Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Mark 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 He left there for the region of Judea and beyond the Jordan; crowds gathered to him again, and as usual he taught them once more. Yesu alongwaki na esika wana mpe akendeki na etuka ya Yuda, na ngambo mosusu ya Yordani. Ebele penza ya bato bayaki lisusu kosangana pene na ye ; bongo akomaki lisusu koteya bango kolanda momesano na Ye.
2 Some Pharisees came to test him, asking, "Is it lawful for a man to divorce his wife?" Bafarizeo bapusanaki mpe bapesaki Ye motuna mpo na komeka Ye : — Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala ?
3 He answered them, "What did Moses command you?" Yesu azongiselaki bango : — Moyize apesaki bino mobeko nini ?
4 They said, "Moses permitted a man to write a certificate of divorce and send her away." Balobaki na Yesu : — Moyize apesaki na mobali nzela ya koboma libala na mwasi na ye, kaka soki akomi mokanda ya koboma libala.
5 Jesus told them, "He wrote you this command because your hearts were hard. Bongo Yesu alobaki na bango : — Moyize akomaki mobeko wana mpo na bino, pamba te mitema na bino ezali mabanga.
6 But from the beginning of creation, our Father made them male and female. Kasi na ebandeli ya mokili, Nzambe « akelaki bango mobali mpe mwasi. »
7 'For this reason a man will leave his father and mother and be joined to his wife, Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye,
8 and the two will become one flesh.' So they are no longer two, but one flesh. mpe bango mibale bakokoma nzoto moko. Boye, bakozala lisusu mibale te, kasi nzoto moko.
9 Therefore what our Father has joined together, let no one separate." Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi.
10 Back in the house, the disciples asked him about this again. Tango bazongaki na ndako, bayekoli batunaki lisusu Yesu na tina na likambo yango.
11 He said to them, "Whoever divorces his wife and marries another commits adultery against her, Yesu alobaki na bango : — Soki mobali alongoli mwasi na ye na libala mpe abali mwasi mosusu asali ekobo liboso ya mwasi na ye ya liboso.
12 and if she divorces her husband and marries another, she commits adultery." Soki mwasi abomi libala na ye mpe abali mobali mosusu asali ekobo.
13 People were bringing children to him so that he might touch them, but the disciples rebuked them. Bato bazalaki komema bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko, kasi bayekoli bazalaki kobengana bato oyo bazalaki komema bana yango.
14 When Jesus saw this, he grew angry and said, "Let the children come to me; don't stop them, for the kingdom of our Father belongs to such as these. Tango Yesu amonaki bongo, ayokaki pasi na motema mpe alobaki na bayekoli : — Botika bana mike baya epai na Ngai ; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.
15 Truly I tell you, whoever doesn't receive our Father's kingdom like a child will never enter it." Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.
16 And he took them in his arms and blessed them, laying his hands on them. Bongo ayambaki bana yango, na maboko na Ye, atielaki bango maboko mpe apambolaki bango.
17 As he started down the road, a man ran up, knelt before him, and asked, "Good Teacher, what must I do to inherit eternal life?" Wana Yesu azalaki kokende, moto moko apotaki mbangu mpo na koya epai na Yesu, afukamaki liboso na Ye mpe atunaki : — Moteyi malamu, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ?
18 Jesus asked, "Why call me good? No one is good except our Father alone. Yesu azongisaki : — Mpo na nini ozali kobenga Ngai « Moteyi malamu ? » Moko te azali malamu, longola kaka Ye moko Nzambe.
19 You know the commandments: 'don't murder, commit adultery, steal, or give false testimony; don't defraud; honor your father and mother.'" Oyebi mibeko oyo : « Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okosalaka moninga mabe te, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. »
20 He said to him, "Teacher, all these I have kept since my youth." Moto yango alobaki lisusu : — Moteyi, natosaka nyonso wana wuta bolenge na ngai !
