Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Mark 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In those days, again a large crowd gathered with nothing to eat. Jesus called his disciples and said, Na mikolo yango, ebele penza ya bato bayaki lisusu kosangana zingazinga ya Yesu. Lokola bazalaki na eloko ya kolia te, Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki na bango :
2 "I feel compassion for the crowd—they've been with me three days now and have nothing to eat. — Nazali koyokela bato oyo mawa, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te.
3 If I send them home hungry, they'll collapse on the way—some have come from far off." Soki nazongisi bango na bandako na bango na nzala, bakolemba nzoto na nzela ; pamba te, bato mosusu kati na bango bawutaki mosika.
4 And his disciples answered him, "How can anyone feed these people with bread here in the wilderness?" Bayekoli na Ye bazongisaki : — Kati na esobe oyo, esika nini tokoki kozwa mapa mpo na koleisa bango mpe batonda ?
5 And he asked them, "How many loaves do you have?" They said, "Seven." Yesu atunaki bango : — Bozali na mapa boni ? Bazongisaki : — Tozali na mapa sambo.
6 He told the crowd to sit on the ground, took the seven loaves, gave thanks, broke them, and gave them to his disciples to serve to the people; and they served the crowd. Boye, alobaki na ebele ya bato yango ete bavanda na mabele. Bongo azwaki mapa yango sambo, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato. Mpe bayekoli basalaki bongo.
7 They also had a few small fish; after blessing them, he told the disciples to serve these to the people. Bazalaki mpe na mwa ndambo ya bambisi ya mike-mike. Apambolaki yango mpe alobaki na bayekoli na Ye ete bakabola yango.
8 And they ate and were satisfied. And they took up seven baskets of the leftover pieces. Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, batondisaki na yango bitunga sambo.
9 About 4,000 people were there. And he sent them away. Bato bazalaki pene nkoto minei. Bongo, Yesu azongisaki bango.
10 Then immediately he got into the boat with his disciples and went to the district of Dalmanutha. Mbala moko, Yesu amataki na bwato elongo na bayekoli na Ye mpe akendeki na etuka ya Dalimanuta.
11 The Pharisees came and began debating with him, testing him by demanding a sign from heaven. Bafarizeo bayaki mpe bakomaki kotuna Yesu mituna ; mpo na komeka Ye, basengaki na Ye ete asala elembo moko kowuta na Likolo.
12 Sighing deeply in his spirit, he said, "Why does this generation demand a sign? Truly I tell you, no sign will be given to this generation." Yesu ayokaki mawa makasi kati na molimo na Ye mpe alobaki : « Mpo na nini bato ya ekeke oyo bazali kosenga elembo ? Nazali koloba na bino penza ya solo : bakopesamela elembo moko te ! »
13 And he left them, got back into the boat, and went to the other side. Bongo atikaki bango, amataki lisusu na bwato mpe akendeki na ngambo mosusu ya ebale.
14 They'd forgotten to bring bread—only one loaf was with them in the boat. Bayekoli babosanaki komema mapa ; bazalaki kaka na lipa moko kati na bwato.
15 And he warned them, "Watch out—beware of the yeast of the Pharisees and the yeast of Herod." Yesu akebisaki bango : — Bofungola miso mpe bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Erode !
16 And they began discussing with one another that they had no bread. Bayekoli bakomaki kolobana bango na bango : — Azali koloba bongo mpo ete tozali na mapa te.
17 Knowing this, Jesus asked, "Why discuss having no bread? Do you still not see or grasp? Are your hearts hardened? Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki : — Bozali kolobana bino na bino mpo ete bozali na mapa te ! Mpo na nini ? Boni, bozwi kaka bososoli nanu te ; mayele na bino ezali kaka ya kozipama ; bozali na mitema makasi ;
18 Having eyes, do you not see? Having ears, do you not hear? And do you not remember? bozali na miso, kasi bozali komona te ; bozali na matoyi, kasi bozali koyoka te ? Bobosani penza !
19 When I broke the five loaves for the 5,000, how many baskets full of fragments did you collect?" They said, "Twelve." Tango nakataki mapa mitano mpo na kokabolela bato nkoto mitano, bozongaki na motango boni ya bitunga etonda na biteni ya mapa, sima na kokabolela bato ? Bazongisaki : — Bitunga zomi na mibale.
