Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Luke 19 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Jesus entered Jericho and was passing through. Yesu akotaki na engumba Jeriko, mpe azalaki kokatisa yango.
2 And there was a man named Zacchaeus; he was a chief tax collector, and he was rich. Nzokande, ezalaki na moto moko kuna, kombo na ye « Zashe. » Azalaki mokonzi ya bafutisi mpako, mpe azalaki na bozwi ebele ;
3 He wanted to see who Jesus was, but couldn't for the crowd—he was short. azalaki na posa ya komona soki Yesu azali nani, kasi lokola azalaki mokuse, akokaki te komona Ye mpo ete bato bazalaki ebele penza.
4 He ran ahead and climbed a sycamore tree to see him, since Jesus was about to pass that way. Boye akimaki mbangu na liboso mpe amataki na nzete ya sikomori mpo na komona Yesu, pamba te Yesu akolekela na nzela wana.
5 When Jesus reached the spot, looked up, and said to him, "Zacchaeus, hurry down, for I must stay at your house today." Tango Yesu akomaki na esika yango, atombolaki miso mpe alobaki na ye : — Zashe, kita noki ! Nasengeli kolala na ndako na yo lelo.
6 So he hurried down and welcomed him joyfully. Mbala moko, Zashe akitaki mpe ayambaki Yesu na esengo.
7 Seeing this, everyone grumbled, "He's gone to stay with a sinful man." Tango bato nyonso bamonaki bongo, bakomaki koyimayima ; bazalaki koloba : — Tala, akei kolala na ndako ya moto ya masumu !
8 Zacchaeus stood and said to the Lord, "Look, Lord, I give half my possessions to the poor, and if I've cheated anyone, I'll repay four times as much." Kasi Zashe atelemaki mpe alobaki na Ye : — Nkolo, nazali kopesa, awa mpe sik’oyo, kati-kati ya biloko na ngai epai ya babola ; mpe, soki nabotolaki biloko ya moto, nazali kozongisela ye yango mbala minei.
9 Jesus told him, "Today salvation has come to this house, since he too is a son of Abraham. Yesu alobaki na ye : — Lelo, lobiko eyei na ndako oyo, mpo ete ye mpe azali mwana ya Abrayami.
10 For the Son of Man came to seek and to save the lost." Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa bato oyo babunga.
11 While they listened, he added a parable, since he was near Jerusalem and they thought our Father's kingdom would appear immediately. Wana bazalaki koyoka makambo yango, Yesu akobaki koloba lisese moko, pamba te akomaki pene ya Yelusalemi, mpe mpo ete bato bakanisaki ete Bokonzi ya Nzambe elingi komimonisa kaka na tango yango.
12 So he said, "A nobleman went to a distant land to receive a kingdom for himself and return. Boye Yesu alobaki : — Ezalaki na moto moko abotama na libota ya mbongo ; akendeki na mokili moko ya mosika mpo ete bakomisa ye mokonzi mpe, sima na yango, akozonga.
13 Calling ten of his servants, he gave each about three months' wages, saying, "Trade with this until I return." Boye abengaki basali zomi kati na basali na ye mpe apesaki bango mbongo ya bibende zomi. Alobaki na bango : « Bosala mombongo na mbongo oyo kino tango nakozonga. »
14 His citizens hated him and sent envoys after him, saying, "We don't want this man ruling over us." Kasi bandeko na ye, bana mboka, bazalaki kolinga ye te ; batindaki ndambo ya bato, sima na ye, mpo na koloba : « Toboyi ete moto oyo akoma mokonzi na biso. »
15 "Returning after receiving the kingdom, he called the servants he had given money to, to learn what they had earned. Sima na ye kozwa bokonzi, azongaki na ekolo na ye mpe abengaki basali epai ya banani apesaki mbongo mpo na koyeba soki bazwi mileki boni na mbongo na ye.
16 The first came, saying, 'Lord, your money has earned ten times as much.'" Mosali ya liboso ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, mbongo na yo eboti mbongo ya bibende zomi lokola mileki. »
17 "He replied, 'Well done, good servant! Since you were faithful in a small matter, take charge of ten cities.'" Nkolo alobaki na ye : « Osali malamu ! Ozali mosali malamu ! Mpo ete ozalaki sembo na likambo ya moke, nakokomisa yo moyangeli ya bingumba zomi. »
18 "And the second came, saying, 'Lord, the money you gave me has earned five times as much.'" Mosali ya mibale ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, mbongo na yo eboti mbongo ya bibende mitano lokola mileki. »
19 "And he said to him, 'And you will be in charge of five cities.'" Nkolo na ye azongisaki : « Nakokomisa yo moyangeli ya bingumba mitano. »
20 "Then another came, saying, 'Lord, here is your money back, which I kept wrapped in a cloth;' Mosali mosusu ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, tala mbongo na yo ! Nabombaki yango malamu kati na eteni ya elamba.
21 for I was afraid of you, because you're a harsh man: you take what you didn't deposit and reap what you didn't sow." Nazalaki kobanga yo, pamba te ozalaka moto ya matata : ozwaka biloko oyo obombaki te mpe obukaka bambuma ya nkona oyo olonaki te. »
22 He answered, "By your own mouth I judge you, wicked servant! You knew I'm a harsh man, taking what I didn't deposit and reaping what I didn't sow? Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe ! Nakopesa yo etumbu kolanda maloba na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, ete nazwaka biloko oyo nabombaki te mpe nabukaka bambuma ya nkona oyo nalonaki te.
