Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Mark 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 He went out from there and came to his hometown, and his disciples followed him. Sima na Yesu kolongwa na ndako yango, azongaki elongo na bayekoli na Ye, na engumba epai wapi abotama.
2 On the Sabbath he began teaching in the synagogue. Many who heard were amazed: "Where did this man get this? What wisdom is this, given to him? How do such miracles happen through his hands? Wana mokolo ya Saba ekokaki, Yesu akomaki koteya kati na ndako ya mayangani. Kati na bato oyo bayokaki Ye, ebele bakamwaki makasi. Batunaki : « Boni, moto oyo azwi makambo oyo wapi ? Nani apesi ye bwanya ya boye ? Azwi wapi nguya ya kosala bikamwa oyo nyonso ?
3 Isn't this the carpenter, Mary's son, brother of James, Joses, Judas, and Simon? Aren't his sisters here with us?" They were offended by him. Ezali ye te mosali mabaya ? Ezali ye te mwana ya Mari mpe ndeko ya Jake, Jozefi, Jide mpe Simona ? Boni, bandeko na ye ya basi bavandaka awa te elongo na biso ? » Yango wana, ezalaki penza libaku mabe mpo na bango kondima Ye.
4 Jesus said to them, "A prophet lacks honor only in his hometown, among his relatives, and in his own household." Yesu alobaki na bango : « Ezali kaka kati na ekolo na ye, kati na libota na ye mpe kati na ndako na ye nde mosakoli azwaka lokumu te. »
5 He could do no miracle there, except laying hands on a few sick and healing them. Alongaki te kosala bikamwa na esika yango, kasi abikisaki kaka mwa ndambo ya babeli oyo atielaki maboko.
6 He was amazed at their lack of faith. Then he went around the villages teaching. Boye, akamwaki mingi penza bozangi kondima na bango. Yesu azalaki kotambola na bamboka ya zingazinga mpo na koteya.
7 He called the twelve and began sending them out two by two, giving them authority over unclean spirits. Abengaki bantoma na Ye zomi na mibale, atindaki bango mibale-mibale, mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe.
8 He ordered them to take only a staff for the road—no bread, no bag, no money in their belts, Alobaki na bango : « Bomema eloko moko te mpo na mobembo, longola kaka lingenda. » Alobaki na bango : « Bomema te, ezala sakosi to lipa to mbongo kati na mokaba na bino.
9 but to wear sandals and not put on two tunics. Bolata basandale na makolo na bino, kasi bomema banzambala mibale te.
10 And he said to them, "Wherever you enter a house, stay there until you leave that place. Na ndako nyonso oyo bakoyamba bino, bovanda kuna kino tango bokolongwa.
11 Whatever place refuses to welcome or hear you, leaving there, shake the dust off your feet as testimony against them." Mpe soki na esika songolo, baboyi koyamba mpe koyoka bino, bolongwa na esika yango, bopupola putulu ya makolo na bino ; yango ekozala litatoli oyo ekofunda bango. »
12 So they went out and proclaimed that people should repent. Bantoma bakendeki mpe bateyaki bato ete babongola mitema.
13 And they drove out many demons and anointed many sick people with oil and healed them. Bazalaki kobengana milimo mabe ebele mpe kobikisa babeli mingi na kopakola bango mafuta.
14 King Herod heard of it, for Jesus's name had become known. Some were saying, "John the Baptist has been raised from the dead; that is why these miraculous powers are at work in him." Mokonzi Erode ayokaki sango na tina na Yesu, pamba te Kombo na Ye eyebanaki makasi. Bazalaki koloba boye na tina na Yesu : « Yoane Mobatisi asekwi kati na bakufi ! Yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa ! »
15 But others said, "He's Elijah." Others said, "He's a prophet, like one of the prophets of old." Bato mosusu bazalaki koloba : « Ezali Eliya ! » Bamosusu : « Azali mosakoli, lokola moko kati na basakoli ya kala ! »
16 But when Herod heard of it, he said, "John, whom I beheaded, has been raised." Kasi tango Erode azalaki koyoka maloba wana nyonso, azalaki komilobela : « Ezali Yoane oyo nakataki moto nde asekwi kati na bakufi ! »
17 Herod had sent and seized John, binding him in prison because of Herodias, his brother Philip's wife, whom he had married. Pamba te Erode amipeselaki mitindo ete bakanga Yoane minyololo mpe babwaka ye kati na boloko ; asalaki bongo mpo na kosepelisa Erodiade, mwasi ya Filipo, ndeko na ye, oyo ye Erode abalaki.
