Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joshua 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 After Moses our Father's servant died, our Father told Joshua son of Nun, Moses' assistant: Sima na kufa ya Moyize, mowumbu na Yawe, Yawe alobaki na Jozue, mwana mobali ya Nuni, mosungi ya Moyize :
2 "Moses my servant is dead. Now get up, cross the Jordan, you and all these people, into the land I am giving them, the children of Israel. « Moyize, mowumbu na Ngai, asili kokufa. Sik’oyo, yo elongo na bato oyo nyonso, bobongama mpo na kokatisa ebale Yordani mpe kokota na mokili oyo nakopesa bana ya Isalaele.
3 Every place where you set foot I have given to you, just as I promised Moses. Nakopesa bino esika nyonso oyo matambe ya makolo na bino ekonyata, ndenge nalakaki Moyize.
4 Your territory will run from the wilderness and this Lebanon to the great river Euphrates—all the Hittite land—and to the Great Sea toward the sunset. Mokili na bino ekozala longwa na esobe kino na bangomba ya Libani oyo bozali komona, mpe longwa na Ebale monene, ebale Efrate, mokili nyonso ya bato ya Iti kino na Ebale monene, na ngambo ya weste : yango nde ekozala mokili na bino.
5 No one will stand against you all your life. As I was with Moses, I will be with you; I will not leave or abandon you. Na mikolo nyonso ya bomoi na yo, moto moko te akolonga kotelemela yo. Ndenge nazalaki elongo na Moyize, ndenge wana mpe nakozala elongo na yo ; nakotika yo te mpe nakosundola yo te.
6 "Be strong and courageous, for you will lead these people to inherit the land I swore to their ancestors I would give them. Zala makasi mpe yika mpiko, pamba te yo nde okokamba bato oyo mpe okopesa bango mokili oyo nalakaki kopesa lokola libula epai ya batata na bango na nzela ya ndayi.
7 Only be strong and very courageous, careful to obey all the law Moses my servant commanded you. Do not turn from it right or left, so you may succeed wherever you go. Kasi zala makasi mpe yika mpiko, sala keba ete otosa mibeko nyonso oyo Moyize, mowumbu na Ngai, apesaki yo ; komeka te kobima libanda na yango, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, mpo ete okoka kolonga na makambo nyonso oyo okosala.
8 Never let this Book of the Law leave your lips; think on it day and night, to carefully do all written in it. Then your way will thrive and you will succeed. Sala ete maloba ya buku oyo ya Mobeko ewumela tango nyonso na monoko na yo ; tangaka mpe kanisaka yango butu mpe moyi, mpo ete osala kolanda nyonso oyo ekomami kati na yango. Na bongo nde okokende liboso mpe okolonga kati na misala na yo nyonso.
9 Have I not commanded you? Be strong and courageous. Do not fear or be discouraged, for I, your Father, am with you wherever you go." Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. »
10 Then Joshua commanded the officers of the people: Jozue apesaki mitindo epai ya bakambi ya bato :
11 "Go through the camp and command the people: 'Prepare provisions, for in three days you cross the Jordan to enter and take the land your Father is giving you to possess.'" « Botambola kati na molako mpe boloba na bato : ‹ Bobongisa bilei na bino, pamba te sima na mikolo misato, bokokatisa ebale Yordani na esika oyo mpo na kokende kobotola mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bino. › »
12 To the Reubenites, the Gadites, and the half-tribe of Manasseh, Joshua said: Kasi Jozue alobaki na bato ya libota ya Ribeni, na bato ya libota ya Gadi, mpe na bato ya ndambo ya libota ya Manase :
13 "Remember what Moses, our Father's servant, commanded you: 'Your Father is giving you rest and will give you this land.' — Bobosana te Mobeko oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, apesaki bino : « Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino bopemi mpe mabele oyo. »
14 Your wives, children, and livestock stay in the land Moses gave you east of the Jordan; but all you warriors cross over armed ahead of your brothers to help them, Kaka basi, bana mpe bibwele na bino nde bakoki kotikala na mabele oyo Moyize apesaki bino na ngambo ya este ya Yordani. Kasi bilombe na bino nyonso ya etumba basengeli kolata bibundeli, kokatisa mpe kotambola liboso ya bandeko na bino. Bokosunga bandeko na bino
15 until our Father gives your brothers rest, as he gave you, and they too take the land he is giving them. Then return to your own land and take it—the land Moses, our Father's servant, gave you beyond the Jordan toward the sunrise." kino Yawe akopesa bango mpe bopemi ndenge asalaki mpo na bino, mpe kino tango bango mpe bakobotola mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bango. Na sima na yango nde bokoki kozonga mpe kovanda na mabele na bino moko, mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bino na ngambo ya este ya Yordani, na ngambo oyo moyi ebimelaka.
16 They answered Joshua, "All you have commanded us we will do, and wherever you send us we will go. Bazongiselaki Jozue : — Tokosala nyonso oyo okotinda biso mpe tokokende esika nyonso oyo okotinda biso.
17 As we obeyed Moses in everything, we will obey you. Only may your Father be with you, as he was with Moses. Ndenge totosaki Moyize na makambo nyonso, ndenge wana mpe tokotosa yo. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na Moyize !
18 Anyone who rebels against your command and disobeys your words, whatever you command, must be put to death. Only be strong and courageous." Moto nyonso oyo akotombokela mitindo na yo to akotosa te maloba na yo na likambo nyonso oyo okotinda, akokufa. Tika ete ozala makasi mpe oyika mpiko !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]