Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Numbers 12 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Miriam and Aaron spoke against Moses over the Cushite woman he had married—he had married a Cushite woman. Miriami mpe Aron bazalaki kotonga Moyize likolo ya mwasi na ye, pamba te abalaki mwasi ya mokili ya Kushi.
2 They said, "Has our Father spoken only through Moses? Hasn't he also spoken through us?" And our Father heard it. Balobaki : — Boni, Yawe alobaka kaka na nzela ya Moyize ? Alobaki mpe na nzela na biso te ? Yawe ayokaki bango.
3 Now the man Moses was very humble, more than anyone else on the face of the earth. Nzokande Moyize azalaki moto ya komikitisa makasi koleka bato nyonso ya mokili.
4 Suddenly our Father told Moses, Aaron, and Miriam, "Come out, you three, to the tent of meeting." The three went out. Mbala moko, Yawe alobaki na Moyize, Aron mpe Miriami : — Boya bino misato na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bango nyonso misato bakendeki.
5 Then our Father came down in a pillar of cloud, stood at the tent entrance, called Aaron and Miriam, and both came forward. Yawe akitaki na likonzi ya lipata, atelemaki na ekuke ya Ndako ya kapo mpe abengaki Aron mpe Miriami. Tango bango mibale batelemaki liboso,
6 He said, "Hear my words: if a prophet is among you, I, your Father, reveal myself to him in a vision, speak to him in a dream. alobaki : — Boyoka maloba na Ngai ! Soki mosakoli moko ya Yawe azali kati na bino, namimonisaka Ngai moko epai na ye na nzela ya bimoniseli, nalobaka na ye na nzela ya bandoto.
7 Not so with my servant Moses; he is faithful in all my house. Kasi ezalaka bongo te mpo na Moyize, mosali na Ngai. Azali sembo kati na ndako na Ngai mobimba.
8 With him I speak mouth to mouth, clearly and not in riddles, and he sees the form of our Father. Why then were you not afraid to speak against my servant Moses?" Nasololaka na ye elongi na elongi, na polele penza kasi na masese te. Amonaka lolenge ya Yawe. Mpo na nini bozali na somo te ya kotonga Moyize, mosali na Ngai ?
9 So the anger of our Father burned against them, and he departed. Bongo Yawe apeliselaki bango kanda na Ye mpe atikaki bango.
10 When the cloud lifted from over the tent, there was Miriam—diseased, white as snow. Aaron turned to Miriam, and there—diseased. Tango kaka lipata elongwaki likolo ya Ndako ya kapo, bokono ya maba ezwaki mbala moko Miriami : ezalaki pembe lokola mvula ya pembe. Aron abalukaki mpo na kotala Miriami mpe amonaki ete azwi bokono ya maba.
11 Aaron told Moses, "Please, my lord, don't hold against us the sin of our foolishness and wrongdoing. Bongo Aron alobaki na Moyize : — Nabondeli yo, nkolo na ngai ! Kotangela biso te masumu oyo tosali na bozoba !
12 Don't let her be like a stillborn, its flesh half-consumed leaving its mother's womb." Kotika te ete Miriami azala lokola mwana oyo abotami ya kokufa, oyo abimi na libumu ya mama na ye na ndambo ya nzoto ya kopola !
13 So Moses cried out to our Father, "Please, my Father, please heal her!" Boye, Moyize abelelaki Yawe : — Oh Nzambe, nabondeli Yo, bikisa ye !
14 But our Father told Moses, "If her father had only spit in her face, wouldn't she be ashamed seven days? Shut her outside the camp seven days; then bring her back." Yawe azongiselaki Moyize : — Soki tata na ye abwakelaki ye soyi na elongi ; boni, alingaki kozala na soni te mikolo sambo ? Tia ye na libanda ya molako mikolo sambo, na sima na yango nde akoki kozonga.
15 Miriam was shut outside the camp seven days; the people did not move until she was brought back. Boye batiaki Miriami libanda ya molako mikolo sambo mpe bato bazalaki kotambola te kino tango Miriami azongaki.
16 After that the people set out from Hazeroth and camped in the Wilderness of Paran. Sima na yango, bato batikaki Atseroti mpe bakendeki kotonga molako na bango na esobe ya Parani.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]