21 Jesus looked at him and loved him. "One thing you lack: go, sell everything you own, give to the poor—you'll have treasure in heaven—then come follow me." Yesu atalaki ye, asepelaki na ye mingi mpe alobaki na ye : — Ozangi eloko moko kaka : kende, teka biloko na yo nyonso mpe pesa mbongo oyo okozwa epai ya babola ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
22 At this word his face fell, and he went away grieving, for he had many possessions. Tango moto yango ayokaki bongo, alembaki nzoto mpe akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.
23 Jesus looked around and told his disciples, "How hard it will be for the wealthy to enter the kingdom of our Father!" Yesu atalaki bayekoli na Ye, alobaki na bango : — Ezali pasi mpo na bazwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe !
24 The disciples were amazed at his words. Jesus said to them again, "Children, how hard it is to enter the kingdom of our Father! Bayekoli bakamwaki mingi mpo na maloba na Ye. Kasi Yesu alobaki na bango lisusu : — Solo, bana na Ngai, ezali pasi mpo na kokota kati na Bokonzi ya Nzambe !
25 A camel goes through a needle's eye easier than a rich person enters our Father's kingdom." Ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.
26 They were even more astonished and said to one another, "Then who can be saved?" Bayekoli bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana : — Bongo nani penza akoki kobikisama ?
27 Jesus looked at them and said, "With man, impossible; but not with our Father, for all things are possible with our Father." Yesu atalaki bango mpe alobaki : — Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, ekosalema penza ; pamba te nyonso ekoki kosalema na Nzambe.
28 Peter began to say to him, "Look, we have left everything and followed you." Petelo alobaki na Yesu : — Biso, totiki nyonso mpo na kolanda Yo !
29 Jesus said, "Truly I tell you, no one has left house or brothers or sisters or mother or father or children or fields for my sake and for the gospel, Yesu azongisaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo atiki ndako na ye, bandeko na ye ya mibali mpe ya basi, mama na ye, tata na ye, bana na ye to bilanga na ye, mpo na Ngai mpe mpo na Sango Malamu,
30 "who won't receive a hundredfold now, in this time—houses, brothers, sisters, mothers, children, fields, with persecutions—and in the age to come, eternal life. akozwa mbala nkama koleka, na tango oyo tozali kobika sik’oyo, bandako, bandeko ya mibali mpe ya basi, bamama, bana mpe bilanga, elongo na minyoko ; mpe na tango oyo ekoya, bomoi ya seko.
31 But many who are first will be last, and the last first." Kasi kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.
32 On the road up to Jerusalem, Jesus walked ahead of them. They were amazed, and those following were afraid. Taking the twelve aside again, he began telling them what was about to happen to him: Wana bazalaki na nzela mpo na komata na Yelusalemi, Yesu azalaki kotambola liboso na bango. Bayekoli bazalaki na mawa, mpe bato mosusu oyo bazalaki kolanda bango bazalaki kobanga. Yesu abendaki lisusu na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe ayebisaki bango makambo oyo esengeli kokomela Ye :
33 "Look, we're going up to Jerusalem. The Son of Man will be handed over to the chief priests and scribes, who will condemn him to death and hand him over to the Gentiles. — Tozali solo kokende na Yelusalemi ; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe ya balakisi ya Mobeko ; bakokatela Ye etumbu ya kufa mpe bakokaba Ye na maboko ya bapagano,
34 They will mock him, spit on him, flog him, and kill him; after three days he will rise." bakoseka Ye, bakobwakela Ye soyi, bakobeta Ye fimbu mpe bakoboma Ye ; kasi, sima na mikolo misato, akosekwa.
35 James and John, Zebedee's sons, came to him and said, "Teacher, we want you to do for us whatever we ask." Bongo Jake mpe Yoane, bana mibali ya Zebede, bapusanaki pene ya Yesu mpe balobaki na Ye : — Moteyi, tolingi ete osalela biso likambo oyo tokosenga Yo.
