoko na yo Abrayami, Izaki mpe Jakobi.
6 Know then: your Father gives you this good land to own, not for your righteousness, since you are a stubborn people. Boye sosola malamu ete ezali te mpo na bosembo na yo nde Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo mokili oyo ya malamu mpo ete okamata yango, pamba te yo mpe ozali libota ya batomboki.
7 Remember, don't forget how you angered your Father in the wilderness. From the day you left Egypt until you reached this place, you've rebelled against your Father. Kanisaka malamu likambo oyo mpe kobosanaka te ndenge nini opelisaki kanda ya Yawe, Nzambe na yo, kati na esobe : banda mokolo oyo bobimaki wuta na Ejipito kino bokomaki na esika oyo, bozalaki kaka kotosa Yawe te.
8 At Horeb you angered your Father, and your Father was so angry with you that he was ready to destroy you. Na ngomba Orebi, bopesaki Yawe kanda makasi mpe asilikelaki bino makasi kino akomaki na posa ya kobebisa bino.
9 When I climbed the mountain to receive the stone tablets, the covenant tablets your Father made with you, I stayed on the mountain forty days and forty nights, eating no bread and drinking no water. Tango namataki likolo ya ngomba mpo na kozwa bitando ya mabanga ya boyokani oyo Yawe asalaki elongo na bino, natikalaki likolo ya ngomba mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei ; naliaki lipa te mpe namelaki mayi te.
10 Your Father gave me the two stone tablets, written by his finger, bearing all the words he spoke with you on the mountain from inside the fire, on the day of the assembly. Yawe apesaki ngai bitando mibale ya mabanga oyo mosapi ya Nzambe ekomaki. Na likolo na yango, ezali na mibeko nyonso Yawe oyo ayebisaki bino likolo ya ngomba longwa kati na moto, na mokolo oyo bosanganaki.
11 After forty days and forty nights, your Father gave me the two stone tablets, the tablets of the covenant. Na suka ya mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, Yawe apesaki ngai bitando yango mibale ya mabanga ya boyokani.
12 Then your Father told me, "Get up, hurry down from here, for your people you brought out of Egypt have ruined themselves. They quickly turned from the way I commanded them; they made themselves a cast idol." Bongo Yawe alobaki na ngai : « Kende, kita mbangu na ngomba oyo, pamba te bato na yo, oyo obimisaki na Ejipito bamikomisi mbindo ; bapesi noki mokongo na mibeko oyo napesaki bango mpe bamisaleli ekeko ya ebende banyangwisa na moto. »
13 Furthermore, your Father said to me, "I have seen this people—they are a stubborn people. Mpe Yawe alobaki na ngai : « Natali malamu bato oyo ; bazali penza libota ya batomboki !
14 Leave me alone; I will destroy them, erase their name from under heaven, and make you a nation stronger and more numerous than they." Tika Ngai kosala : nakobebisa bango mpe nakolimwisa bakombo na bango kati na mokili, kasi nakokomisa yo ekolo ya nguya mpe ya bato ebele koleka bango. »
15 So I turned and came down the mountain while it burned with fire, the two covenant tablets in my two hands. Bongo nabalukaki mpe nakitaki wuta na ngomba oyo ekomaki kopela moto ; nasimbaki na maboko na ngai bitando mibale ya mabanga ya boyokani.
16 When I looked, I saw you had sinned against your Father: you had made yourselves a cast calf, turning quickly from the way your Father commanded you. Tango natalaki, namonaki ete bosalaki solo masumu epai na Yawe, Nzambe na bino : bomisalelaki ekeko ya mwana ngombe ya ebende banyangwisa na moto ; bopengwaki noki na nzela oyo Yawe atindaki bino.
17 So I grabbed the two tablets, threw them from my hands, and shattered them before your eyes. Boye, nazwaki bitando yango mibale ya mabanga, nabwakaki yango wuta na maboko na ngai mpe napanzaki yango na biteni na miso na bino.
