Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joshua 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Joshua son of Nun quietly sent two men from Shittim as spies: "Go, scout the land, especially Jericho." They went, entered the house of a prostitute named Rahab, and stayed there. Wuta na Shitimi, Jozue, mwana mobali ya Nuni, atindaki na nkuku banongi mibale ; alobaki na bango : — Bokende kononga mokili, mingi-mingi Jeriko. Boye, bakendeki mpe bakotaki na ndako ya mwasi moko ya ndumba, Raabi, mpe bavandaki kuna.
2 The king of Jericho was told, "Men came here tonight from the Israelites to scout the land." Bayebisaki mokonzi ya Jeriko : — Tala, bato moko kati na bana ya Isalaele bayaki awa na butu mpo na kononga mokili.
3 Jericho's king sent to Rahab: "Bring out the men who came to you and entered your house, for they came to scout the whole land." Boye, mokonzi ya Jeriko atindaki maloba oyo epai ya Raabi : — Bimisa mibali oyo bayaki epai na yo mpe bakotaki na ndako na yo, pamba te bayei nde mpo na kononga mokili mobimba.
4 But the woman had taken the two men and hidden them, and said, "Yes, the men came to me, but I didn't know where they were from. Kasi mwasi yango akamataki mibali wana mibale mpe abombaki bango. Alobaki : — Solo, mibali bayaki epai na ngai, kasi nayebaki te esika bango bawutaki.
5 At dark, as the gate was closing, the men left. I don't know where the men went. Chase them quickly, since you'll catch them." Bakendeki na pokwa na tango oyo bakangaka ekuke ya engumba. Nayebi mpe te soki bakendeki na nzela nini. Bolanda bango noki. Bokoki solo kokanga bango.
6 But she had brought them up to the roof and hidden them in her flax stalks laid there. Nzokande amatisaki bango likolo ya mwanza ya ndako mpe abombaki bango na se ya matiti oyo basalelaka bilamba ya lino, oyo atiaki likolo ya mwanza.
7 The men chased them on the Jordan road to the fords, and once the pursuers left, the gate was shut. Bongo, batindami ya mokonzi babimaki mpo na kolanda banongi na nzela oyo ekenda kino na esika oyo bakatiselaka ebale Yordani na makolo. Tango kaka batindami yango babimaki na engumba, bakangaki mpe mbala moko ekuke.
8 Before the spies lay down for the night, Rahab came up to them on the roof, Na butu, liboso ete banongi balala, Raabi amataki likolo ya mwanza
9 and said to them, "I know the LORD has given you the land, that dread of you fell on us, and all living in the land melt away before you. mpe alobaki na bango : — Nayebi ete Yawe apesi mokili oyo na maboko na bino. Tozali na somo makasi mpo na bino mpe bavandi nyonso ya engumba oyo bazali kolenga na somo likolo na bino.
10 We heard how the LORD dried up the Red Sea before you when you left Egypt, and what you did to Sihon and Og, the two Amorite kings east of the Jordan, whom you devoted to destruction. Toyokaki ndenge nini Yawe akawusaki Ebale monene ya Barozo liboso na bino tango bobimaki na Ejipito, mpe makambo oyo bosalaki Sikoni mpe Ogi, bakonzi mibale ya bato ya Amori, oyo bobomaki penza na ngambo ya este ya Yordani.
11 We heard, our hearts melted, no courage left in anyone because of you, for the LORD your God is God in heaven above and earth below. Tango toyokaki sango yango, mitema na biso ebukanaki mpe makasi ya moko na moko kati na biso esilaki likolo na bino, pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya likolo, kuna penza na lola, mpe Nzambe ya se, awa na mabele.
