Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Numbers 13 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father said to Moses, Yawe alobaki na Moyize :
2 "send men to scout the land of Canaan, which I'm giving Israel's people. Send one man per ancestral tribe, each a leader among them." « Tinda bato mpo na kononga mokili ya Kanana oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. Kati na libota moko na moko, pona mpe tinda moto moko kati na bakambi. »
3 So Moses sent them from the wilderness of Paran at our Father's command; all were leaders of Israel's people. Na mitindo ya Yawe, Moyize atindaki bango wuta na esobe ya Parani. Bango nyonso bazalaki bakambi ya mabota ya bana ya Isalaele.
4 These were their names: from the tribe of Reuben, Shammua the son of Zaccur; Tala bakombo na bango : mpo na libota ya Ribeni : Chamuwa, mwana mobali ya Zakuri ;
5 from the tribe of Simeon, Shaphat the son of Hori; mpo na libota ya Simeoni : Shafati, mwana mobali ya Ori ;
6 from the tribe of Judah, Caleb the son of Jephunneh; mpo na libota ya Yuda : Kalebi, mwana mobali ya Yefune ;
7 from the tribe of Issachar, Igal the son of Joseph; mpo na libota ya Isakari : Yigali, mwana mobali ya Jozefi ;
8 from the tribe of Ephraim, Hoshea the son of Nun; mpo na libota ya Efrayimi : Oze, mwana mobali ya Nuni ;
9 from the tribe of Benjamin, Palti the son of Raphu; mpo na libota ya Benjame : Paliti, mwana mobali ya Rafu ;
10 from the tribe of Zebulun, Gaddiel the son of Sodi; mpo na libota ya Zabuloni : Gadieli, mwana mobali ya Sodi ;
11 from the tribe of Joseph (that is, from the tribe of Manasseh), Gaddi the son of Susi; mpo na libota ya Jozefi na nzela ya Manase : Gaadi, mwana mobali ya Susi ;
12 from the tribe of Dan, Ammiel the son of Gemalli; mpo na libota ya Dani : Amieli, mwana mobali ya Gemali ;
13 from the tribe of Asher, Sethur the son of Michael; mpo na libota ya Aseri : Seturi, mwana mobali ya Mikaeli ;
14 from the tribe of Naphtali, Nahbi the son of Vophsi; mpo na libota ya Nefitali : Nakibi, mwana mobali ya Vofisi ;
15 from the tribe of Gad, Geuel the son of Machi. mpo na libota ya Gadi : Geweli, mwana mobali ya Maki.
16 These are the names of the men Moses sent to scout the land. Moses named Hoshea son of Nun, Joshua. Oyo nde bakombo ya bato oyo Moyize atindaki mpo na kononga mokili ya Kanana. Moyize apesaki Oze, mwana mobali ya Nuni, kombo « Jozue. »
17 Moses sent them to scout the land of Canaan and said to them, "Go up this way into the Negev, go up into the hill country, Tango Moyize atindaki bango mpo na kononga mokili ya Kanana, alobaki : « Bolekela na nzela ya etuka ya Negevi mpe bokotela na nzela ya mokili ya bangomba.
18 and see what the land is like, and whether the people living there are strong or weak, few or many, Botala soki mokili yango ezali ndenge nini mpe soki bato oyo bavandaka kuna bazalaka makasi to balemba, soki bazalaka ebele to moke.
19 and whether the towns they live in are open camps or fortified, and whether the land is good or bad, Botala ndenge nini mokili epai wapi bazali kowumela ezali : soki ezali malamu to mabe ; soki bazingela bingumba na yango na bamir to te.
20 and whether the land is rich or poor, and whether it has trees or not. Be brave, and bring back fruit from the land." It was the season of the first ripe grapes. Botala soki mabele na yango ezali ndenge nini : ebotaka malamu to te ; ezali na banzete to te. Bosala nyonso penza ete bozonga na mbuma ya mokili yango. » Ezalaki eleko ya kobuka bambuma ya liboso ya vino.
21 So they went up and explored the land from the wilderness of Zin to Rehob, near Lebo-hamath. Boye bakendeki mpe banongaki mokili kobanda na esobe ya Tsini kino na Reobi, pembeni ya Lebo-Amati.
