Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Mark 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Jesus again taught by the sea. So large a crowd gathered around him that he got into a boat on the water and sat, while the whole crowd was on land by the sea. Yesu abandaki lisusu koteya pembeni ya ebale. Bato ebele basanganaki pembeni na Ye. Boye, amataki mpe avandaki kati na bwato, mpe bato nyonso batelemaki na mokili, pembeni ya ebale.
2 He taught them many things in parables, and in his teaching he said to them: Azalaki koteya bango makambo ebele na masese. Na mateya na Ye, azalaki koloba :
3 "Listen! A sower went out to sow. « Boyoka ! Moloni moko abimaki mpo na kolona.
4 And as he sowed, some seed fell along the path, and the birds came and devoured it. Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; bandeke eyaki mpe eliaki yango.
5 Other seed fell on rocky ground, lacking much soil, and sprang up at once since the soil had no depth. Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te ; ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te.
6 When the sun rose, the plants were scorched, and since they had no root, they withered. Kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpo ete ezalaki na misisa te.
7 Other seed fell among thorns, and the thorns grew up and choked it, yielding no grain. Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube ; banzube ekolaki mpe efinaki-finaki yango. Boye, ebotaki bambuma te.
8 Other seed fell into good soil, producing grain that sprouted, grew, and yielded thirty, sixty, one hundred times what was sown." Ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu ; ebimisaki mito, ekolaki mpe ebotaki bambuma : nkona moko ebotaki bambuma tuku misato ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu, bambuma nkama moko. »
9 And he said, "Whoever has ears to hear, let him hear." Yesu azalaki lisusu koloba : « Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka ! »
10 When he was alone, those around him, together with the Twelve, asked him about the parables. Tango atikalaki Ye moko, bantoma zomi na mibale elongo na bato oyo bazingelaki Ye batunaki Ye na tina na masese.
11 He said to them, "To you is given the secret of the kingdom of our Father, but to those outside, everything comes in parables, Yesu alobaki na bango : — Epesameli bino koyeba mabombami ya Bokonzi ya Nzambe ; kasi mpo na ba-oyo bazali na libanda, makambo nyonso ezali kotalisama na masese ;
12 so that 'they may look but not perceive, and hear but not understand, and not turn and be forgiven.'" mpo ete : atako bakoki kotala, bamona eloko te ; mpe atako bakoki koyoka, basosola eloko te ; noki te bakobongola mitema, mpe masumu na bango ekolimbisama.
13 He said to them, "You don't understand this parable? Then how will you understand all the parables? Bongo Yesu alobaki na bango : — Boni, bososoli lisese oyo te ? Ndenge nini bokososola masese mosusu ?
14 The sower sows the word. Moloni alonaka Liloba.
15 These are the ones on the path where the word is sown: once they hear, Satan comes immediately and takes away the word sown in them. Bato mosusu bazali pembeni ya nzela epai wapi Liloba elonami. Tango kaka bayoki Liloba, Satana ayei mpe alongoli Liloba oyo elonami kati na mitema na bango.
16 These are the ones sown on rocky ground, who hear the word and immediately receive it with joy. Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi na mabele etonda na mabanga : bayoki na bango Liloba mpe bayambi yango mbala moko na esengo ;
17 But they have no root in themselves, lasting only briefly; when trouble or persecution comes because of the word, they fall away at once. kasi lokola bazali na misisa te kati na bango, bakowumela na Liloba yango kaka mpo na tango moke. Soki kaka, likolo ya Liloba, pasi to minyoko eyei, basundoli mbala moko kondima na bango.
18 And others are the ones sown among thorns. These are those who hear the word, Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi kati na banzube : bayoki na bango Liloba ;
19 but worries of this age, the deceit of wealth, and desires for other things enter and choke the word, and it produces no fruit. kasi mitungisi ya bomoi, lokoso ya bomengo mpe baposa ya makambo ya mokili efini-fini Liloba kati na bango, boye ekotikala kobota bambuma te kati na bango.
20 And these are the ones sown on good soil: they hear the word, accept it, and produce fruit—thirty, sixty, one hundred times over." Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi na mabele ya malamu : bayoki malamu Liloba, bandimi yango mpe baboti bambuma ; moko aboti bambuma tuku misato ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu lisusu, bambuma nkama moko.
21 He told them, "Does anyone bring in a lamp to put it under a basket or bed—not on a stand? Yesu alobaki na bango lisusu : — Boni, bamemaka solo mwinda mpo na kotia yango na se ya katini to na se ya mbeto ? Ezali te mpo na kotia yango na likolo ya etelemiselo ya minda ?
