Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Mark 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 They came to the other side of the sea, to the region of the Gerasenes. Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, kati na etuka ya Geraza,
2 As Jesus left the boat, a man with an unclean spirit met him at once, from the tombs. Yesu akitaki na bwato. Mbala moko, moto moko oyo azalaki na molimo mabe abimaki wuta na bakunda mpe ayaki kokutana na Ye.
3 He lived among the tombs, and no one could bind him anymore, not even with a chain. Moto yango azalaki kovanda kati na bakunda, mpe moto moko te azalaki na makasi ya kokanga ye, ezala na nzela ya minyololo ;
4 For he'd often been bound with shackles and chains, but tore the chains apart and shattered the shackles—no one had strength to subdue him. pamba te mbala nyonso oyo bazalaki kokanga ye na nzela ya minyololo mpe kotia ye bibende na makolo, azalaki kokata yango mpe kobuka bibende yango ; moto moko te azalaki na makasi ya kolembisa Ye.
5 Night and day, among the tombs and on the mountains, he cried out constantly, cutting himself with stones. Tango nyonso, butu mpe moyi, azalaki koyengayenga kati na bakunda mpe na bangomba, azalaki koganga na mongongo makasi mpe komizokisa na mabanga.
6 And when he saw Jesus from a distance, he ran and fell down before him. Tango amonaki Yesu na mosika, akimaki mbangu, agumbamaki liboso na Ye
7 Shouting loudly, he said, "What do you want with me, Jesus, Son of the Most High God? I beg you by God, don't torment me!" mpe agangaki na makasi nyonso : — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, ngai na Yo likambo nini ? Nabondeli Yo na Kombo ya Nzambe, kotungisa ngai te !
8 For Jesus had been saying to him, "Come out of the man, you unclean spirit!" Pamba te Yesu alobaki na molimo yango : « Yo molimo mabe, bima kati na moto oyo ! »
9 Jesus asked, "What is your name?" "Legion," he said, "we are many." Yesu atunaki ye : — Kombo na yo nani ? Azongisaki : — Kombo na Ngai ezali ngulupa, pamba te tozali ebele !
10 He kept begging him not to send them out of the region. Molimo mabe esengaki na Yesu na molende penza ete abengana yango te na mokili wana.
11 Now a great herd of pigs was feeding there on the hillside. Nzokande, etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia pembeni ya ngomba.
12 And they begged him, "Send us to the pigs; let us enter them." Milimo mabe esengaki na Yesu : « Tinda biso kati na bangulu, mpo ete tokota kati na yango. »
13 He gave permission. The unclean spirits came out and entered the pigs; the herd—about 2,000—rushed down the cliff into the sea and drowned in the sea. Tango Yesu apesaki yango nzela, milimo mabe ebimaki kati na moto mpe ekendeki kokota kati na bangulu. Mbala moko, bangulu pene nkoto mibale ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba, ezindaki kati na ebale mpe ekufaki.
14 The herders fled and told it in town and country; people came to see what happened. Bakengeli bangulu bakimaki mbangu mpe bakendeki kopesa sango kati na engumba mpe na bamboka mike ya zingazinga ; bongo bato bayaki mpo na kotala likambo oyo ewutaki kosalema.
15 They came to Jesus and saw the man who had been possessed by the demons, the one who'd had the legion, sitting there, dressed and thinking clearly—and they were afraid. Tango bakomaki epai na Yesu, bamonaki moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya ngulupa ya milimo mabe avandi wana, alata bilamba na mayele na ye ya kokoka. Boye somo ekangaki bango.
16 Eyewitnesses told them what had happened to the demon-possessed man, and about the pigs. Bato oyo bamonaki ndenge likambo yango esalemaki bayebisaki bato mosusu makambo oyo ekomelaki moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe mpe oyo ekomelaki bangulu.
17 And they began to beg Jesus to leave their region. Boye bakomaki kobondela Yesu ete abima na etuka na bango.
18 As he was getting into the boat, the once-possessed man begged to be with him. Tango Yesu amataki na bwato, moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe asengaki na Ye ete bakende na Ye nzela moko.
19 But Jesus refused, telling him instead, "Go home to your own people and tell them how much our Father has done for you, and how he has had mercy on you." Yesu apesaki ye nzela te, kasi alobaki na ye : « Kende na ndako na yo, epai ya bandeko na yo ; yebisa bango makambo oyo Nkolo asaleli yo, mpe ndenge nini ayokeli yo mawa. »
20 He went and began proclaiming in the Decapolis all Jesus had done for him, and everyone was amazed. Moto yango akendeki mpe abandaki kopanza sango ya makambo oyo Yesu asalaki mpo na ye, kati na Dekapoli ; mpe bato nyonso bakamwaki.
21 When Jesus crossed again by boat to the other side, a large crowd gathered around him by the sea. Yesu azwaki bwato mpe azongaki na ngambo ya ebale ; mpe bato ebele basanganaki pene na Ye, pembeni ya ebale.
