Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Luke 18 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Jesus told them a parable about the need to always pray and never lose heart. Yesu alobaki na bayekoli na Ye lisese moko mpo na kolakisa bango ete basengeli kosambelaka tango nyonso, na kolemba te.
2 "In a certain town there was a judge who neither feared God nor respected people. Alobaki : — Kati na engumba moko, ezalaki na mosambisi moko oyo azalaki kotosa Nzambe te, mpe azalaki komemia bato te.
3 A widow in that town kept coming to him, saying, 'Grant me justice against my opponent.' Kati na engumba yango, ezalaki mpe na mwasi moko akufisa mobali ; azalaki koya mbala na mbala epai ya mosambisi yango mpo na koloba na ye : « Longisa ngai liboso ya monguna na ngai. »
4 For a while he refused, but then said to himself, 'Though I don't fear God nor respect people, Wuta tango molayi, mosambisi yango aboyaki. Kasi suka na suka, amilobelaki : « Atako natosaka Nzambe te mpe namemiaka bato te,
5 since this widow keeps troubling me, I'll grant her justice, so she doesn't wear me out with her endless visits.'" kasi lokola motungisi ya mwasi oyo akufisa mobali eleki ndelo, nakolongisa ye kaka, mpo ete akoba te koyaka tango nyonso kino kozangisa ngai kimia. »
6 And the Lord said, "Listen to what the unjust judge says. Nkolo abakisaki : — Boyoka maloba ya mosambisi mabe oyo !
7 Won't our Father bring justice for his chosen ones who cry to him day and night? Will he keep delaying? Boni, Nzambe akolongisa te baponami na Ye, tango bagangaka epai na Ye butu mpe moyi ? Boni, akozelisa bango ?
8 I tell you, he will grant them justice quickly. But when the Son of Man comes, will he find faith on earth?" Nazali koloba na bino : akolongisa bango noki. Nzokande, ekozala ndenge nini tango Mwana na Moto akoya ! Boni, akokuta kondima kati na mokili ?
9 He also told this parable to some who trusted in themselves as righteous and despised everyone else: Epai ya bato oyo bamimonaki bato ya sembo mpe batiolaki bato mosusu, Yesu alobaki lisusu lisese oyo :
10 "Two men went up to the temple to pray, one a Pharisee and the other a tax collector. — Bato mibale bakendeki na Tempelo mpo na kosambela : moko azalaki Mofarizeo ; mpe mosusu, mofutisi mpako.
11 The Pharisee stood and prayed about himself: 'God, I thank you I'm not like other people—robbers, wrongdoers, adulterers—or even like this tax collector.' Mofarizeo abendanaki ye moko na pembeni mpe asambelaki : « Oh Nzambe, nazali kotonda Yo, mpo ete nazali te lokola bato mosusu oyo bazali miyibi, bato mabe, bato na bikobo to mpe lokola mofutisi mpako oyo.
12 'I fast twice a week; I give a tenth of all I get.' Nakilaka bilei mbala mibale na poso mpe napesaka eteni ya zomi ya nyonso oyo nazwaka. »
13 But the tax collector, standing far off, would not even raise his eyes to heaven, but beat his chest, saying, 'our Father, have mercy on me, a sinner.' Kasi mofutisi mpako atelemaki mwa mosika ; amekaki ata te kotombola miso na ye na likolo, kasi atiaki loboko na ye na tolo mpe alobaki : « Oh Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te nazali moto ya masumu ! »
14 I tell you, this man went to his home justified, not the other. Everyone who lifts himself up will be humbled; the one who humbles himself will be lifted up." Nazali koloba na bino : mofutisi mpako azongaki na ndako na ye sima na Nzambe kokomisa ye moto ya sembo, kasi Mofarizeo te. Pamba te moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.
15 People were even bringing their infants to him to touch them, but the disciples saw this and warned them off. Bato bazalaki mpe komema bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko. Tango bayekoli bamonaki bongo, bapamelaki bango.
16 But Jesus called the children to him and said, "Let the children come to me; don't stop them—the kingdom of our Father belongs to ones like these. Kasi Yesu abengaki bana mpe alobaki : — Botika bana mike baya epai na Ngai ; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bana mike.
17 Truly I tell you: whoever doesn't accept the kingdom of our Father like a little child will never enter it." Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.
18 A certain ruler asked him, "Good Teacher, what must I do to inherit eternal life?" Mokambi moko ya Bayuda atunaki na Yesu : — Moteyi malamu, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ?
19 Jesus said to him, "Why call me good? No one is good except our Father alone. Yesu azongisaki : — Mpo na nini ozali kobenga Ngai « Moteyi malamu ? » Moko te azali malamu, longola kaka Ye moko Nzambe.
