Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Mark 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Once again Jesus entered the synagogue, and a man with a withered hand was there. Yesu akotaki lisusu na ndako ya mayangani epai wapi ezalaki na moto moko akufa loboko.
2 They watched closely to see if he'd heal the man on the Sabbath, to accuse Jesus. Boye bato bazalaki kotala soki Yesu akobikisa ye na mokolo ya Saba mpo na kofunda Ye.
3 Jesus said to the man with the withered hand, "Stand up and come forward." Bongo Yesu alobaki na moto oyo akufa loboko : — Telema na liboso ya bato nyonso.
4 Then he asked them, "Is it lawful on the Sabbath to do good or to do harm, to save life or to kill?" But they stayed silent. Atunaki bango : — Nini epesamela nzela ya kosala na mokolo ya Saba : kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa moto to kotika ye kokufa ? Kasi babatelaki kimia.
5 He looked around at them in anger, grieved by their hardness of heart, and told the man, "Stretch out your hand." He stretched it out, and his hand was restored. Yesu atalaki bango na mawa mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo ete mitema na bango ezalaki makasi lokola libanga. Yesu alobaki na moto yango : — Sembola loboko na yo ! Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebikaki.
6 Then the Pharisees went out and immediately began plotting with the Herodians how they might destroy him. Mbala moko, Bafarizeo babimaki mpe bakendeki koyokana na bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu.
7 Jesus withdrew with his disciples to the sea; a large crowd from Galilee followed, and from Judea, Tango Yesu alongwaki kuna, akendeki na ebale elongo na bayekoli na Ye, mpe bato ebele penza balandaki Ye wuta na Galile, na Yuda,
8 from Jerusalem, Idumea, beyond the Jordan, and the region around Tyre and Sidon—hearing all he was doing, a great crowd came to him. na Yelusalemi, na Idume mpe na ngambo ya Yordani. Boye tango bato oyo bazalaki na bamboka ya zingazinga ya Tiri mpe ya Sidoni bayokaki sango ya makambo nyonso oyo Yesu azalaki kosala, bango mpe bayaki ebele penza epai na Ye.
9 He told his disciples to keep a small boat ready, because of the crowd, so they wouldn't crush him. Boye Yesu atindaki bayekoli ete babongisela Ye bwato moko mpo ete bato bafinafina Ye te.
10 For he had healed so many that all who had diseases were pressing forward to touch him. Lokola azalaki kobikisa bato ebele, bato oyo bazalaki na pasi bakomaki kowelela koya epai na Ye mpo na koluka kosimba Ye.
11 Whenever the unclean spirits saw him, they fell before him, shouting, "You are the Son of God!" Tango bato oyo bazalaki na milimo mabe bazalaki komona Ye, bazalaki kogumbama liboso na Ye mpe koganga : — Yo ozali solo Mwana na Nzambe !
12 But he firmly warned them not to reveal him. Kasi Yesu azalaki kopamela milimo yango ete emeka te koloba na tina na Ye.
13 Jesus went up the mountain and called those he wanted; they came to him. Yesu amataki likolo ya ngomba, abengaki bato oyo azalaki na bosenga na bango, mpe bakendeki epai na Ye.
14 He appointed twelve, named apostles, so they could be with him and he could send them out to preach, Kati na bango, aponaki bato zomi na mibale oyo akomaki kobenga « bantoma, » mpo ete bazala elongo na Ye mpe mpo ete bakende koteya Sango Malamu ;
15 and to have authority to drive out demons. mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe.
16 These are the twelve he appointed: Simon, to whom he gave the name Peter; Tala bakombo ya bato zomi na mibale oyo aponaki : Simona oyo Yesu apesaki kombo « Petelo ; »
17 James son of Zebedee, and John his brother, whom he named Boanerges, meaning Sons of Thunder; Jake, mwana mobali ya Zebede, mpe Yoane, ndeko na ye, ba-oyo Yesu apesaki kombo « Boanerijesi » oyo elingi koloba : bana ya kake ;
18 Andrew, Philip, Bartholomew, Matthew, Thomas, James son of Alphaeus, Thaddaeus, Simon the Zealot, Andre, Filipo, Bartelemi, Matayo, Toma, Jake, mwana mobali ya Alife ; Tade, Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote,
19 and Judas Iscariot, who betrayed him. mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.
20 He went home; the crowd gathered again, so he and his disciples couldn't even eat. Tango Yesu akotaki na ndako, bato ebele bayaki lisusu kosangana wana, mpe esalaki ete Ye elongo na bayekoli na Ye bazangaki ata tango mpo na kolia.
21 When his family heard, they went out to restrain him, for they said, "He's out of his mind." Tango bandeko ya libota na Ye bayokaki bongo, bayaki mpo na kozwa Ye na makasi, pamba te bazalaki koloba : — Akomi na bokono ya liboma.
22 The scribes who came down from Jerusalem said, "He has Beelzebul," and, "By the prince of demons he drives out demons." Balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi balobaki : — Azali na molimo ya Belizebule kati na ye mpe azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.
23 So Jesus called them to him and spoke in parables: "How can Satan drive out Satan? Yesu abengaki bango mpe alobaki na bango na masese : — Ndenge nini Satana akoki kobengana Satana ?
24 If a kingdom is divided against itself, that kingdom cannot stand. Soki bokonzi moko ekabwani, bokonzi yango ekowumela te.
25 And if a house is divided against itself, that house will not be able to stand. Soki libota moko ekabwani, libota yango ekowumela te ;
26 And if Satan opposes himself and is divided, he cannot stand; his end has come. mpe soki Satana amibundisi mpe akabwani na ye moko, akowumela te, mpe suka na ye emonani.
27 No one can enter a strong man's house and take his goods without first tying up the strong man—then he can plunder the house. Pamba te moto moko te akoki kokota na ndako ya elombe mpo na kobotola biloko na ye soki liboso akangi ye te na basinga. Ezali kaka soki asali bongo nde akoki kobotola biloko na ye ya ndako.
28 Truly I tell you, all sins and insults against God will be forgiven children of mankind, whatever they say, Nazali koloba na bino penza ya solo : masumu mpe maloba nyonso ya mabe oyo bato bakoki kofinga na yango Nzambe ekolimbisama ;
29 but whoever blasphemes against the Holy Spirit never has forgiveness; they are guilty of an eternal sin," kasi moto nyonso oyo akofinga Molimo Mosantu akolimbisama te, akomema mokumba ya lisumu yango mpo na libela.
30 for they were saying, "He has an unclean spirit." Yesu alobaki bongo, mpo ete bazalaki koloba : « Azali na molimo mabe ! »
31 His mother and brothers arrived and, standing outside, sent to him, calling him. Mama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki, batelemaki libanda mpe batindaki moto kobenga Yesu.
32 A crowd sat around him and said to him, "Look, your mother and your brothers are outside, asking for you." Bato ebele penza bavandaki pembeni na Ye. Mpe bayaki koloba na Ye : — Mama mpe bandeko na yo ya mibali bazali libanda, bazali koluka yo. Yesu azongisaki :
33 He answered them, "Who are my mother and my brothers?" — Nani mama na Ngai ? Banani bandeko na Ngai ?
34 Looking around at those sitting in a circle around him, he said, "Here are my mother and my brothers! Atalaki bato oyo bavandaki pembeni na Ye mpe alobaki : — Botala mama na Ngai mpe bandeko na Ngai !
35 Whoever does the will of our Father is my brother and sister and mother." Moto nyonso oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]