22 One of the synagogue leaders, named Jairus, came, saw Jesus, and fell at his feet, Jairisi, moko kati na bakambi ya ndako ya mayangani, ayaki wana ; tango kaka amonaki Yesu, amibwakaki na makolo na Ye
23 and begged him urgently, "My little daughter is dying. Come, lay your hands on her, so she may be healed and live." mpe abondelaki Ye makasi : « Kala mingi te, mwana na ngai ya mwasi azali kokufa ! Nabondeli yo : yaka mpe tiela ye maboko mpo ete abika na bokono na ye mpe akufa te. »
24 So Jesus went with him. And a great crowd followed him and pressed around him. Boye Yesu akendeki na ye nzela moko ; bato ebele bazalaki kolanda Ye mpe kotutana-tutana na Ye na bangambo nyonso.
25 And there was a woman with a discharge of blood that had gone on for twelve years. Ezalaki mpe na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale.
26 She had suffered much under many doctors, spent all she owned, gained nothing, and only grew worse. Amonaki pasi mingi mpo na koluka lobiko epai na minganga ebele, mpe asilisaki mbongo na ye nyonso na pamba, kasi abikaki kaka te ; nzokande pasi na ye ezalaki komata se komata.
27 Hearing about Jesus, she came up behind him in the crowd and touched his cloak. Tango ayokaki sango ya Yesu, ayaki na sima, kati na ebele ya bato, mpe asimbaki elamba na Ye,
28 For she kept saying, "If I just touch his garments, I will be made well." pamba te azalaki komilobela : « Soki kaka nasimbi ata bilamba na Ye, nakobika ! »
29 Her flow of blood dried up instantly, and she felt in her body that she was healed of her suffering. Kaka na tango yango, makila etikaki kotanga, mpe amonaki ete abiki na bokono kati nzoto na ye.
30 At once Jesus, aware that power had left him, turned around in the crowd and asked, "Who touched my clothes?" Mbala moko, Yesu mpe asosolaki ete nguya moko ebimi kati na Ye ; abalukaki epai ya ebele ya bato mpe atunaki : — Nani asimbi Ngai na bilamba ?
31 His disciples said to him, "You see the crowd crushing you, yet you ask, 'Who touched me?'" Bayekoli na Ye bazongisaki : — Ozali komona malamu ete bato bazali kotutana-tutana na Yo na bangambo nyonso, mpe ozali kotuna lisusu : « Nani asimbi Ngai ? »
32 And he looked around to see who had done it. Kasi Yesu akomaki kotala epai ya ebele ya bato mpo na koluka koyeba nani oyo asali bongo.
33 But the woman, afraid and trembling, knowing what had happened to her, came, fell before him, and told him the whole truth. Boye, mwasi yango abangaki mpe akomaki kolenga, mpo ayebaki likambo oyo esalemaki kati na ye. Ayaki kofukama liboso ya Yesu mpe ayebisaki Ye solo nyonso.
34 He told her, "Daughter, your faith made you well. Go in peace, healed of your suffering." Yesu alobaki na ye : — Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia mpe zwa lobiko kati na pasi na yo !
35 While he was still speaking, people came from the synagogue leader's house, saying, "Your daughter has died. Why bother the Teacher any longer?" Wana Yesu azalaki nanu koloba, ndambo ya bato bayaki longwa na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani mpo na koloba na ye : — Mwana na yo ya mwasi asili kokufa ; mpo na nini ozali lisusu kotungisa moteyi ?
36 But Jesus overheard what they said and told the synagogue leader, "Don't fear, only believe." Atako Yesu ayokaki maloba yango, kasi alobaki kaka na mokambi ya ndako ya mayangani : — Kobanga te, zala kaka na kondima !
37 And he allowed no one to follow him except Peter, James, and John the brother of James. Atikaki moto moko te kolanda Ye longola kaka Petelo, Jake mpe Yoane, ndeko ya Jake.
38 They came to the synagogue leader's house and Jesus saw chaos—people weeping, wailing loudly. Tango bakomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, Yesu amonaki yikiyiki kati na bato oyo bazalaki kolela mpe koganga makasi.
39 Entering, he said to them, "Why this commotion and crying? The child isn't dead, just asleep." Akotaki mpe alobaki na bango : — Mpo na nini yikiyiki oyo nyonso ? Mpo na nini bozali kolela ? Mwana akufi te ; alali nde pongi !
40 They laughed at him. But he sent them all out, took the child's father and mother and his companions, and entered where the child was. Bongo bakomaki koseka Ye. Sima na Yesu kobimisa bato nyonso, akamataki tata ya mwana, mama ya mwana mpe bayekoli oyo bazalaki na Ye elongo, mpe bakotaki na esika oyo mwana azalaki.
41 He took her hand and said to her, "Talitha koum," which means, "Little girl, I say to you, get up!" Asimbaki ye na loboko mpe alobaki na ye : « Talita kumi ! » Elingi koloba : Elenge mwasi, nalobi na yo, Telema !
42 At once the girl got up and walked—for she was twelve—and they were instantly overwhelmed with great amazement. Mbala moko, elenge mwasi atelemaki mpe akomaki kotambola. Azalaki na mibu pene zomi na mibale. Bato nyonso bakamwaki makasi penza.
43 He strictly ordered them to tell no one of this, and said to give her something to eat. Yesu apekisaki bango koloba likambo yango ata na moto moko ; mpe ayebisaki bango ete bapesa elenge mwasi yango bilei.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]