Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Mark 7 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The Pharisees and some of the scribes who had come from Jerusalem gathered around Jesus, Bafarizeo mpe ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi basanganaki zingazinga ya Yesu.
2 and they saw that some of his disciples were eating bread with unclean hands—that is, unwashed. Bamonaki bayekoli mosusu ya Yesu kolia lipa na maboko ya mbindo, elingi koloba na maboko oyo basukola te.
3 (For the Pharisees and all the Jews don't eat unless they wash their hands ceremonially, keeping the elders' tradition. Nzokande, Bafarizeo mpe Bayuda nyonso baliaka te soki basukoli te maboko malamu. Ezalaki na nzela wana nde bazalaki kotosa bokoko na bango.
4 When they come from the market, they don't eat without washing. They also hold to many other traditions they've received—washing cups, pitchers, and copper vessels.). Mpe soki bawuti na esika oyo bato ebele bakutanaka, baliaka te soki bamipetoli nanu te na mayi. Bazalaki lisusu na mibeko ebele ya bokoko oyo bazalaki kotosa, ndakisa : kosukola bakopo, bambeki, bambeto mpe basani ya bibende.
5 Then the Pharisees and scribes asked him, "Why don't your disciples follow the elders' tradition, but eat bread with unclean hands?" Boye, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko batunaki Yesu : — Mpo na nini bayekoli na yo bazali kotosa te bokoko na biso ? Mpo na nini bazali kolia na maboko ya mbindo ?
6 He replied, "Isaiah prophesied truly about you hypocrites, as written: 'These people honor me with their lips, but their heart is far from me.' Yesu azongiselaki bango : — Bato ya bilongi mibale ! Mosakoli Ezayi asakolaki penza malamu na tina na bino, kolanda ndenge ekomama : « Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai ;
7 'They worship me in vain, teaching as doctrines the commandments of men.' basambelaka Ngai kaka na pamba, mateya na bango ezali kaka mibeko ya bomoto. »
8 You abandon the commandment of our Father and hold to the tradition of men." Botiaka mibeko ya Nzambe pembeni mpo na kotosa bokoko ya bato.
9 He said to them, "You do a fine job setting aside our Father's commandment to keep your own tradition!" Alobaki na bango lisusu : — Boyebi malamu penza kosundola mibeko ya Nzambe mpo na kobatela bokoko na bino.
10 For Moses said, 'Honor your father and your mother,' and 'Whoever curses father or mother must be executed.' Solo, Moyize alobaki : « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu ; » mpe « moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa. »
11 "But you say: if anyone tells his father or mother, 'Whatever you'd have gained from me is Corban' (a gift devoted to our Father), Kasi bino, boteyaka ete soki moto alobi na tata na ye to na mama na ye : « Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nakobonza yango lokola likabo epai ya Nzambe, »
12 then you no longer let him do anything for his father or mother. akangolami na mokumba ya kosalela tata na ye to mpo na mama na ye likambo songolo.
13 So you cancel the word of our Father with your handed-down tradition. You do many things like this." Na bongo, bokomisaka pamba Liloba na Nzambe na nzela ya bokoko oyo bolakisaka. Mpe bosalaka makambo mosusu ebele ya lolenge wana.
14 He called the crowd again and said to them, "Listen to me, all of you, and understand: Yesu abengaki lisusu ebele ya bato mpe alobaki na bango : — Bino nyonso, boyoka Ngai mpe bososola likambo oyo.
15 Nothing outside a person entering him can make him unclean; rather, what comes out of a person is what makes him unclean." Eloko moko te oyo ewuti na libanda mpe ekoti kati na moto ekoki kokomisa ye mbindo, kasi ezali oyo ebimaka kati na moto nde ekomisaka ye mbindo. [
16 Not in this edition Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !]
17 When he had left the crowd and entered the house, his disciples asked him about the parable. Tango Yesu atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako, bayekoli na Ye batunaki Ye tina ya lisese yango.
18 He said to them, "Are you also this dull? Don't you understand nothing entering a person from outside can make him unclean, Alobaki na bango : — Bino mpe, boni, bozali mayele te ? Bozali kososola te ete eloko moko te oyo ewuti na libanda mpe ekoti kati na moto ekoki kokomisa ye mbindo.
19 since it doesn't enter his heart but his stomach, and then goes out into the sewer?" (Saying this, he declared all foods clean.). Pamba te ekendaka te na motema na ye, kasi ekendaka nde na libumu na ye ; mpe na sima, ekendaka na zongo. Na maloba oyo, Yesu atatolaki ete bilei nyonso ezali peto.
