Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joshua 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When all the Amorite kings west of the Jordan and all the Canaanite kings along the sea heard that our Father had dried up the Jordan's waters before Israel until they crossed over, their hearts melted and no spirit was left in them because of Israel. Nzokande, tango bakonzi nyonso ya Amori, na ngambo ya weste ya Yordani, mpe bakonzi nyonso ya Kanana, pene ya ebale monene ya Barozo, bayokaki ndenge nini Yawe akawusaki ebale Yordani liboso ya bana ya Isalaele kino tango basilisaki kokatisa, mitema na bango ebukanaki mpe bazalaki lisusu na makasi te ya kotelemela bana ya Isalaele.
2 At that time our Father said to Joshua, "Make yourself flint knives and circumcise the Israelites again, a second time." Na tango wana, Yawe alobaki na Jozue : — Sala bambeli ya mabanga mpe kata lisusu bana mibali ya Isalaele ngenga.
3 So Joshua made flint knives and circumcised Israel's sons at Gibeath-haaraloth, the Hill of Foreskins. Jozue asalaki bambeli ya mabanga mpe akataki bana mibali ya Isalaele ngenga, pene ya ngomba moke ya Araloti.
4 This is why Joshua circumcised them: all the people who came out of Egypt—the males, all the men of war—had died in the wilderness on the way after leaving Egypt. Tala mpo na nini Jozue asengelaki kokata bango ngenga : Mibali nyonso oyo babimaki na Ejipito mpe bakokisaki mibu ya kobunda bitumba bakufaki na nzela, kati na esobe, sima na bango kobima na Ejipito.
5 Everyone who came out had been circumcised, but those born in the wilderness on the way out of Egypt had not been. Mibali nyonso oyo babimaki na Ejipito bakatamaki ngenga ; kasi bato nyonso oyo babotamaki na nzela, kati na esobe, bakatamaki ngenga te.
6 Israel's people walked forty years in the wilderness until the whole nation—the men of war who left Egypt—died off, because they did not obey our Father's voice. To them our Father swore he would not let them see the land he swore to their ancestors to give us, a land flowing with milk and honey. Bana ya Isalaele batambolaki kati na esobe mibu tuku minei, kino tango ekeke mobimba ya mibali oyo bakokisaki mibu ya kobunda bitumba tango babimaki na Ejipito basilaki kokufa. Mpo ete batosaki Yawe te, Yawe alapaki ndayi ete bakomona te mokili oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi.
7 He raised up their children in their place, and Joshua circumcised them, for they were uncircumcised, not having been circumcised on the way. Boye, atombolaki bana na esika ya batata na bango ; yango wana Jozue akataki bango ngenga, pamba te bakatamaki ngenga te na nzela.
8 When the circumcision of the whole nation was complete, they stayed in camp until they were healed. Sima na ekolo mobimba kokatama ngenga, batikalaki esika moko kati na molako kino tango bapota na bango ekawukaki.
9 Then our Father said to Joshua, "Today I rolled away Egypt's disgrace from you." So that place is called Gilgal to this day. Yawe alobaki na Jozue : — Lelo, natindiki soni ya Ejipito mosika na bino. Babengaki esika yango « Giligali » kino na mokolo ya lelo.
10 Israel camped at Gilgal kept the Passover on the fourteenth of the month, in the evening, on the plains of Jericho. Na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza wana, bana ya Isalaele basalaki feti ya Pasika, wana bazalaki nanu na molako ya Giligali, na etando ya Jeriko.
11 The day after Passover, on that very day, they ate the land's produce: bread without yeast and roasted grain. Mokolo oyo elandaki feti ya Pasika, baliaki biloko ya mokili ya Kanana : mapa ezanga levire mpe bambuma ya ble oyo bakalingaki kaka mokolo wana.
12 The manna stopped the day after they ate the land's produce. The Israelites had no more manna; that year they ate the harvest of Canaan. Mokolo oyo elandaki mokolo oyo baliaki biloko ya mokili ya Kanana, mana etikaki kokweya ; mana ezalaki lisusu te mpo na bana ya Isalaele. Boye, na mobu wana, baliaki biloko ya mokili ya Kanana.
13 Near Jericho, Joshua looked up and saw a man standing before him, sword drawn in hand. He approached and asked, "Are you for us or our enemies?" Nzokande, tango Jozue azalaki pene ya Jeriko, atombolaki miso mpe amonaki moto moko atelemi liboso na ye ; moto yango asimbaki mopanga na loboko na ye. Jozue apusanaki pene na ye mpe atunaki ye : — Boni, ozali na ngambo na biso to na ngambo ya banguna na biso ?
14 "No," he replied. "I have now come as commander of our Father's army." Joshua fell facedown to the ground, worshiping, and said, "What does my lord say to his servant?" Azongiselaki Jozue : — Te, kasi nazali mokonzi ya mampinga ya Yawe ; nayei kaka sik’oyo. Boye, Jozue akweyaki elongi kino na mabele mpe alobaki na ye : — Sango nini nkolo na ngai azali na yango mpo na mosali na ye ?
15 The commander of our Father's army said to Joshua, "Take off the sandals from your feet, for the place where you stand is holy." Joshua did so. Mokonzi ya mampinga ya Yawe alobaki na ye : — Longola basapato na yo na makolo, pamba te esika oyo ozali ezali bule. Jozue asalaki se bongo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]