Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joshua 7 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Israel broke faith with what was devoted to destruction: Achan son of Carmi, son of Zabdi, son of Zerah, of Judah's tribe, took some of it. So our Father's anger burned against Israel. Bato ya Isalaele babebisaki ekila ya Yawe. Akana, mwana mobali ya Karimi, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Zera, moto ya libota ya Yuda, akamataki biloko oyo Yawe apekisaki. Bongo, kanda ya Yawe epelaki likolo ya bana ya Isalaele.
2 Joshua sent men from Jericho to Ai, near Beth-aven, east of Bethel, saying, "Go up and scout the land." They went up and scouted Ai. Wuta na Jeriko, Jozue atindaki bato kokende na engumba Ayi oyo ezalaki pene ya Beti-Aveni, na ngambo ya este ya Beteli. Alobaki na bango : « Bokende kononga mokili wana. » Bato yango bakendeki mpe banongaki Ayi.
3 They returned and told Joshua, "Not everyone needs to go up. Send about two or 3,000 men to attack Ai; don't wear out all the people—they are few." Tango bazongaki epai ya Jozue, balobaki na ye : « Ezali penza na tina te ete bato nyonso bakende kobundisa Ayi. Tinda kaka bato nkoto mibale to nkoto misato mpo na kobotola yango. Komonisa bato nyonso pasi te, pamba te engumba yango ezali kaka na bato moke. »
4 So about 3,000 of the people went up, but they fled before the men of Ai. Boye, bato pene nkoto misato bakendeki, kasi bakimaki liboso ya bato ya Ayi.
5 Ai's men struck down about thirty-six of them, chasing them from the gate to the quarries, striking them on the descent. The people's hearts melted, turning to water. Bato ya Ayi babomaki bato pene tuku misato na motoba na molongo ya Isalaele. Balandaki bango kino koleka ekuke ya engumba Shebarimi mpe babomaki bango na kokita ya ngomba. Mpo na yango, mitema ya bana ya Isalaele elembaki mpe bakomaki lokola mayi oyo ezali kotiola.
6 Joshua tore his clothes and fell facedown to the ground before the ark of our Father until evening, he and Israel's elders, and they threw dust on their heads. Jozue apasolaki bilamba na ye mpe amibwakaki elongi kino na mabele liboso ya Sanduku ya Yawe kino na pokwa. Bakambi ya Isalaele mpe basalaki kaka ndenge moko, bamisopelaki putulu na mito na bango.
7 Joshua said, "Oh, Sovereign Father, why did you bring this people across the Jordan, only to hand us over to the Amorites to destroy us? If only we'd been content to stay beyond the Jordan! Jozue alobaki : — Ah Nkolo Yawe, mpo na nini otikaki ete bato oyo bakatisa Yordani ? Boni, ezalaki mpo ete okaba biso na maboko ya bato ya Amori ete baboma biso ? Elekaki malamu ete totikala na biso na ngambo mosusu ya ebale !
8 Please, Sovereign Father, what can I say, now that Israel has turned and fled from its enemies? Oh Nkolo, sik’oyo naloba nini, awa Isalaele akimi liboso ya banguna na ye ?
9 The Canaanites and all who live in the land will hear, surround us, and erase our name from the earth. Then what will you do for your great name?" Bato ya Kanana mpe bato mosusu ya mokili bakoyoka sango yango, bakobalukela biso mpe bakolongola kombo na biso na mokili. Boye, okosala nini mpo na monene ya Kombo na Yo ?
10 Our Father said to Joshua, "Stand up! Why have you fallen on your face? Yawe alobaki na Jozue : — Telema ! Mpo na nini omibwaki elongi kino na mabele ?
11 "Israel has sinned, breaking my covenant I commanded them. They took some devoted things, stole, lied, and put them among their own belongings. Isalaele asali lisumu. Babebisi boyokani na Ngai oyo natindaki bango ete babatela. Bakamati ndambo ya biloko oyo ekabami mpo na kobebisama, bayibi yango mpe babombi yango kati na biloko na bango.
12 So Israel can't stand before its enemies—they turn their backs before them, because they are now devoted to destruction. I won't be with you again unless you destroy what is devoted to destruction among you. Yango wana, bana ya Isalaele bakolonga kotelema te liboso ya banguna na bango, bakozonga sima mpe bakokima liboso ya banguna na bango, pamba te babebisi ekila. Nakozala elongo na bino te soki bolongoli te mabe oyo ezali kati na bino.
