Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Mark 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 He said to them, "Truly I tell you: some standing here will not taste death before they see the kingdom of our Father come with power." Yesu alobaki na bango lisusu : — Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona Bokonzi ya Nzambe koya na nguya.
2 Six days later Jesus took Peter, James, and John, and led them up a high mountain alone, and he was transfigured before them. Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane ; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi epai wapi bazalaki kaka bango moko. Yesu abongolamaki na miso na bango :
3 His clothes became radiant, dazzling white—whiter than anyone on earth could bleach them. bilamba na Ye ekomaki kongenga, ekomaki pembe makasi ; moto moko te kati na mokili akoki kobimisa pembe ya ndenge wana.
4 And Elijah appeared to them along with Moses, and they were talking with Jesus. Mbala moko, bamonaki Eliya elongo na Moyize bazali kosolola na Yesu.
5 Peter said to Jesus, "Rabbi, it's good that we're here. Let's make three shelters—one for you, one for Moses, and one for Elijah." Petelo alobaki na Yesu : — Moteyi, eleki malamu mpo na biso kotikala awa ! Tokotonga bandako misato ya kapo : moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya.
6 He did not know what to say, for they were terrified. Solo, Petelo azalaki kososola te makambo oyo azalaki koloba, pamba te bango misato batondaki na kobanga.
7 A cloud appeared and overshadowed them, and a voice came from the cloud: "This is my beloved Son. Listen to him!" Lipata moko ebimaki mpe ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : — Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, boyoka Ye !
8 Suddenly, when they looked around, they no longer saw anyone with them except Jesus. Mbala moko, bayekoli batalaki zingazinga na bango mpe bamonaki moto mosusu te elongo na bango, kaka Yesu.
9 Coming down the mountain, he ordered them to tell no one what they'd seen until the Son of Man rose from the dead. Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apekisaki bango koloba ata na moto moko, makambo oyo bawutaki komona kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi.
10 So they kept the matter to themselves, questioning what rising from the dead could mean. Babatelaki likambo yango na motema. Atako bongo, bazalaki kaka kotunana : — Kosekwa kati na bakufi elingi koloba nini ?
11 And they asked him, "Why do the scribes say that Elijah must come first?" Bayekoli batunaki Yesu : — Mpo na nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Eliya asengeli koya moto ya liboso ?
12 He said, "Elijah does come first and restores everything. Then why is it written the Son of Man must suffer much and be treated with contempt? Yesu azongiselaki bango : — Solo, Eliya asengeli koya moto ya liboso mpo na kozongisa makambo nyonso na molongo. Bongo mpo na nini ekomama lisusu ete Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi, mpe basengeli koboya Ye ?
13 But I tell you, Elijah has come, and they did to him whatever they pleased, as it is written about him." Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya ayaki mpe basalaki ye makambo nyonso oyo balingaki, kolanda ndenge ekomama na tina na ye.
14 Coming to the other disciples, they saw a large crowd around the disciples, and scribes arguing with them. Tango bakomaki pene ya esika oyo bayekoli mosusu bazalaki, bamonaki ebele ya bato penza bazingeli bango, mpe balakisi ya Mobeko kotiana tembe elongo na bayekoli.
15 As soon as the whole crowd saw Jesus, they were astonished and ran to greet him. Tango kaka bato yango bamonaki Yesu, bakamwaki mingi mpe bapotaki mbangu mpo na kokutana na Ye mpe kopesa Ye mbote.
16 He asked them, "What are you arguing about with the scribes?" Yesu atunaki bango : — Likambo nini bozali kotiana na yango tembe elongo na bayekoli ?
17 Someone in the crowd answered him, "Teacher, I brought my son to you; he has a spirit that won't let him speak. Moto moko kati na ebele yango ya bato azongiselaki Ye : — Moteyi, namemaki mwana na ngai, oyo ya mobali epai na Yo ; pamba te azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo esala ete alobaka te.
