Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joshua 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Now Jericho was shut tight because of the Israelites; no one went out and no one came in. Bikuke ya engumba Jeriko ezalaki ya kokangama makasi penza mpo na bana ya Isalaele ; moto moko te akokaki kokota to kobima.
2 Then our Father said to Joshua, "See, I have given Jericho, its king, and its mighty warriors into your hand. Yawe alobaki na Jozue : — Tala, na maboko na yo, nasili kokaba Jeriko elongo na mokonzi na yango mpe bilombe na yango ya bitumba.
3 "March around the city, all you fighting men, circling it once. Do this for six days. Botambola zingazinga ya engumba mbala moko na mokolo, yo elongo na bato nyonso ya etumba. Bosala bongo mikolo motoba.
4 Have seven priests carry seven rams' horns before the ark. On the seventh day, march around the city seven times while the priests blow the horns. Kamata Banganga-Nzambe sambo ; Nganga-Nzambe moko na moko asengeli komema kelelo moko basala na liseke ya meme. Banganga-Nzambe nyonso sambo basengeli kotambola liboso ya Sanduku. Na mokolo ya sambo, bobaluka zingazinga ya engumba mbala sambo, elongo na Banganga-Nzambe oyo bakozala kobeta bakelelo.
5 When the ram's horn sounds a long blast and you hear it, have all the people give a great shout. The city wall will fall flat, and each person will charge straight ahead." Tango lolaka ya bakelelo yango ekoyokana tango molayi, tika ete bato nyonso baganga makasi ; bongo mir ya engumba ekokweya na pwasa, mpe moto na moto akokota na engumba, na esika oyo akozala.
6 Joshua son of Nun called the priests and told them, "Take up the ark of the covenant, and have seven priests carry seven rams' horns before the ark of our Father." Boye Jozue, mwana mobali ya Nuni, abengaki Banganga-Nzambe mpe alobaki na bango : — Bomema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpe tika ete Banganga-Nzambe sambo kati na bino bakamata bakelelo sambo mpe batambola liboso ya Sanduku ya Yawe.
7 He told the people, "Advance! March around the city, and let the armed men go ahead of our Father's ark." Bongo apesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele : — Bokende liboso ! Botambola zingazinga ya engumba, mpe tika ete basoda oyo bazalaka na liboso, na etumba, baleka liboso ya Sanduku ya Yawe.
8 When Joshua finished speaking, the seven priests carrying the seven rams' horns before our Father moved forward, blowing the horns, and the ark of our Father's covenant followed them. Tango Jozue asilisaki koloba na bato, Banganga-Nzambe sambo, oyo bakamataki bakelelo sambo liboso ya Yawe, balekaki liboso mpe bakomaki kobeta yango, wana Sanduku ya Boyokani ya Yawe ezalaki kolanda bango na sima.
9 The armed men marched ahead of the priests blowing the horns, the rear guard behind the ark, horns sounding continually. Basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, bazalaki kotambola liboso ya Banganga-Nzambe oyo bazalaki kobeta bakelelo ; bongo basoda oyo batikalaka na sima, bazalaki kolanda Sanduku ya Boyokani. Na tango wana nyonso, bakelelo ezalaki kaka kobeta.
10 But Joshua ordered the people, "Don't shout or let your voice be heard; not one word from your mouth until I say, 'Shout!' Then shout." Kasi Jozue apesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele : — Boganga te, boloba mpe eloko moko te ! Bovanda kaka kimia kino tango nakoloba na bino ete boganga makasi ; wana nde bokoganga makasi.
11 So he made the ark of our Father circle the city once. Then they came to the camp and spent the night in the camp. Boye, Sanduku ya Yawe ezalaki kotambola zingazinga ya engumba mbala moko na mokolo ; bongo na sima, bato bazalaki kozonga na molako mpo na kolekisa butu.
12 Joshua got up early the next morning, and the priests took up the ark of our Father. Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Jozue alamukaki, mpe Banganga-Nzambe bamemaki Sanduku ya Yawe.
13 The seven priests carrying the seven rams' horns before the ark of our Father marched on, blowing them steadily. The armed men led; the rear guard followed the ark of our Father as the horns sounded. Banganga-Nzambe sambo oyo basimbaki bakelelo sambo balekaki liboso, batambolaki liboso ya Sanduku ya Yawe, na kobeta bakelelo. Basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, balekaki liboso na bango ; mpe basoda oyo batikalaka na sima bazalaki kolanda Sanduku ya Yawe, wana bakelelo ezalaki kobeta.
14 So on the second day they marched around the city once and returned to camp. They did this for six days. Na mokolo ya mibale, babalukaki lisusu engumba mbala moko ; bongo na sima, bazongaki na molako. Boye, basalaki bongo mikolo motoba.
