Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joshua 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Joshua rose early, and he and all Israel set out from Shittim, reached the Jordan, and camped there before crossing over. Na tongo-tongo, Jozue mpe bana nyonso ya Isalaele babimaki wuta na Shitimi mpe bakendeki kino na Yordani epai wapi batongaki molako na bango liboso ete bakatisa.
2 Three days later the officers went through the camp, Sima na mikolo misato, bakambi bakomaki kotambola kati na molako
3 and commanded the people: "When you see the ark of the covenant of your Father carried by the Levitical priests, leave your place and follow it. mpo na kopesa bato mitindo oyo : — Soki bomoni Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Nzambe na bino, mpe Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi komema yango, bolongwa na bisika oyo bozali mpe bolanda yango.
4 Only keep a distance between yourselves and it, about 3,000 feet by measure; don't come near it, so you may know the way to go, since you have not traveled this way before." Bongo bokoyeba nzela nini bokoki kolanda mpo ete nanu botambola na nzela yango te. Kasi bozala mosika na Sanduku ya Boyokani, na bametele pene nkoto moko, bopusana pene na yango te.
5 Joshua told the people, "Dedicate yourselves—tomorrow our Father will do wonders among you." Jozue alobaki na bato : — Bomibulisa, pamba te lobi, Yawe akosala makambo ya kokamwa kati na bino.
6 Then Joshua told the priests, "Take up the ark of the covenant and cross ahead of the people." So they took up the ark of the covenant and went ahead of the people. Jozue alobaki na Banganga-Nzambe : — Bomema Sanduku ya Boyokani mpe botambola liboso ya bato. Batombolaki yango mpe batambolaki liboso ya bato.
7 Our Father said to Joshua, "Today I will begin to exalt you before all Israel, so they may know that as I was with Moses, I will be with you. Yawe alobaki na Jozue : — Lelo, nakobanda kotombola yo na miso ya bana nyonso ya Isalaele mpo ete bayeba ete nazali mpe elongo na yo ndenge nazalaki elongo na Moyize.
8 Command the priests carrying the ark of the covenant: 'When you reach the edge of Jordan's water, stand still in the Jordan.'" Yebisa Banganga-Nzambe oyo bamemi Sanduku ya Boyokani : « Tango bokokoma pembeni ya mayi ya Yordani, botia makolo na bino kati na mayi mpe botelema wana. »
9 Joshua said to the Israelites, "Come here and listen to the words of your Father." Jozue alobaki na bana ya Isalaele : — Bopusana awa mpe boyoka maloba ya Yawe, Nzambe na bino.
10 Joshua said, "This is how you will know the living Father is among you: he will surely drive out before you the Canaanites, Hittites, Hivites, Perizzites, Girgashites, Amorites, and Jebusites. Bongo Jozue alobaki : — Ezali na nzela oyo nde bokoyeba solo ete Nzambe na bomoi azali elongo na bino mpe akobengana liboso na bino bato ya Kanana, ya Iti, ya Evi, ya Perizi, ya Girigazi, ya Amori mpe ya Yebusi.
11 Look—the ark of the covenant of the Sovereign of all the earth crosses ahead of you into the Jordan. Sanduku ya Boyokani ya Yawe ya mokili mobimba ekoleka liboso na bino kati na mayi ya Yordani.
12 Now then, choose twelve men from the tribes of Israel, one man from each tribe. Sik’oyo, bopona bato zomi na mibale kati na mabota ya Isalaele, moto moko mpo na libota moko.
13 When the soles of the feet of the priests carrying the ark of the Sovereign Father of all the earth come to rest in the Jordan's waters, the Jordan's waters will be cut off—the water flowing from above—and stand in one heap." Mpe tango kaka Banganga-Nzambe oyo bakomema Sanduku ya Yawe, Nkolo ya mokili mobimba, bakotia matambe ya makolo na bango kati na Yordani, mayi na yango ekokabwana na biteni mibale ; mayi oyo ekowuta na ngambo ya likolo ekotelema lokola mir.
14 When the people left their tents to cross the Jordan, priests carried the covenant ark ahead of them, Boye tango bato bakobima na molako mpo na kokatisa Yordani, Banganga-Nzambe oyo bakomema Sanduku ya Boyokani bakotambola liboso na bango.
15 as those carrying the ark reached the Jordan, and the priests' feet carrying the ark dipped in the water's edge (for the Jordan overflows all its banks all harvest days), Nzokande, na tango ya kobuka milona, mayi ya Yordani etondaka makasi penza. Kasi tango kaka Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku bakomaki pembeni ya Yordani mpe batiaki matambe na bango kati na mayi,
16 the water flowing from upstream stood, rising into one heap far off at Adam, the city near Zarethan, while the water flowing down to the Sea of the Arabah, the Dead Sea, was completely cut off. So the people crossed opposite Jericho. mayi oyo ezalaki kowuta na ngambo ya likolo etikaki kotiola mpe esalaki lokola mir moko ya monene, mpe etikaki nzela moko ya monene wuta na engumba Adamu, oyo ezalaki pembeni ya Tsaritani ; bongo na ngambo mosusu, mayi oyo ezalaki kokita kino na ebale monene ya Araba, ebale monene ya Barozo, ya lubwaku ya Yordani, esilaki nyonso. Bato bakatisaki kino na Jeriko oyo ezalaki liboso na bango.
17 The priests carrying the ark of our Father's covenant stood firm on dry ground in the Jordan's middle, while all Israel crossed on dry ground until the whole nation finished crossing the Jordan. Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe bapikamaki na mabele ya kokawuka, na kati-kati ya mayi ya Yordani, wana bana nyonso ya Isalaele bazalaki koleka kino tango ekolo mobimba esilisaki kokatisa na mabele ya kokawuka.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]