18 I fell before your Father as before, forty days and forty nights, eating no bread, drinking no water, because of all your sin you committed, doing evil in your Father's eyes, provoking him. Bongo nakweyaki mbala moko liboso ya Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, naliaki lipa te mpe namelaki mayi te mpo na lisumu monene oyo bosalaki wana bosalaki mabe na miso ya Yawe mpe, na bongo, bopesaki Ye kanda.
19 For I feared the anger and burning rage your Father held against you, ready to destroy you. But your Father listened to me then too. Nabangaki kanda mpe kotomboka ya Yawe, pamba te asilikelaki bino makasi kino akomaki na posa ya kobebisa bino ; kasi Yawe ayokelaki ngai lisusu.
20 Your Father was very angry with Aaron, ready to destroy him, so I prayed for Aaron then too. Yawe asilikelaki mpe Aron makasi kino alingaki koboma ye ; kasi na tango wana, nabondelaki mpe mpo na Aron.
21 I took your sin, the calf you made, burned it in fire, crushed it, ground it thoroughly until fine as dust, then threw its dust into the stream running down from the mountain. Nazwaki lisusu eloko oyo ememisaki bino masumu, ekeko ya mwana ngombe oyo bosalaki, natumbaki yango na moto, natutaki mpe nanikaki yango malamu kino ekomaki putulu ; mpe nabwakaki putulu yango na mayi oyo ezalaki kotiola wuta na ngomba.
22 At Taberah also, and at Massah, and at Kibroth-hattaavah you provoked your Father to wrath. Na Tabeera, na Masa, na Kibiroti-Atava, bokobaki kaka kopesa Yawe kanda.
23 When your Father sent you from Kadesh-barnea saying, "Go up, take the land I gave you," you rebelled against your Father's command, not believing him or obeying his voice. Mpe tango Yawe alingaki ete bolongwa na Kadeshi-Barinea, apesaki bino mitindo : « Bokende ! Bokamata mokili oyo napesi bino. » Kasi botosaki te mitindo ya Yawe, Nzambe na bino ; botiaki elikya te kati na Ye mpe botosaki Ye te.
24 You have been rebellious against your Father from the day I knew you. Wuta mokolo oyo nayeba bino, botikala te kotosa Yawe.
25 So I fell before your Father those forty days and forty nights I lay there, because your Father had said he would destroy you. Nakweyaki liboso ya Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, pamba te Yawe azalaki koloba ete akoboma bino.
26 I prayed to your Father, "My Sovereign Father, do not destroy your people, your heritage, whom you redeemed by your greatness and brought out of Egypt with a strong hand. Nabondelaki Yawe mpe nalobaki : « Nkolo Yawe, kobebisa bato na Yo te, bazali libula na Yo moko oyo osikolaki na nguya monene na Yo mpe obimisaki na Ejipito na loboko na Yo ya nguya.
27 Remember your servants Abraham, Isaac, and Jacob. Don't look at this people's stubbornness, their evil, their sin. Kanisa basali na Yo Abrayami, Izaki mpe Jakobi ! Kotala te botomboki ya bato oyo, mabe na bango mpe masumu na bango ;
28 Otherwise the people of the land you brought us from will say, 'God couldn't bring them into the land he promised them, and he hated them, so he brought them out to kill them in the wilderness.' noki te bato ya mokili oyo longwa kuna obimisaki biso, bakoloba : ‹ Ezali mpo ete Yawe azalaki na makoki te ya kokotisa bango na mokili oyo alakaki bango to ezali mpo ete azalaki koyina bango, yango wana abimisaki bango wuta na Ejipito mpo na koboma bango na esobe. ›
29 For they are your people, your inheritance, whom you brought out by your great power and extended arm." Nzokande bazali bato na Yo mpe libula na Yo, oyo obimisaki na nguya monene na Yo mpe na loboko na Yo ya nguya. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]