15 On the seventh day they rose at dawn and circled the city as before, but this day seven times. Na mokolo ya sambo, balamukaki na tongo-tongo mpe babalukaki zingazinga ya engumba mbala sambo, ndenge kaka bazalaki kosala. Ezalaki kaka mokolo wana nde babalukaki mbala sambo zingazinga ya engumba.
16 The seventh time around, as the priests blew the horns, Joshua told the people, "Shout! For our Father has given you the city. Na mbala oyo ya sambo, tango Banganga-Nzambe babetaki bakelelo tango molayi, Jozue apesaki mitindo epai ya bato : — Boganga makasi, pamba te Yawe akabi engumba oyo na maboko na bino !
17 The city and all in it are devoted to our Father for destruction. Only Rahab the prostitute and everyone with her in her house will live, because she hid the messengers we sent. Bobebisa mpo na Yawe engumba oyo nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezali kati na yango. Bobikisa kaka Raabi, mwasi ya ndumba, elongo na bato na ye nyonso oyo bakozala kati na ndako na ye, pamba te abombaki banongi oyo totindaki.
18 But keep away from what's set apart for destruction, so you don't bring destruction on yourselves by taking any of it, putting the whole camp of Israel in danger of destruction and bringing trouble on it. Kasi bosala keba na tina na biloko oyo ekabami mpo na kobebisama, mpo ete bomilukela pasi te na koluka kokamata ata eloko moko kati na yango, noki te bokomema lisuma oyo ekobebisa molako ya Isalaele mpe bokotia yango na mobulu.
19 But all the silver, gold, and objects of bronze and iron are holy to our Father; they must go into his treasury." Kasi palata, wolo mpe biloko nyonso ya bronze elongo na bibende ekobulisama mpo na Yawe mpe esengeli kokende na ebombelo bomengo ya Yawe.
20 So the people shouted as the priests blew the horns. Hearing the trumpet, they gave a great shout, and the wall fell flat. The people charged into the city, each straight ahead, and captured it. Tango babetaki bakelelo, bato bagangaki makasi. Bongo, tango bato bagangaki makasi sima na koyoka lolaka ya kelelo kobeta tango molayi, mir ya engumba ekweyaki na pwasa. Boye, moto nyonso akotaki na engumba, liboso na ye, mpe babotolaki yango.
21 They devoted everything in the city to destruction—men and women, young and old, oxen, sheep, donkeys—with the edge of the sword. Babomaki na mopanga, nyonso oyo ezalaki kati na engumba : mobali to mwasi, elenge to mobange, ngombe to meme to mpe ane.
22 Joshua told the two men who had spied out the land, "Go to the prostitute's house and bring out the woman and all who belong to her, as you swore to her." Jozue alobaki na bato mibale oyo banongaki Jeriko : — Bokota na ndako ya mwasi ya ndumba, bobimisa ye libanda elongo na bato na ye nyonso, kolanda ndayi oyo bolapaki liboso na ye.
23 So the young spies went in and brought out Rahab, her father, mother, brothers, and all who belonged to her. They brought out her whole family and settled them outside Israel's camp. Boye, bilenge mibali oyo bakendeki kononga mokili bakotaki mpe babimisaki Raabi, tata na ye, mama na ye, bandeko na ye ya mibali mpe biloko na ye nyonso. Babimisaki libota na ye mobimba na libanda mpe batiaki bango libanda ya molako ya Isalaele.
24 They burned the city and everything in it, but put the silver, gold, and the bronze and iron articles into the storeroom of our Father's house. Batumbaki engumba mobimba elongo na biloko nyonso oyo ezalaki kati na yango, longola kaka palata mpe wolo, bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende oyo batiaki na ebombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe.
25 Joshua spared Rahab the prostitute, her father's household, and all who belonged to her. She has lived among Israel to this day, because she hid the messengers Joshua sent to spy out Jericho. Jozue abikisaki Raabi, mwasi ya ndumba, libota na ye mpe bato na ye nyonso, pamba te abombaki bato oyo Jozue atindaki mpo na kononga Jeriko. Boye, akomaki kovanda kati na bana ya Isalaele kino na mokolo ya lelo.
26 Then Joshua made them swear this oath: "Cursed before our Father is the man who rises to rebuild this city, Jericho. He will lay its foundation at the cost of his firstborn and set up its gates at the cost of his youngest." Kaka na tango yango, Jozue akataki seleka oyo : « Tika ete moto oyo akoluka kotonga lisusu engumba Jeriko alakelama mabe liboso ya Yawe ! Solo, akofuta motuya ya bomoi ya mwana na ye ya liboso ya mobali, tango akotonga miboko na yango ; mpe motuya ya bomoi ya mwana na ye ya suka, tango akotia bikuke na yango. »
27 So our Father was with Joshua, and Joshua's fame spread throughout the land. Yawe azalaki elongo na Jozue, mpe sango na ye epanzanaki mokili mobimba.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]