18 Whenever it seizes him, it throws him down. He foams at the mouth, grinds his teeth, and stiffens. I asked your disciples to drive it out, but they couldn't." Bipai nyonso oyo molimo yango ekangaka ye, ebwakaka ye na mabele, mpe mwana akomaka kobimisa fulufulu na monoko, kolia minu, mpe nzoto na ye ekangamaka. Nasengaki na bayekoli na Yo ete babengana molimo yango, kasi balongaki te.
19 He replied, "You unbelieving generation, how long must I stay with you? How long must I endure you? Bring him to me." Yesu alobaki na bango : — Ekeke ya bato bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango.
20 They brought the boy to him. Seeing Jesus, the spirit instantly convulsed him; he fell to the ground, thrashing and foaming at the mouth. Bongo bamemaki mwana yango epai ya Yesu. Tango kaka molimo yango ya mabe emonaki Yesu, eningisaki mwana yango makasi mpe mwana akweyaki na mabele, akomaki kobaluka-baluka mpe kobimisa fulufulu na monoko.
21 Jesus asked the boy's father, "How long has this been happening to him?" "From childhood," he said. Yesu atunaki tata ya mwana : — Esali mikolo boni wuta mwana akoma boye ? Tata ya mwana azongisaki : — Wuta tango azalaki mwana moke penza.
22 "It has often thrown him into fire and water to destroy him. But if you can do anything, pity us and help us." Mbala mingi, molimo mabe etindikaka ye na moto to na mayi mpo na koluka koboma ye. Kasi soki okoki kobikisa ye, yokela biso mawa mpe sunga biso.
23 Jesus said to him, "'If you can'? Everything is possible for the one who believes." Yesu alobaki na ye : — Olobi nini : « Soki okoki ! » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.
24 Immediately the boy's father cried, "I believe; help my unbelief!" Mbala moko, tata ya mwana alobaki na mongongo makasi : — Nandimi ! Sunga ngai, pamba te nazangi kondima.
25 Seeing a crowd running together, Jesus rebuked the unclean spirit: "Mute and deaf spirit, I command you—come out of him and never enter him again!" Tango Yesu amonaki ebele ya bato koya mbangu, abenganaki molimo mabe : — Molimo mabe, yo oyo okomisaka moto baba, napesi yo mitindo : bima kati na mwana oyo mpe kozonga lisusu te kati na ye.
26 Crying out and convulsing him hard, it came out. He looked like a corpse, so many said, "He's dead." Molimo mabe egangaki, eningisaki mwana makasi mpe ebimaki kati na ye. Mwana akomaki lokola moto akufi na ndenge ete mingi kati na bato oyo bazalaki wana bakomaki koloba « Akufi ! »
27 But Jesus took him by the hand and raised him up, and he stood. Kasi Yesu asimbaki mwana yango na loboko mpe atelemisaki ye ; mpe mwana atelemaki.
28 When Jesus had gone indoors, his disciples asked him privately, "Why couldn't we drive it out?" Yesu akotaki na ndako ; lokola bayekoli batikalaki bango moko kaka elongo na Ye, batunaki Ye : — Mpo na nini, biso, tolongaki te kobengana molimo yango ?
29 He told them, "This kind can come out only by prayer." Yesu azongisaki : — Babenganaka molimo ya ndenge wana kaka na losambo .
30 They left there and passed through Galilee. Jesus did not want anyone to know where they were, Tango balongwaki na esika wana, bakatisaki na mokili ya Galile mpe Yesu alingaki te ete moto ata moko ayeba esika oyo bazali,
31 because he was teaching his disciples, telling them, "The Son of Man is being handed into human hands. They will kill him, and three days later he will rise." pamba te azalaki koteya bayekoli na Ye mpe koloba na bango : — Bakokaba Mwana na Moto na maboko ya bato, bakoboma Ye, mpe, mikolo misato sima na kufa na Ye, akosekwa.
