Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joshua 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then our Father told Joshua, "Don't be afraid or lose courage. Take all the fighting men with you and go up to Ai. I have handed you the king of Ai, his people, his city, and his land. Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga te mpe kolemba nzoto te. Kamata elongo na yo basoda nyonso, mata mpe bundisa engumba Ayi. Pamba te nasili kokaba na maboko na yo : mokonzi ya Ayi, bato na ye, engumba na ye, mpe mokili na ye.
2 Do to Ai and its king as you did to Jericho and its king—keep the plunder and livestock. Set an ambush behind the city." Okosala engumba Ayi mpe mokonzi na yango ndenge osalaki Jeriko mpe mokonzi na yango ; kasi bokoki kozwa mpo na bino lokola bomengo ya bitumba, biloko mpe bibwele na yango. Bomba basoda na sima ya engumba. »
3 Joshua and all the fighting men set out for Ai. He chose 30,000 mighty warriors and sent them out by night. Jozue atelemaki elongo na basoda nyonso mpo na kobundisa engumba Ayi. Aponaki bilombe ya bitumba nkoto tuku misato mpe atindaki bango na butu.
4 He commanded them, "Wait in ambush behind the city—not too far off. All of you, stay alert. Apesaki bango mitindo oyo : « Bobombama na sima ya engumba oyo ; bozala penza mosika mingi te na engumba, kasi bozala pene.
5 I and all my people will approach the city. When they come out against us as before, we will flee before them. Ngai mpe bato nyonso oyo bazali elongo na ngai, tokopusana pene ya engumba. Tango bakobima mpo na kobundisa biso lokola na mbala oyo eleki, tokokima liboso na bango.
6 They will come out after us until we draw them away from the city, for they'll say, 'They're fleeing before us as before.' Then we'll flee from them. Bakolanda biso, mpe tokobenda bango mosika ya engumba, pamba te bakoloba : ‹ Bazali kokima liboso na biso lokola na mbala oyo eleki, › mpe tokokima liboso na bango.
7 Rise from ambush, seize the city, for your Father will hand it to you. Boye, bino bokobima wuta na bisika oyo bokobombama mpe bokobotola engumba. Yawe, Nzambe na bino, akabi yango na maboko na bino.
8 When you take the city, set it on fire. Do as our Father commanded. Look—I have commanded you." Tango bokobotola engumba, botia yango moto mpe bosala ndenge Yawe alobaki. »
9 Joshua sent them off, and they went to the place of ambush and waited between Bethel and Ai, west of Ai, but he stayed that night among the people. Jozue atindaki bango, mpe bakendeki na esika oyo basengelaki kobombama. Babombamaki na kati-kati ya Beteli mpe Ayi, na ngambo ya weste ya Ayi. Jozue alekisaki butu wana elongo na bana ya Isalaele.
10 Joshua rose early, mustered the people, and with Israel's elders led them up to Ai. Jozue alamukaki na tongo-tongo penza mpe atalaki ndenge nini basoda na ye bamilengelaki. Sima na yango, alekaki liboso elongo na bakambi ya Isalaele mpo na kokende kobundisa engumba Ayi.
11 All his fighting men set out, advanced until they were directly opposite the city, and camped north of Ai, with a valley between them and Ai. Basoda na ye nyonso bapusanaki kino na liboso ya engumba mpe batongaki molako na bango na ngambo ya nor ya Ayi, bongo lubwaku ezalaki kati na bango mpe Ayi.
12 He took about 5,000 men and set an ambush between Bethel and Ai, west of the city. Jozue azwaki basoda nkoto mitano mpe abombaki bango na kati-kati ya Beteli mpe Ayi, na ngambo ya weste ya engumba.
13 So they stationed the people—the whole camp north of the city, its rear guard west of it—and that night Joshua went into the valley's middle. Mampinga ya basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, batongaki molako na bango na ngambo ya nor ya engumba ; mpe basoda oyo batikalaka na sima, na ngambo ya weste ya engumba. Na butu wana, Jozue akendeki na kati-kati ya etando.
