Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joshua 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When the whole nation had finished crossing the Jordan, our Father said to Joshua, Tango ekolo mobimba esilisaki kokatisa Yordani, Yawe alobaki na Jozue :
2 "Take twelve men from the people, one man from each tribe. « Pona mibali zomi na mibale kati na bato, mobali moko mpo na libota moko.
3 Command them: 'Take twelve stones from here, the middle of the Jordan, from where the priests' feet stood firm; carry them over with you and set them down at the camp where you sleep tonight.'" Pesa bango mitindo oyo : ‹ Bozwa kati na mayi ya Yordani, na esika oyo Banganga-Nzambe bapikamaki, mabanga zomi na mibale, bomema yango elongo na bino mpe botia yango na esika oyo bokolekisa butu ya lelo. › »
4 So Joshua summoned the twelve men appointed from Israel's sons, one per tribe. Boye, Jozue abengaki mibali zomi na mibale oyo aponaki kati na bana ya Isalaele, mobali moko mpo na libota moko.
5 He told them, "Cross before the ark of your Father into the Jordan's middle, each of you take a stone and carry it on your shoulder—one for each tribe of Israel's sons, Jozue alobaki na bango : « Boleka liboso ya Sanduku ya Yawe, Nzambe na bino, kino na kati-kati ya Yordani. Moko na moko kati na bino amema libanga na lipeka na ye kolanda motango ya mabota ya Isalaele
6 so this will be a sign among you: when your children ask later, 'What do these stones mean to you?' mpo ete ezala lokola elembo kati na bino. Sima na tango, soki bana na bino batuni bino : ‹ Mabanga oyo elakisi nini ? ›
7 Tell them: the waters of the Jordan were cut off before the ark of our Father's covenant. When it crossed the Jordan, the waters of the Jordan were cut off. These stones will be a memorial to Israel's people forever." Bokoyebisa bango ete mayi ya Yordani ekatanaki na biteni mibale liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Tango ekatisaki Yordani, mayi na yango mpe ekatanaki. Mabanga oyo ezali lokola ekaniseli ya seko na seko mpo na bana ya Isalaele. »
8 The Israelites did as Joshua commanded: they took twelve stones from the Jordan's middle, one per tribe of Israel, as our Father had told Joshua, carried them to their camp, and set them down there. Boye, bana ya Isalaele basalaki ndenge Jozue atindaki bango. Bazwaki kati na Yordani, mabanga zomi na mibale kolanda motango ya mabota ya Isalaele, ndenge Yawe alobaki na Jozue. Bamemaki yango kino na molako na bango, epai wapi batiaki yango.
9 Joshua also set up twelve stones in the Jordan's midst, where the priests' feet had stood carrying the ark of the covenant; they remain there to this day. Jozue atelemisaki mabanga zomi na mibale mosusu na kati-kati ya Yordani, na esika oyo Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani bapikamaki, mpe etikala wana kino na mokolo ya lelo.
10 The priests carrying the ark stood in the middle of the Jordan until everything our Father had commanded Joshua to tell the people was finished—just as Moses had commanded Joshua. The people crossed quickly. Nzokande, Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku bawumelaki na kati-kati ya Yordani kino tango bato bakokisaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki Jozue, ndenge kaka Moyize ayebisaki ye. Ezalaki na lombangu nde bato bakatisaki Yordani.
11 When all the people finished crossing, the ark of our Father and the priests crossed over before the people. Tango bango nyonso basilisaki kokatisa, Sanduku ya Yawe elongo na Banganga-Nzambe balekaki lisusu liboso ya bato.
12 Reuben's sons, Gad's sons, and Manasseh's half-tribe crossed over armed before Israel's people, as Moses had told them. Bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase bakatisaki, balataki bibundeli mpe batambolaki liboso ya bana ya Isalaele, ndenge Moyize atindaki bango.
13 About 40,000 armed for battle crossed before our Father for war, to Jericho's plains. Bazalaki bato pene nkoto tuku minei, bato ya bitumba, oyo bakamataki bibundeli mpo na kobunda ; balekaki liboso ya Yawe na nzela ya bitando ya Jeriko mpo na kobunda.
14 That day our Father made Joshua great in all Israel's eyes; they revered him as they had revered Moses, all his life. Na mokolo wana, Yawe atombolaki Jozue na miso ya bana nyonso ya Isalaele ; mpe bapesaki ye lokumu mikolo nyonso ya bomoi na ye, ndenge kaka bapesaki Moyize lokumu.
15 Then our Father said to Joshua, Yawe alobaki na Jozue :
16 "Command the priests carrying the ark of the testimony to come up out of the Jordan." « Pesa Banganga-Nzambe oyo bamemi Sanduku ya Litatoli mitindo ete babima wuta na kati-kati ya ebale Yordani. »
17 So Joshua commanded the priests, "Come up out of the Jordan." Jozue apesaki mitindo epai ya Banganga-Nzambe : « Bobima wuta na kati-kati ya ebale Yordani. »
18 When the priests carrying the ark of our Father's covenant came up from the middle of the Jordan and their feet touched dry ground, the Jordan's waters returned to their place, flowing over all its banks as before. Boye Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe babimaki wuta na ebale. Tango kaka batiaki matambe na bango na mokili, mayi ya Yordani ezongaki na esika na yango, etondaki makasi mpe ekomaki kotiola ndenge ezalaki momesano na yango.
19 The people came up out of the Jordan on the tenth day of month one and camped at Gilgal, on Jericho's east edge. Na mokolo ya zomi ya sanza ya liboso, bato bakendeki wuta na Yordani mpe batongaki molako na bango na Giligali, na mondelo ya este ya Jeriko.
20 Joshua set up those twelve stones at Gilgal—the ones they had taken from the Jordan. Jozue atelemisaki, na Giligali, mabanga zomi na mibale oyo babimisaki na Yordani.
21 He told the Israelites, "In days to come, when your children ask their fathers, 'What do these stones mean?' Alobaki na bana ya Isalaele : « Tango bakitani na bino bakotuna batata na bango : ‹ Mabanga oyo elakisi nini ? ›
22 tell your children: 'Israel crossed this Jordan on dry ground.' Boyebisa bango : ‹ Bato ya Isalaele bakatisaki Yordani na mabele ya kokawuka. ›
23 For your Father dried up the Jordan's waters before you until you crossed over, just as your Father dried up the Red Sea before us until we crossed over, Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akawusaki liboso mayi ya Yordani kino tango bosilisaki kokatisa. Yawe asalaki na Yordani makambo oyo asalaki na ebale monene ya Barozo tango akawusaki yango liboso na biso, kino tango tosilisaki kokatisa yango.
24 so all earth's peoples may know our Father's hand is mighty, and so you may always revere your Father." Asalaki bongo mpo ete bato nyonso ya mokili bayeba ete loboko ya Yawe ezalaka na nguya, mpe mpo ete bobangaka Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]