20 You know the commandments: 'Do not commit adultery, Do not murder, Do not steal, Do not testify falsely, Honor your father and mother.'" Oyebi mibeko oyo : « Okosalaka ekobo te, okobomaka te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. »
21 "All these I have kept since my youth," he said. Mokambi yango azongisaki : — Natosaka nyonso wana wuta bolenge na ngai.
22 Hearing this, Jesus said, "One thing you still lack: sell all you own, give to the poor, and you'll have treasure in heaven; then come, follow me." Sima na Yesu koyoka bongo, alobaki na ye : — Ozangi eloko moko. Teka biloko na yo nyonso, kabola mbongo oyo okozwa epai ya babola, mpe okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
23 But when he heard this, he became very sad, for he was extremely rich. Tango mokambi ya Bayuda ayokaki bongo, akomaki mawa-mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.
24 Jesus looked at him and said, "How hard it is for the wealthy to enter our Father's kingdom! Yesu atalaki ye mpe alobaki : — Ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe !
25 For it's easier for a camel to pass through a needle's eye than for a rich person to enter our Father's kingdom." Nzokande, eleki pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga ; kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.
26 Those who heard it asked, "Then who can be saved?" Bato oyo bayokaki Ye koloba bongo batunaki : — Bongo nani penza akoki kobikisama ?
27 But he said, "What is impossible for people is possible for our Father." Yesu azongisaki : — Oyo ekoki kosalema te elongo na bato, ekoki kosalema elongo na Nzambe.
28 Then Peter said, "Look, we have left our own homes and followed you." Petelo alobaki na Yesu : — Nkolo, totiki nyonso oyo tozalaki na yango mpo na kolanda Yo !
29 He said to them, "Truly I tell you: no one has left house, wife, brothers, parents, or children for the sake of our Father's kingdom, Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo atiki ndako na ye, mwasi na ye, bandeko na ye, baboti na ye to bana na ye, mpo na kozwa Bokonzi ya Nzambe lokola litomba,
30 who will not receive many times more now, and eternal life in the age to come." akozwa, na tango oyo, biloko mingi koleka ; mpe na tango oyo ezali koya, bomoi ya seko.
31 He took the Twelve aside and said, "Look, we're going up to Jerusalem, and all the prophets wrote about the Son of Man will be fulfilled. Yesu abendaki na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe alobaki na bango : — Tozali kokende na Yelusalemi ; makambo nyonso oyo basakoli bakoma na tina na Mwana na Moto ekokokisama.
32 For he will be handed over to the Gentiles, mocked, insulted, and spit on. Bakokaba Ye na maboko ya bapagano, bakoseka Ye, bakofinga Ye, bakobwakela Ye soyi,
33 They will flog him and kill him, and on the third day he will rise." bakobeta Ye fimbu mpe bakoboma Ye ; mpe, na mokolo ya misato, akosekwa.
34 But they understood none of this; this saying was hidden from them, and they did not grasp what was said. Bayekoli basosolaki ata eloko moko te kati na makambo yango ; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpe bayebaki te makambo oyo Yesu azalaki kolobela.
35 As Jesus drew near to Jericho, a blind man was sitting by the roadside begging. Wana Yesu akomaki pene ya Jeriko, ezalaki na mokufi miso pembeni ya nzela, azalaki ya kovanda mpe azalaki kosenga-senga.
36 Hearing a crowd going by, he asked what was happening. Tango ayokaki makelele ya ebele ya bato oyo bazali koleka, atunaki : — Likambo nini oyo ezali kosalema ?
37 They told him, "Jesus of Nazareth is passing by." Balobaki na ye : — Yesu ya Nazareti azali koleka !
38 So he called out, "Jesus, Son of David, have mercy on me!" Agangaki : — Yesu, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !
39 Those who were in front rebuked him and told him to be quiet, but he cried out all the more, "Son of David, have mercy on me!" Bato oyo bazalaki liboso bapamelaki ye mpe balobaki na ye ete akanga monoko ; kasi, ye, agangaki lisusu makasi koleka : — Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !
40 Jesus stopped and ordered him brought to him. When he came near, Jesus asked, Yesu atelemaki mpe atindaki ete bamemela Ye mokufi miso yango. Tango akomaki pene na Ye, Yesu atunaki ye :
41 "What do you want me to do for you?" He said, "Lord, let me see again." — Olingi nasala nini mpo na yo ? Mokufi miso azongisaki : — Nkolo, nalingi komona.
42 And Jesus said to him, "Receive your sight; your faith has saved you." Yesu alobaki na ye : — Mona ! Kondima na yo ebikisi yo.
43 At once he could see and followed Jesus, glorifying our Father. All the people who saw it praised our Father too. Mpe mbala moko, akomaki komona, mpe alandaki Yesu, na kokumisa Nzambe. Tango bato nyonso bamonaki bongo, bango mpe bakumisaki Nzambe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]