20 He said, "What comes out of a person—that makes him unclean. Yesu alobaki lisusu : — Oyo ebimaka na moto, yango nde ekomisaka ye mbindo.
21 For from within, out of the human heart, come evil thoughts—sexual sin, theft, murder, Pamba te, ezali wuta na kati, na motema penza ya moto nde ewutaka makanisi mabe, kindumba, moyibi, koboma,
22 adultery, greed, malice, deceit, sensuality, envy, slander, pride, and foolishness. ekobo, lokoso ya mbongo, kanda, mayele mabe, pite, likunya, songisongi, mafinga, lolendo mpe makambo nyonso mosusu ya mabe.
23 All these evils come from inside and make a person unclean." Makambo nyonso wana ya mabe ewutaka kati na moto, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo.
24 Jesus left there for the region of Tyre. He entered a house, wanting no one to know, but couldn't stay hidden. Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri. Akotaki kati na ndako moko ; alingaki te ete ata moto moko ayeba yango, kasi alongaki kaka te kobombama.
25 Instead, a woman whose little daughter had an unclean spirit heard about him at once, came, and fell at his feet. Pamba te, ezalaki na mwasi moko oyo mwana na ye ya mwasi azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezalaki mpe konyokola ye makasi ; boye tango kaka ayokaki sango na tina na Yesu, ayaki komibwaka na makolo ya Ye.
26 The woman was Greek, Syrophoenician by birth. She kept asking him to drive the demon out of her daughter. Mwasi yango azalaki moto ya Grese, moto ya Fenisi ya Siri ; asengaki na Yesu ete abengana molimo mabe oyo ezali konyokola mwana na ye ya mwasi.
27 He told her, "Let the children eat first, for it's not right to take their bread and toss it to the dogs." Kasi Yesu alobaki na ye : — Tika bana ya ndako balia nanu mpe batonda, pamba te ezali malamu te kokamata lipa ya bana mpo na kobwakela yango bambwa !
28 But she replied to him, "Sir, even the dogs under the table eat the children's crumbs." Mwasi yango azongiselaki Yesu : — Nkolo, ezali penza ya solo ; kasi bambwa eliaka biteni oyo bana bakweyisaka na se ya mesa !
29 He said to her, "Because of this answer, go—the demon has left your daughter." Yesu alobaki : — Mpo na maloba oyo olobi, kende, zonga na ndako na yo, pamba te molimo mabe esili kobima na mwana na yo ya mwasi.
30 And she went home and found the child lying on the bed, and the demon gone. Mpe tango akendeki na ndako, akutaki mwana na ye alali na mbeto mpe molimo mabe ebimi.
31 Then Jesus left the territory of Tyre, went through Sidon to the Sea of Galilee, into the region of the Decapolis. Yesu alongwaki na engumba ya Tiri, alekaki na Sidoni mpe akendeki na ebale ya Galile wana akatisaki etuka ya bingumba zomi.
32 They brought him a deaf man who could hardly speak, begging him to lay his hand on him. Bamemelaki ye moto moko oyo akufa matoyi mpe alobaka te, mpe basengaki na Yesu ete atia ye maboko.
33 Jesus took him aside privately, away from the crowd, put his fingers in the man's ears, spit, and touched his tongue. Yesu alongolaki ye kati na ebele ya bato, amemaki ye na pembeni mpe atiaki ye misapi na matoyi ; atiaki ye soyi mpe asimbaki lolemo ya moto yango.
34 Then, looking up to heaven, he sighed deeply and said to him, "Ephphatha!" (that is, "Be opened!"). Atalaki na likolo, abendaki pema mpe alobaki na ye : « Fungwama ! »
35 And immediately his ears were opened, his tongue was released, and he began to speak plainly. Mbala moko, matoyi na ye efungwamaki, lolemo na ye ekangolamaki mpe akomaki koloba malamu.
36 Jesus ordered them to tell no one; but the more he ordered, the more they proclaimed it. Yesu apekisaki bango ete baloba yango na moto te. Atako azalaki kopekisa bango makasi, kasi bango bazalaki kaka kopanza sango yango koleka.
37 They were completely amazed: "He has done everything well—he makes the deaf hear and the mute speak." Bato bakamwaki makasi mpe bazalaki koloba : — Azali kosala makambo nyonso malamu ; azali kosala ete ezala bato oyo bakufa matoyi bakoka koyoka, mpe bababa bakoka koloba.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]