22 Nothing is hidden except to be revealed; nothing is secret except to surface. Pamba te eloko moko te ebombama ekozanga komonisama, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga kobima na pole.
23 If anyone has ears to hear, let him hear." Tika ete moto azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !
24 He told them, "Watch what you hear. The measure you use will be measured to you—and more added. Alobaki lisusu : — Bosala keba na makambo oyo bozali koyoka ! Bakomeka bino na emekelo kaka oyo bino bosalelaka mpo na komeka bato mosusu, mpe bakobakisa kutu lisusu koleka ;
25 For whoever has will be given more; whoever doesn't, even what he has will be taken from him." pamba te na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.
26 He said, "This is what the kingdom of our Father is like: a man scatters seed on the ground. Yesu alobaki lisusu : — Bokonzi ya Nzambe ekokani na moto oyo abwaki nkona na mabele :
27 Night and day, asleep or awake, the seed sprouts and grows, though he doesn't know how. butu mpe moyi, alala to alamuka, nkona ebimisaka moto, ekolaka yango moko mpe ayebaka te ndenge nini yango ezali kokola ;
28 The soil yields grain on its own—first blade, then head, then full kernel in the head. pamba te yango moko mabele nde ebimisaka mbuma : liboso, moto ya nzete ; sima, matiti ; mpe na suka, bambuma ya ble etondaka na nzete.
29 But when the grain ripens, he immediately sends the sickle, since harvest has come." Bongo soki bambuma ekomeli, azwaka mbala moko mbeli oyo bakataka na yango matiti ya ble, pamba te eleko ya kobuka bambuma ekoki.
30 He said, "What can we compare the kingdom of our Father to, or what parable can we use for it? Yesu alobaki lisusu : — Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini ? Tokoki kosalela lisese nini mpo na kokokanisa yango ?
31 It's like a mustard seed, the smallest of all seeds when sown on the ground. Bokonzi ya Likolo ekokani na nkona ya mutarde : tango balonaka yango, ezalaka nkona oyo eleki moke kati na bankona nyonso ya mokili.
32 Yet once sown, it grows up and becomes the largest of all garden plants, producing branches so big that birds of the air can nest in its shade." Kasi sima na kolona yango, ekokola mpe ekomaka molayi koleka ndunda nyonso ya elanga, ebimisaka bitape minene oyo esalaka ete bandeke ya likolo etonga zala na se ya pio na yango.
33 With many such parables he spoke the word to them, as they were able to hear. Yesu azalaki kosalela masese ya ndenge na ndenge mpo na koteya bango Liloba na Nzambe, kolanda bososoli na bango ;
34 He spoke to them only in parables, but privately explained everything to his own disciples. azangaki te kosalela masese mpo na koloba na bango. Kasi soki atikali Ye moko elongo na bayekoli na Ye, azalaki kolimbola makambo nyonso.
35 That day, when evening came, he said to them, "Let us cross over to the other side." Kaka na mokolo yango wana, wana pokwa ekomaki, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale.
36 They left the crowd and took him along, just as he was, in the boat, other boats accompanying him. Batikaki bato, bamemaki Ye na bwato mpe bakatisaki na ngambo mosusu. Babwato mosusu mpe ezalaki elongo na bango.
37 A fierce windstorm came up. Waves broke over the boat, so that it was already being swamped. Mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa, mbonge ekomaki kobeta na bwato, mpe bwato ekomaki kotonda na mayi.
38 But Jesus was asleep in the stern on the cushion. They woke him and said, "Teacher, don't you care that we're dying?" Yesu azalaki na sima, alalaki pongi mpe atiaki moto na likolo ya kuse. Bayekoli balamusaki Ye mpe bayebisaki Ye na koganga : — Moteyi, tozali kokufa ; mpe ozali komitungisa na Yo te ?
39 He got up, rebuked the wind, and told the sea, "Peace! Be still!" The wind stopped, and it grew totally calm. Yesu alamukaki, agangelaki mopepe, mpe apesaki mitindo na ebale : — Tika makelele ! Vanda nye ! Mopepe esilaki, mpe kimia monene ezongaki.
40 He said to them, "Why are you so afraid? Do you still have no faith?" Bongo alobaki na bayekoli na Ye : — Mpo na nini bozali kobanga ? Bozali nanu na kondima te ?
41 They were terrified and asked one another, "Who then is this, that even the wind and the sea obey him?" Somo monene ekotaki kati na bango mpe bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani mpo ete mopepe mpe ebale etosa ye ? »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]