32 But they did not understand what he meant, and they were afraid to ask him. Kasi bazalaki kososola te maloba wana mpe bazalaki kobanga kopesa Ye mituna na tina na yango.
33 They came to Capernaum. In the house he asked them, "What were you arguing about on the way?" Tango bakomaki na Kapernawumi, wana bazalaki kati na ndako, Yesu atunaki bango : — Likambo nini bozalaki kotiana tembe na nzela ?
34 But they were silent, since they had argued along the way about who was greatest. Kasi bavandaki nye, pamba te, na nzela, bazalaki penza kotiana tembe mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene.
35 He sat down, called the Twelve, and told them, "Anyone who wants to be first must be last of all and servant of all." Yesu avandaki, abengaki bayekoli zomi na mibale mpe alobaki na bango : — Moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso asengeli kozala moto ya suka mpe mosali ya bato nyonso.
36 He took a little child, stood him among them, took the child in his arms, and said to them: Yesu akamataki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango mpe, sima na Ye koyamba mwana yango na maboko na Ye, alobaki na bango :
37 "Whoever accepts one of these little children in my name accepts me; whoever accepts me accepts not me but the one who sent me." — Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko. Mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi Ngai te, kasi ayambi nde Motindi na Ngai.
38 John said to him, "Teacher, we saw someone driving out demons in your name and tried to stop him, since he doesn't follow us." Yoane alobaki : — Moteyi, tomonaki moto moko azali kobengana milimo mabe na Kombo na Yo, mpe topekisaki ye, pamba te azali elongo na biso te.
39 But Jesus said, "Don't stop him—no one who does a miracle in my name can soon speak evil of me. Kasi Yesu azongisaki : — Bopekisa ye te ; pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa na Kombo na Ngai mpe aloba mbala moko, sima na mwa tango, mabe na tina na Ngai.
40 For whoever is not against us is for us. Moto oyo atelemeli biso te azali mpo na biso.
41 Truly I tell you, whoever gives you a cup of water to drink because you belong to Christ will never lose his reward. Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo apesi bino kopo ya mayi na Kombo na Ngai, mpo ete bozali bato ya Klisto, akotikala kobungisa te lifuti na ye.
42 Whoever trips up one of these little ones who believe in me—better for him to have a large millstone hung around his neck and be thrown into the sea. Kasi soki moto moko akweyisi na masumu moko kati na bana mike oyo bandimelaka Ngai, ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo na kingo mpe kobwaka ye na ebale.
43 If your hand trips you up, cut it off. Better to enter life maimed than with two hands to go into hell, into the unquenchable fire. Soki loboko na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na loboko moko, na esika ete otikala na maboko mibale mpe okende na lifelo, kati na moto oyo ekufaka te, [
44 Not in this edition epai wapi nkusu mpe moto ekufaka te.]
45 If your foot trips you up, cut it off. Better to enter life lame than be thrown into hell with two feet. Soki lokolo na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na lokolo moko, na esika ete otikala na makolo mibale mpe obwakama na lifelo [
46 Not in this edition epai wapi nkusu mpe moto ekufaka te.]
47 If your eye trips you up, throw it out. Better to enter the kingdom of our Father with one eye than be thrown into hell with two, Soki liso na yo ekweyisaka yo na masumu, longola yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota na Bokonzi ya Nzambe, na liso moko, na esika ete okoba kozala na miso mibale mpe obwakama na lifelo
48 where 'their worm never dies and the fire never goes out.' epai wapi nkusu ekufaka te, mpe moto ekufaka te.
49 For everyone will be salted with fire. Pamba te moto na moto akoleka na moto mpo ete akoma elengi lokola mungwa.
50 Salt is good, but if it loses its saltiness, how can you season it again? Keep salt among yourselves, and be at peace with each other." Mungwa ezali malamu. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bokokoka lisusu kozongisa elengi na yango ? Yango wana, bozala na mungwa kati na bino, mpe bozala na kimia bino na bino.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]