22 They went up through the Negev to Hebron, where Ahiman, Sheshai, and Talmai, Anak's descendants, lived. Hebron was built seven years before Zoan in Egypt. Balekaki na nzela ya etuka ya Negevi mpe bakomaki kino na Ebron epai wapi Ayimani, Sheshayi mpe Talimayi, bakitani ya Anaki, bazalaki kovanda. Engumba Ebron etongamaki mibu sambo liboso ya engumba Tsoani kati na Ejipito.
23 They reached the Valley of Eshcol and cut a branch with one cluster of grapes, carried on a pole between two men; they also brought pomegranates and figs. Tango bakomaki na lubwaku ya Eshikoli, bakataki etape mobimba ya nzete ya vino oyo ezalaki na liboke ya bambuma ya vino. Lokola ezalaki kilo makasi, bato mibale kati na bango basalelaki banzete mpo na komema yango ; bamemaki lisusu bambuma ya grenade mpe ya figi.
24 That place was named Valley of Eshcol, since the Israelites cut a cluster of grapes there. Wuta na tango wana, bakomaki kobenga esika yango « lubwaku ya Eshikoli, » oyo elingi koloba « lubwaku ya liboke ya bambuma ya vino, » mpo na kokanisa liboke ya bambuma ya vino oyo bana ya Isalaele babukaki kuna.
25 At the end of forty days they returned from exploring the land. Sima na mikolo tuku minei, bazongaki wuta na mokili oyo banongaki.
26 They came to Moses, Aaron, and the whole community of Israel in the wilderness of Paran, at Kadesh, reported back to them and the whole community, and showed them the land's fruit. Bayaki kokuta Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele na Kadeshi, kati na esobe ya Parani. Ezalaki kuna nde bapesaki bango elongo na lisanga mobimba sango ya mobembo na bango mpe balakisaki bango bambuma ya mokili yango.
27 They told him, "We went to the land you sent us to. It truly flows with milk and honey; here is its fruit. Bapesaki sango oyo epai ya Moyize : « Tokotaki kino na mokili epai wapi otindaki biso. Solo, ezali penza mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi ; tala kutu bambuma ya mokili yango.
28 Yet the people in the land are strong, the cities fortified and very large—we even saw Anak's descendants there. Kasi bato oyo bavandaka kuna bazali makasi mingi, bingumba na bango etongama makasi mpe ezali minene ; tomonaki lisusu bakitani ya Anaki kuna.
29 Amalekites live in the Negev. Hittites, Jebusites, and Amorites live in the hills. Canaanites live along the sea and beside the Jordan." Bato ya Amaleki bavandaka na etuka ya Negevi ; bato ya Iti, ya Yebusi mpe ya Amori bavandaka na mokili ya bangomba, mpe bato ya mboka Kanana bavandaka pembeni ya ebale monene mpe pembeni-pembeni ya Yordani. »
30 Caleb silenced the people before Moses and said, "Let's go up now and possess it—we can certainly overcome it." Bongo Kalebi apamelaki bato ete batika makelele liboso ya Moyize, mpe alobaki : — Tokende kobotola mokili yango, pamba te tozali solo na makoki mpo na kosala yango !
31 But the men who went up with him said, "We can't go up against the people, for they are stronger than we are." Kasi bato oyo bakendeki elongo na ye balobaki : — Tokokoka te kobundisa bato wana mpo ete bazali makasi koleka biso.
32 So they gave Israel a bad report of the land they had explored, saying, "The land we crossed to explore devours its inhabitants, and everyone we saw there is of great size. Bongo bakomaki kopanza sango mabe kati na bana ya Isalaele na tina na mboka oyo banongaki, bazalaki koloba : « Mokili oyo tonongaki ezali penza mabele oyo eliaka bavandi na yango ; bongo bato nyonso oyo tomonaki kuna bazali bingambe.
33 There we saw the Nephilim—Anak's descendants come from the Nephilim. We seemed like grasshoppers to ourselves, and so we seemed to them." Tomonaki kuna lisusu bato milayi, bakitani ya Anaki, oyo babima na nzela ya bato milayi. Na miso na biso moko, tozalaki komimona lokola mabanki ; bango mpe bazalaki komona biso kaka ndenge wana na miso na bango. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]