14 When the king of Ai saw this, the men of the city rose early and rushed out to meet Israel in battle, at the appointed spot facing the Arabah—he and all his people. He did not know an ambush waited behind the city. Tango mokonzi ya Ayi amonaki bongo, ye elongo na bato na ye nyonso, bavandi ya engumba, batelemaki na lombangu mpe babimaki mpo na kobundisa Isalaele na esika oyo nzela ekutana, liboso ya Araba. Ayebaki te ete basoda mosusu babombamaki na sima ya engumba.
15 Joshua and all Israel let themselves be driven back and fled toward the wilderness. Jozue mpe bana nyonso ya Isalaele bakosaki lokola bato oyo basili kokweya na bitumba mpe bakimaki na ngambo ya esobe.
16 All the people in the city were called out to pursue them; they pursued Joshua and were drawn away from the city. Babelelaki bato nyonso ya Ayi mpo ete balanda bango. Boye, balandaki Jozue mpe bakendeki mosika ya engumba.
17 No man remained in Ai or Bethel who did not go out after Israel; they left the city open and pursued Israel. Kati na Ayi mpe Beteli, mobali moko te atikalaki oyo azangaki kolanda Isalaele. Batikaki engumba ya kofungwama, wana bazalaki kolanda Isalaele.
18 Then our Father said to Joshua, "Stretch the javelin in your hand toward Ai—I will hand it to you." So Joshua stretched the javelin in his hand toward the city. Yawe alobaki na Jozue : « Sembola na ngambo ya Ayi likonga oyo osimbi na loboko, pamba te nalingi kokaba yango na maboko na yo. » Boye Jozue asembolaki na ngambo ya engumba likonga oyo ezalaki na loboko na ye.
19 The instant he raised his hand, the ambush rose from position, ran into the city, seized it, and quickly set it on fire. Tango kaka asembolaki loboko, basoda oyo babombamaki babimaki na lombangu wuta na bisika oyo babombamaki, bakotaki na engumba, babotolaki yango mpe batiaki yango moto.
20 The men of Ai turned and saw the city's smoke rising to the sky, with no way to flee, since those fleeing to the wilderness had turned back on their pursuers. Tango bato ya Ayi batalaki na sima, bamonaki milinga komata na likolo wuta na engumba ; moko te akokaki lisusu kokima na ngambo moko to na ngambo mosusu. Bana ya Isalaele oyo bazalaki kokima na esobe babalukelaki bato oyo bazalaki kolanda bango.
21 When Joshua and all Israel saw that the ambush had captured the city, and that its smoke rose, they turned back and struck down Ai's men. Boye, tango Jozue mpe bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete basoda oyo babombamaki bazwi engumba mpe milinga ezali komata wuta na engumba, bazongaki mpe babomaki bato ya Ayi.
22 The rest came out of the city to meet them, trapping Ai's men between Israel on both sides. Israel struck them until none survived or escaped. Basoda ya Isalaele oyo babombamaki, babimaki na engumba mpo na kobundisa bango. Bato ya Ayi bakomaki na kati-kati ya basoda ya Isalaele oyo bazalaki, bamoko na ngambo moko, mpe bamosusu, na ngambo mosusu. Basoda ya Isalaele basilisaki koboma bango nyonso, ata moko te atikalaki na bomoi, mpe ata moko te akimaki.
23 But the king of Ai they took alive and brought to Joshua. Kasi bakangaki ya bomoi mokonzi ya Ayi mpe bamemaki ye epai ya Jozue.
24 When Israel finished killing all Ai's residents in the open field and the wilderness where they had chased them, and all had fallen by the sword until none remained, all Israel returned to Ai and struck it with the sword. Tango Isalaele asilisaki koboma mibali nyonso ya Ayi, kati na zamba mpe kati na esobe epai wapi balandaki bango, mpe wana bango nyonso basilaki kokufa na mopanga, bana nyonso ya Isalaele bazongaki na Ayi mpe babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna.