13 Get up! Dedicate the people. Tell them: Dedicate yourselves for tomorrow, for our Father, the God of Israel, says: Devoted things are among you, Israel. You cannot stand against your enemies until you remove them. Telema, bulisa bato. Loba na bango : « Bomibulisa mpo na lobi, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi boye : ‹ Mabe ezali kati na yo Isalaele, okolonga kobundisa banguna na yo te kino tango okolongola yango. ›
14 "In the morning, present yourselves tribe by tribe. The tribe our Father selects comes forward clan by clan; the clan he selects comes forward family by family; the family he selects comes forward man by man. Lobi na tongo, bokopusana pene na Ngai, libota na libota. Libota oyo Yawe akopona ekopusana, etuka na etuka ; etuka oyo Yawe akopona ekopusana, ndako na ndako ; mpe ndako oyo Yawe akopona ekopusana, moto na moto.
15 Whoever is caught with the devoted things will be burned with fire—him and all he has—for violating our Father's covenant and doing a disgraceful thing in Israel." Moto nyonso oyo mabe ekomonana kati na ye asengeli kokufa na moto, ye elongo na nyonso ya ye, pamba te abebisi boyokani ya Yawe mpe asali likambo ya soni kati na Isalaele. »
16 Joshua rose early and brought Israel near by tribes; Judah's tribe was picked. Mokolo oyo elandaki, Jozue alamukaki na tongo-tongo penza, mpe abengisaki Isalaele, libota na libota. Mpe ezali libota ya Yuda nde eponamaki.
17 He brought Judah's clans forward; the Zerahite clan was taken. He brought the Zerahite clan forward, family by family; Zabdi was taken. Tango abengisaki etuka na etuka ya libota ya Yuda, etuka ya Zera nde eponamaki. Tango abengisaki ndako na ndako kati na etuka ya Zera, ndako ya Zabidi nde eponamaki.
18 Joshua brought his household forward, man by man, and Achan son of Carmi, son of Zabdi, son of Zerah, of Judah's tribe, was caught. Sima, tango abengisaki moto na moto kati na ndako ya Zabidi, Akana, mwana mobali ya Karimi, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Zera, moto ya libota ya Yuda, nde aponamaki.
19 Joshua said to Achan, "My son, give glory to our Father, the God of Israel, and give him praise. Tell me now what you've done—don't hide it from me." Jozue alobaki na Akana : — Mwana na ngai, pesa nkembo epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, mpe pesa Ye penza lokumu. Yebisa ngai likambo oyo osalaki, kobombela ngai eloko moko te.
20 Achan answered Joshua, "Truly, I have sinned against our Father, the God of Israel. This is what I did: Akana azongiselaki Jozue : — Solo, nasali lisumu liboso ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. Tala likambo oyo nasalaki :
21 Among the plunder I saw a beautiful robe from Shinar, about five pounds of silver, and a gold bar weighing about 1.2 pounds. I wanted them and took them; they're hidden in my tent floor, the silver underneath." Namonaki, kati na bomengo ya bitumba, kazaka moko ya kitoko ya mboka Mezopotami, mbongo ya bibende ya palata, nkama mibale mpe ndambo ya kilo ya wolo ; nalulaki yango mpe nazwaki yango. Nakundaki yango na kati-kati ya ndako na ngai ya kapo, mpe palata ezali na se na yango.
22 Joshua sent messengers; they ran to the tent and found it hidden in his tent, silver underneath. Jozue atindaki bato, mpe bakendeki mbangu kati na ndako ya kapo ya Akana mpe bakutaki penza kazaka bakunda na se ya ndako ya kapo, elongo na palata, na se na yango.
23 They took them from inside the tent, brought them to Joshua and all Israel's sons, and set them out before our Father. Babimisaki biloko yango wuta na ndako na ye ya kapo, bamemaki yango liboso ya Jozue mpe ya bana nyonso ya Isalaele ; mpe sima, basopaki yango liboso ya Yawe.
24 Joshua and all Israel took Achan son of Zerah, the silver, the robe, the bar of gold, his sons, daughters, cattle, donkeys, sheep, tent, and all he owned, and brought them up to the Valley of Achor. Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele bakamataki Akana, mwana mobali ya Zera, elongo na palata, kazaka, liboke ya wolo, bana na ye ya mibali mpe ya basi, bangombe na ye, ba-ane na ye, bameme mpe bantaba na ye, ndako na ye ya kapo mpe biloko na ye nyonso ; bamemaki bango na Lubwaku ya Akori.
25 Joshua said, "Why have you troubled us? Our Father will trouble you today." And all Israel stoned Achan with stones, then burned them with fire, and stoned them with stones. Jozue alobaki : « Mpo na nini omemeli biso pasi ? Tika ete Yawe amonisa yo pasi lelo ! » Bongo bato nyonso ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki ; babambaki lisusu mabanga na bato oyo batikalaki mpe bato yango bakufaki ; mpe batumbaki bibembe na bango na moto.
26 They piled a great heap of stones over him, there to this day. Then our Father turned from his burning anger. So that place is called the Valley of Achor to this day. Babwakaki na likolo ya Akana liboke ya mabanga ebele oyo ezali kino na mokolo ya lelo, mpe kanda ya Yawe esilaki. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango Lubwaku ya Akori.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]