18 For John kept telling Herod, "It is not lawful for you to have your brother's wife." Yoane azalaki koloba na Erode : « Ozali na ndingisa te ya kosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na yo. »
19 And Herodias held a grudge against him and wanted to kill him, but she could not, Erodiade akangelaki Yoane kanda kati na motema mpe azalaki koluka nzela ya kobomisa ye, kasi azalaki kokoka te,
20 Herod feared John, knowing him righteous and holy, and protected him. Hearing John left Herod deeply puzzled, yet he gladly listened to him. pamba te Erode azalaki kobanga Yoane, wana ayebaki ete Yoane azali moto ya sembo mpe mosantu, mpe azalaki kobatela ye. Tango nyonso oyo Erode azalaki koyoka Yoane koloba, azalaki komitungisa mingi ; nzokande azalaki kaka kosepela koyoka ye.
21 Then a fitting day came: Herod's birthday, when he gave a banquet for his nobles, military commanders, and Galilee's leading men. Nzokande, na mokolo ya kosepela mbotama ya Erode, Erodiade akutanaki na libaku ya kokokisa mokano na ye. Na mokolo yango, Erode asalaki feti monene mpe abengisaki bakalaka, bakonzi minene ya basoda mpe bato ya lokumu ya Galile.
22 When Herodias's daughter entered and danced, she delighted Herod and his dinner guests. The king told the girl, "Ask me for anything you want, and I'll give it to you." Mwana mwasi ya Erodiade akotaki mpe abinaki, asepelisaki Erode mpe bato oyo abengisaki na feti. Mokonzi alobaki na mwana mwasi : — Senga ngai nyonso oyo okolinga, nakopesa yo yango !
23 He swore to her, "Whatever you ask me, I'll give you—up to half my kingdom." Mpe alapaki kutu ndayi epai na ye : — Nakopesa yo nyonso oyo okosenga ngai, ata ndambo ya bokonzi na ngai.
24 She went out and said to her mother, "What should I ask?" She said, "The head of John the Baptist." Mwana mwasi abimaki mpe akendeki kotuna toli epai ya mama na ye : — Mama, nasenga nini ? Mama na ye azongisaki : — Senga moto ya Yoane Mobatisi.
25 She went in immediately, with urgency, to the king and asked, "I want you to give me this instant the head of John the Baptist on a platter." Mbala moko, mwana mwasi azongaki na lombangu epai ya mokonzi mpe alobaki na ye : — Nalingi ete opesa ngai, sik’oyo, na sani, moto ya Yoane Mobatisi.
26 Deeply grieved, the king still wouldn't refuse her, because of his oaths and his guests. Mokonzi ayokaki mawa mingi na motema, kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo abengisaki na feti, aboyaki kopimela ye yango.
27 The king at once sent an executioner, ordering John's head brought. He went and beheaded him in the prison, Mbala moko, mokonzi atindaki moko kati na bakengeli na ye ete amema moto ya Yoane. Mokengeli yango akendeki na boloko, akataki moto ya Yoane,
28 and brought his head on a platter, gave it to the girl, and the girl gave it to her mother. amemaki yango, na sani ; apesaki yango epai ya mwana mwasi, mpe mwana mwasi apesaki yango epai ya mama na ye.
29 When John's disciples heard, they came, took his body, and laid it in a tomb. Tango bayekoli ya Yoane bayokaki sango yango, bayaki kozwa nzoto na ye mpe batiaki yango kati na kunda moko.
30 The apostles gathered to Jesus and told him all that they had done and taught. Tango bantoma bazongaki, basanganaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye makambo nyonso oyo bawutaki kosala mpe nyonso oyo bateyaki.
31 He told them, "Come away by yourselves to a quiet place and rest a while." For many were coming and going, and they had no time to eat. Boye, lokola bato mingi bazalaki koya mpe kozonga, mpe bazalaki kozwa ata tango te ya kolia, Yesu alobaki na bango : « Boya elongo na Ngai, na esika oyo ebombama mpe bopema mwa moke. »
32 And they went away in the boat to a desolate place by themselves. Bakendeki na bwato, na esika oyo ebombama.
33 Many saw them leave and recognized them; they ran on foot from every town and got there ahead of them. Kasi bato ebele oyo bamonaki bango kokende, basosolaki ete ezali bango. Boye balandaki bango mbangu na makolo longwa na bingumba nyonso mpe bakomaki liboso na bango, na esika oyo bazalaki kokende.
34 Stepping ashore, he saw a large crowd and felt compassion for them, for they were like sheep without a shepherd, and began teaching them many things. Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango, pamba te bazalaki lokola bameme oyo ezangi mobateli. Boye, abandaki koteya bango makambo ebele.
35 When it was already late, his disciples came to him and said, "This is an isolated place, and it's already late. Lokola ngonga epusanaki makasi, bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye mpe balobaki na Ye : — Ngonga epusani makasi, mpe esika oyo ezali esobe !
36 Send them away to go into the surrounding countryside and villages and buy themselves something to eat." Zongisa bango mpo ete bakende komisombela biloko ya kolia kati na bamboka mpe bilanga ya zingazinga.