25 All who fell that day, both men and women, were 12,000—all the people of Ai. Motango ya bato nyonso oyo bakufaki na mokolo wana, basi mpe mibali, ezalaki nkoto zomi na mibale : bango nyonso bazalaki bato ya Ayi.
26 Joshua kept his javelin raised until he had devoted to destruction all the inhabitants of Ai. Jozue akitisaki te loboko na ye, oyo esimbaki likonga kino tango asilisaki koboma bato nyonso oyo bazalaki kovanda na Ayi.
27 Israel kept only the livestock and plunder of that city, as our Father commanded Joshua. Kasi Isalaele azwaki mpo na ye, lokola bomengo ya bitumba, bibwele mpe biloko ya engumba yango, kolanda liloba oyo Yawe alobaki na Jozue.
28 So Joshua burned Ai and made it a permanent heap of ruins, a desolation to this day. Jozue atumbaki Ayi mpe akomisaki yango libebi mpo na libela, esika ezanga bato kino na mokolo ya lelo.
29 He hanged the king of Ai on a tree until evening. At sunset Joshua ordered his body taken down and thrown at the city gate's entrance, and a great heap of stones raised over it—still there today. Adiembikaki mokonzi ya Ayi, na nzete kino na pokwa ; bongo tango moyi elalaki, Jozue atindaki ete balongola ebembe yango na nzete. Babwakaki yango na ekotelo ya ekuke ya engumba mpe batondisaki na likolo na yango liboke monene ya mabanga oyo ezali kino na mokolo ya lelo.
30 Then Joshua built an altar to our Father, the God of Israel, on Mount Ebal, Jozue atongaki etumbelo mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, na ngomba Ebali,
31 just as Moses, our Father's servant, had commanded Israel's people—as written in the Book of the Law of Moses—an altar of uncut stones, untouched by iron. On it they offered burnt offerings to our Father and sacrificed peace offerings. ndenge Moyize, mosali na Yawe, atindaki bana ya Isalaele. Atongaki yango kolanda makambo oyo ekomama kati na buku ya Mobeko ya Moyize : etumbelo etongama na mabanga oyo bakata na esalelo ya ebende te. Na likolo na yango, batiaki mbeka ya kotumba mpo na Yawe mpe babonzaki mbeka ya boyokani.
32 There, before the Israelites, he wrote on the stones a copy of the law of Moses, which Moses had written. Na esika yango, na miso ya bana nyonso ya Isalaele, Jozue akomaki, na likolo ya mabanga, Mobeko oyo Moyize akomaki mpo na bana ya Isalaele.
33 All Israel—foreigner and native-born alike—with elders, officers, and judges, stood on both sides of the ark, facing the Levitical priests carrying the ark of our Father's covenant. Half faced Mount Gerizim, half faced Mount Ebal, as Moses the servant of our Father had earlier commanded, to bless the people of Israel. Bato nyonso ya Isalaele elongo na bakambi na bango, bakomi mibeko mpe basambisi na bango, batelemaki ngambo na ngambo ya Sanduku ya Boyokani, liboso ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe bamemaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Mopaya elongo na mwana mboka ya Isalaele bazalaki wana. Ndambo ezalaki liboso ya ngomba Garizimi, mpe ndambo mosusu, liboso ya ngomba Ebali, kolanda mitindo oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki mpo na kopambola bana ya Isalaele.
34 Then he read all the words of the law—blessing and curse—exactly as written in the Book of the Law. Sima na yango, Jozue atangaki maloba nyonso ya Mobeko : mapamboli mpe bilakeli mabe kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Mobeko.
35 Joshua read every word Moses had commanded—leaving nothing out—before the whole assembly of Israel: women, children, and the foreigners living among them. Jozue azangisaki te kotanga, liboso ya lisanga mobimba ya Isalaele, basi, bana mpe bapaya oyo bazalaki kati na bango, maloba nyonso oyo Moyize akomaki.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]