23 Why then didn't you put my money in the bank? I'd have collected it with interest when I returned. Bongo mpo na nini obombaki te mbongo na ngai kati na ndako ya misolo ? Na bozongi na ngai, nalingaki kozwa yango elongo na mileki ? »
24 He said to those standing by, 'Take the money from him and give it to the one with ten times as much.'" Bongo nkolo alobaki na bato oyo bazalaki wana : « Bobotola ye mbongo yango mpe bopesa yango na moto oyo azali na mbongo ya bibende zomi. »
25 "And they said to him, 'Lord, he has ten times as much! Balobaki na ye : « Nkolo, azali na mbongo ya bibende zomi ! »
26 I tell you: everyone who has will be given more; but from the one who has none, even what he has will be taken. Nkolo azongisaki : « Nazali koloba na bino : na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.
27 But bring here these enemies of mine who refused my rule, and slaughter them before me.'" Kasi banguna na ngai wana, oyo baboyaki ete nakoma mokonzi na bango, bomemela ngai bango awa mpe boboma bango na miso na ngai. »
28 And when he had said these things, he went on ahead, going up to Jerusalem. Sima na Yesu koloba bongo, alekaki liboso mpo na kokende na Yelusalemi.
29 Nearing Bethphage and Bethany, at the Mount of Olives, he sent two of the disciples, Wana akomaki pene ya Betifaje mpe Betani, na ngomba oyo babengaka « ngomba ya banzete ya olive, » atindaki bayekoli mibale kati na bayekoli na Ye ;
30 saying, "Go into the village ahead. As you enter, you will find a colt tied there, never sat on. Untie it and bring it here. alobaki na bango : — Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino. Tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona mwana ya ane bakanga na singa, oyo moto ata moko te asila kosalela ; bofungola yango mpe bomema yango awa.
31 If anyone asks you, 'Why are you untying it?' say, 'The Lord needs it.'" Soki moto moko atuni bino : « Mpo na nini bozali kofungola yango ? » Boloba na ye : « Nkolo azali na bosenga na yango. »
32 So those who were sent went away and found it just as he had told them. Bato oyo Yesu atindaki bakendeki mpe bamonaki yango ndenge kaka Yesu alobaki na bango.
33 As they were untying the colt, its owners said to them, "Why are you untying the colt?" Wana bazalaki kofungola mwana yango ya ane, bankolo na yango batunaki bango : — Mpo na nini bozali kofungola mwana oyo ya ane ?
34 And they said, "The Lord needs it." Bazongisaki : — Nkolo azali na bosenga na yango.
35 They brought it to Jesus, threw their cloaks on the colt, and set Jesus on it. Bamemaki mwana yango ya ane epai ya Yesu, batandaki bilamba na bango na mokongo na yango, mpe Yesu avandaki na likolo na yango.
36 And as he rode along, they spread their cloaks on the road. Wana azalaki kokende, bato bazalaki kotanda bilamba na bango na nzela.
37 As he neared the descent of the Mount of Olives, the whole crowd of disciples began rejoicing, praising our Father loudly for all the mighty works they had seen, Mpe tango akomaki pene ya Yelusalemi, na esika oyo nzela ekita na ngomba ya banzete ya olive, ebele ya bayekoli babandaki kokumisa Nzambe, na esengo nyonso mpe na mongongo makasi mpo na bikamwa nyonso oyo bamonaki.
38 saying, "Blessed is the King who comes in the name of our Father! Peace in heaven and glory in the highest!" Bazalaki koloba : « Tika ete apambolama, mokonzi oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! Kimia kati na Likolo, mpe nkembo kati na bisika oyo eleki Likolo ! »
39 And some of the Pharisees in the crowd said to him, "Teacher, rebuke your disciples." Ndambo ya Bafarizeo, kati na ebele ya bato, balobaki na Yesu : — Moteyi, pamela bayekoli na Yo !
40 He answered, "I tell you, if these were silent, the very stones would cry out." Yesu azongisaki : — Nazali koloba na bino : soki bango babateli kimia, mabanga ekoganga !
41 And when he drew near and saw the city, he wept over it, Lokola akomaki pene ya Yelusalemi mpe amonaki engumba, alelaki mpo na yango
42 saying, "If only you had known today what brings you peace! But now it is hidden from your eyes. mpe alobaki : — Ah, soki kaka yo mpe oyebaki, na mokolo ya lelo, makambo oyo elingaki komemela yo kimia ! Kasi sik’oyo, ezali ya kobombama mosika na miso na yo.
43 Days are coming when your enemies will build a barricade around you, surround you, and hem you in on every side, Mikolo ya pasi ekokomela yo, mikolo oyo banguna na yo bakotimola mabulu pembeni na yo, bakozingela yo mpe bakofinafina yo na bangambo nyonso ;
44 and they will level you and your children within your walls, leaving no stone on another, because you did not recognize the time of your visitation." bakobamba yo na mabele, yo mpe bato oyo bazali kati na lopango na yo, mpe bakotika ata libanga moko te na likolo ya libanga mosusu, pamba te oyebaki te tango oyo Nzambe ayaki epai na yo.
45 And he entered the temple and began to drive out those who were selling, Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo mpe abandaki kobengana bato oyo bazalaki koteka biloko kuna ; alobaki na bango :
46 he told them, "Scripture says, 'My house will be a house of prayer,' but you've made it a den of robbers." — Ekomama : « Ndako na Ngai ekozala Ndako ya losambo ; » kasi bino, bokomisaki yango penza nganda ya miyibi !
47 He taught daily in the temple, while the chief priests, scribes, and leaders of the people looked for a way to kill him, Yesu azalaki koteya mikolo nyonso na Tempelo. Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya Bayuda bazalaki koluka koboma Ye ;
48 but they found nothing they could do, since all the people hung on his words. kasi bazalaki kokoka te, pamba te bato nyonso bazalaki koyoka Yesu na bokebi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]