37 He replied, "You give them something to eat." They said, "Should we go buy 200 denarii of bread and give them it to eat?" Kasi Yesu azongisaki : — Bopesa bango bino moko biloko ya kolia. Bayekoli balobaki na Ye : — Ondimi penza tokende kosomba mapa mpe toleisa bango, na mbongo ya bibende nkama mibale ?
38 He asked them, "How many loaves do you have? Go and see." They found out and said, "Five, and two fish." Yesu atunaki bango : — Mapa boni bozali na yango ? Bokende nanu kotala. Bakendeki kotala mpe balobaki : — Tozali na mapa mitano mpe bambisi mibale.
39 Then he commanded them all to sit down in groups on the green grass. Yesu apesaki bango mitindo ete bakabola bato nyonso na masanga mpe bavandisa bango na matiti ya mobesu.
40 So they sat down in groups, by hundreds and by fifties. Boye, batandamaki na milongo ya bato nkama moko mpe ya bato tuku mitano.
41 Taking the five loaves and two fish, he looked up to heaven, gave thanks and broke the loaves, gave them to the disciples to set before the people, and divided the two fish among them all. Yesu akamataki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai na bato. Akabolaki lisusu bambisi nyonso mibale epai ya bango nyonso.
42 And they all ate and were satisfied. Bato nyonso baliaki mpe batondaki.
43 And they took up twelve baskets full of broken pieces and of the fish. Bongo bayekoli balokotaki biteni ya mapa mpe ya bambisi, oyo etikalaki ; mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.
44 And those who ate the loaves were 5,000 men. Bato oyo baliaki mapa yango bazalaki mibali pene nkoto mitano.
45 At once he made his disciples board the boat and go ahead to the other side, toward Bethsaida, while dismissing the crowd. Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na Betisaida, na ngambo mosusu ya ebale, wana Ye moko akozongisa bato.
46 And after he had taken leave of them, he went up on the mountain to pray. Sima na Ye kozongisa bato yango, amataki na ngomba mpo na kosambela.
47 When evening came, the boat was out on the sea, and he was alone on the land. Wana ekomaki pokwa, bwato ekomaki na kati-kati ya ebale ; mpe Ye, Yesu, azalaki Ye moko na mokili,
48 He saw them straining at the oars, for the wind was against them. Around three in the morning he came to them, walking on the sea. He meant to pass by them, amonaki bayekoli na Ye kobunda-bunda mpo na koluka nkayi, pamba te mopepe ezalaki kozongisa bango na sima. Wana tongo ekomaki pene ya kotana, Yesu atambolaki likolo ya mayi ya ebale mpo na kolanda bango, mpe alingaki kutu koleka bango.
49 but seeing him walk on the sea, they thought it was a ghost and cried out, Tango bayekoli bamonaki Yesu azali kotambola likolo ya mayi ya ebale, bakanisaki ete ezali elima, mpe bakomaki koganga.
50 for all saw him and were terrified; but immediately he spoke to them, saying, "Take heart; it is I. Do not be afraid." Solo, bango nyonso bamonaki Ye, mpe somo makasi ekangaki bango. Mbala moko, Yesu alobaki na bango : « Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali Ngai ! »
51 He got into the boat with them, and the wind stopped; they were completely amazed among themselves, Bongo amataki na bwato epai bayekoli bazalaki, mpe mopepe ekitaki. Bakamwaki mingi penza,
52 for they did not understand about the loaves, but their hearts were hardened. pamba te basosolaki te tina ya likamwisi ya mapa, mpo ete mayele na bango ezalaki ya kozipama.
53 When they had crossed over, they came to land at Gennesaret and moored to the shore. Sima na bango kokatisa ebale, bakomaki na mabele ya Genezareti mpe bakangisaki bwato na bango na libongo.
54 And when they got out of the boat, the people immediately recognized him. Tango kaka bakitaki na bwato, bato basosolaki mbala moko Yesu.
55 They ran through that whole region and began carrying the sick on mats to wherever they heard he was. Boye, bato bapotaki mbangu kati na etuka wana mobimba mpe bakomaki komema babeli, na tsipoyi, na bisika nyonso oyo bayokaki ete Yesu akomi kuna.
56 Wherever he went—villages, towns, countryside—they laid the sick in the marketplaces, begging to touch just the edge of his cloak. All who touched it were healed. Na bisika nyonso oyo Yesu azalaki kokende, na bamboka, na bingumba to na bilanga, bazalaki komema babeli na bisika oyo bato ebele bakutanaka, mpe bazalaki kosenga na Yesu ete apesa babeli nzela ya kosimba ata singa ya songe ya elamba na Ye. Mpe bato nyonso oyo bazalaki kolonga kosimba yango bazalaki kobika na bokono na bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]