12 Now swear to me by the LORD: since I showed you kindness, show kindness to my father's house too. Give me a reliable sign, Boye sik’oyo, bolapa ndayi liboso na ngai na Kombo na Yawe ete bokosalela libota na ngai bolamu ndenge ngai nasaleli bino. Bopesa ngai elembo ya solo ;
13 to spare the lives of my father, mother, brothers, sisters, and all who belong to them, and rescue us from death." elembo oyo ekolakisa ete bokobikisa bomoi ya tata mpe ya mama na ngai, ya bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi mpe ya bato nyonso oyo bavandaka elongo na bango, mpe lisusu ete bokobikisa biso na kufa.
14 "Our lives for yours!" the men said to her. "If you do not report what we are doing, then when our Father gives us the land, we'll show you kindness and faithfulness." Banongi bayebisaki ye : — Solo, tolapi ndayi, tokondima kokufa mpo na bino soki olobi te makambo oyo tozali kosala. Tokosalela bino bolamu mpe ngolu tango Yawe akopesa biso mokili oyo.
15 She lowered them by rope through the window, since her house was in the city wall—she lived in the wall. Boye, Raabi abimisaki bango na lininisa mpe akitisaki bango na singa, pamba te ndako oyo azalaki kovanda ezalaki ya kokangama na eteni ya mir ya engumba.
16 She said, "Go to the hills, or pursuers will meet you. Hide there three days until they return, then go your way." Alobaki na bango : — Bokende na nzela ya bangomba ya mikuse mpo ete bato oyo bazali kolanda bino bamona bino te. Bobombama kuna mikolo misato kino tango bakozonga, bongo nde bokoki kokoba nzela na bino.
17 The men said to her, "We will be free from this oath you have made us swear, Banongi balobaki na ye : — Tokozala na ngambo te na ndayi oyo olapisi biso
18 unless, when we enter the land, you tie this scarlet cord in the window you lowered us through, and gather your father, mother, brothers, and all your father's household into the house. soki, tango tokokota na mokili, okokangisa singa oyo ya motane na lininisa oyo okitiseli biso mpe okosangisa, kati na ndako na yo, tata mpe mama na yo, bandeko mpe bato nyonso ya libota na yo.
19 Anyone who goes out your house doors into the street—their blood is on their own head; we're clear. But if a hand touches anyone with you inside, their blood is on our head. Soki moto moko abimi libanda ya ndako na yo mpe akei na balabala, makila na ye ekotangama na moto na ye moko ; ekozala ngambo na biso te. Kasi soki babomi moto moko kati na bato oyo bakozala kati na ndako na yo, wana makila na ye ekotangama na mito na biso.
20 If you tell what we're doing, we're released from the oath you made us swear." Soki mpe olobi makambo oyo biso tozali kosala, tokozala na ngambo te liboso ya ndayi oyo olapisi biso.
21 "Let it be as you say," she said. She sent them off; they left, and she tied the scarlet cord in the window. Raabi azongisaki : — Boye, tika ete esalema ndenge bolobi. Atikaki bango kokende, mpe bakabwanaki. Bongo na sima, akangisaki singa ya motane na lininisa.
22 They went into the hills, stayed there three days until the pursuers returned. The pursuers searched the whole road and found nothing. Sima na bango kokabwana, bakendeki na bangomba mikuse mpe bavandaki kuna mikolo misato kino tango bato oyo bazalaki kolanda bango balembaki koluka bango na nzela nyonso. Lokola bamonaki bango te, bazongaki na bango.
23 The two men turned back, came down from the hills, crossed over, reached Joshua son of Nun, and told him all that happened to them. Banongi oyo mibale bazongelaki nzela na bango, babimaki na bangomba mikuse, bakatisaki ebale mpe bakomaki kino epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni. Bayebisaki ye makambo nyonso oyo ekomelaki bango.
24 They told Joshua, "Our Father has surely given the whole land into our hands; indeed, all who live there are melting away in fear before us." Balobaki na Jozue : — Solo, Yawe apesi mokili oyo nyonso na maboko na biso ; bato nyonso bazali kolenga liboso na biso.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]