20 "And when I broke the seven for the 4,000, how many basketfuls of broken pieces did you gather?" They said, "Seven." Bongo tango nakataki mapa sambo mpo na kokabolela bato nkoto minei, bozongaki na bitunga boni etonda na biteni ya mapa ? Bazongisaki : — Tolokotaki bitumba sambo.
21 And he said to them, "Do you still not understand?" Alobaki na bango : — Bozwi kaka bososoli nanu te ?
22 They came to Bethsaida, where people brought him a blind man and begged Jesus to touch the man. Tango bakomaki na Betisaida, bato bamemaki epai na Yesu moto moko akufa miso ; mpe basengaki na Yesu ete asimba ye.
23 He took the blind man's hand, led him out of the village, spit on his eyes, laid hands on him, and asked, "Do you see anything?" Yesu asimbaki loboko ya mokufi miso mpe amemaki ye na libanda ya mboka ; bongo apakolaki ye soyi na miso, atielaki ye maboko mpe atunaki ye : — Boni, omoni eloko ?
24 He looked up and said, "I see people, but they look like trees, walking." Moto yango atalaki mpe alobaki : — Nazali komona bato, kasi bazali lokola banzete oyo ezali kotambola.
25 Then Jesus put his hands on the man's eyes again; he looked intently, was restored, and saw everything distinctly. Bongo Yesu atiaki lisusu maboko na Ye na miso ya moto yango, mpe moto yango abikaki. Boye akomaki komona malamu penza.
26 And he sent him home, saying, "Do not even go into the village." Yesu alobaki na ye : — Kende na ndako na yo, komeka kutu te kozonga na mboka.
27 Jesus and his disciples went to the villages of Caesarea Philippi. On the way he asked them, "Who do people say I am?" Yesu mpe bayekoli na Ye bakendeki na bamboka ya Sezarea ya Filipo. Na nzela, atunaki bango : — Bato bazali koloba ete Ngai nazali nani ?
28 They told him, "John the Baptist; and others say Elijah; and others, one of the prophets." Bazongisaki : — Bamoko balobaka ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, moko kati na basakoli.
29 Then he asked them, "But who do you say I am?" Peter answered, "You are the Christ." Yesu atunaki bango : — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani ? Petelo azongiselaki Ye : — Ozali Masiya.
30 And he strictly warned them not to speak about him. Yesu apekisaki bango makasi koloba bongo na moto ata moko.
31 He began teaching them the Son of Man must suffer much, be rejected by the elders, chief priests, and scribes, be killed, and rise after three days. Yesu akomaki koteya bango : — Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi ; bakambi, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye, basengeli koboma Ye, mpe, sima na mikolo misato, asengeli kosekwa.
32 He said this plainly. And Peter took him aside and began to rebuke him. Azalaki koloba makambo yango na polele penza. Bongo Petelo abendaki Yesu na pembeni mpe akomaki kopamela Ye : — Koloba bongo te !
33 But turning, he looked at his disciples and rebuked Peter: "Get behind me, Satan! For you are not setting your mind on the things of our Father, but on the things of man." Kasi Yesu abalukaki, atalaki bayekoli na Ye mpe apamelaki Petelo : — Mosika na Ngai, Satana ! Makanisi na yo ezali makanisi ya Nzambe te, ezali penza makanisi ya bato.
34 He called the crowd and his disciples and said to them, "Whoever wants to come after me must deny himself, take up his cross, and follow me. Yesu abengaki ebele ya bato mpe bayekoli na Ye, alobaki na bango : — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.
35 Whoever wants to save his life will lose it; whoever loses his life for my sake and the good news will save it. Pamba te moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai mpe mpo na Sango Malamu akobikisa yango.
36 What good does it do a person to gain the whole world and forfeit his soul? Litomba nini ezali mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ?
37 For what can a person give in exchange for his soul? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ?
38 For whoever is ashamed of me and my words in this adulterous, sinful generation—the Son of Man will be ashamed of them too when he comes in his Father's glory with the holy angels." Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, kati na bato ya ekeke oyo, ba-oyo batosaka Nzambe te mpe batondi na masumu, Mwana na Moto mpe akoyoka ye soni, tango akoya elongo na ba-anjelu ya bule kati na nkembo ya Tata na Ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]