36 He said to them, "What do you want me to do for you?" Yesu atunaki bango : — Bolingi ete nasalela bino nini ?
37 They said to him, "Let us sit in your glory, one at your right, one at your left." Bazongisaki : — Pesa biso nzela ya kovanda kati na nkembo na Yo : moko na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe mosusu, na ngambo ya loboko na Yo ya mwasi.
38 Jesus said to them, "You don't know what you're asking. Can you drink the cup I drink, or be baptized with the baptism I'm baptized with?" Yesu alobaki na bango : — Bozali kososola te makambo oyo bozali kosenga ! Boni, bokoki komela kopo oyo Ngai nakomela to kozwa libatisi oyo Ngai nakozwa ?
39 "We can," they said. Jesus said to them, "The cup I drink, you will drink; the baptism I'm baptized with, you will be baptized with, Bazongisaki : — Iyo, tokoki ! Yesu alobaki na bango : — Solo, bokomela na bino kopo oyo Ngai nakomela mpe bokozwa na bino libatisi oyo Ngai nakozwa ;
40 but sitting at my right or left isn't mine to give - that's for those it's prepared for." kasi likambo ya kovanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali to na ngambo ya loboko na Ngai ya mwasi, Ngai nakoki te kopesela yango ndingisa ; bisika wana ezali ya bato oyo Tata na Ngai abongisela bango yango.
41 Hearing this, the ten grew indignant at James and John. Tango bayekoli mosusu zomi bayokaki makambo wana, basilikelaki Jake mpe Yoane.
42 Jesus called them together and said, "You know that those regarded as rulers of the Gentiles dominate them, and their great ones wield power over them. Yesu abengaki bango nyonso mpe alobaki na bango : — Boyebi malamu ete bato oyo bamonanaka lokola bakonzi bakonzaka bikolo oyo ezali na se ya bokonzi na bango, mpe bakalaka ya lokumu bakonzaka bato oyo bazali na se ya bokonzi na bango.
43 But it isn't so among you. Instead, whoever wants to be great among you must be your servant, Esengeli te kozala bongo kati na bino ; nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino ;
44 and whoever wants to be first among you must be slave of all. mpe tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso kati na bino azala mowumbu ya bino nyonso !
45 For even the Son of Man came not to be served, but to serve, and to give his life as a ransom for many." Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye, kasi ayaki nde kosala mpo na bato mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.
46 They came to Jericho. As Jesus and his disciples were leaving with a large crowd, blind Bartimaeus son of Timaeus sat begging by the road. Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Jeriko. Tango bazalaki kobima wuta na engumba elongo na bato ebele, mokufi miso Bartime, mwana mobali ya Time, avandaki pembeni ya nzela mpe azalaki kosenga-senga.
47 Hearing it was Jesus of Nazareth, he began to cry out, "Jesus, Son of David, have mercy on me!" Tango ayokaki ete Yesu ya Nazareti azali koleka, akomaki koganga : — Yesu, mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !
48 Many scolded him to be silent, but he shouted even louder, "Son of David, have mercy on me!" Bato ebele bazalaki kopamela ye mpo ete akanga monoko na ye, kasi Bartime agangaki lisusu makasi : — Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !
49 Jesus stopped and said, "Call him." So they called the blind man: "Courage! Get up—he's calling you." Yesu atelemaki mpe alobaki : — Bobenga ye ! Bato babengaki mokufi miso yango mpe balobaki na ye : — Yika mpiko ! Telema ! Azali kobenga yo !
50 Throwing off his cloak, he jumped up and came to Jesus. Tango ayokaki maloba yango, abwakaki elamba na ye, atelemaki mpe apusanaki pene ya Yesu.
51 Jesus told him, "What do you want me to do for you?" The blind man told him, "Rabboni, let me see again." Yesu alobaki na ye : — Olingi nasala nini mpo na yo ? Mokufi miso azongisaki : — Moteyi, nalingi komona.
52 Jesus told him, "Go; your faith has healed you." At once he regained his sight and followed Jesus on the road. Yesu alobaki na ye : — Kende, kondima na yo ebikisi yo. Mbala moko, akomaki komona mpe alandaki Yesu.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]