Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Luke 20 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 One of those days, as Jesus taught the people in the temple and preached good news, the chief priests and scribes came up with the elders, Mokolo moko, wana Yesu azalaki koteya bato kati na lopango ya Tempelo mpe kosakola Sango Malamu, bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato babimelaki Ye ;
2 and asked him, "Tell us by what authority you do these things, or who gave you this authority." balobaki na Ye : — Yebisa biso, na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Nani apesi yo bokonzi yango ?
3 He answered them, "I also will ask you a question. Tell me: Yesu azongisaki : — Ngai mpe, nazali kotuna bino motuna moko. Boyebisa Ngai :
4 Was the baptism of John from heaven, or from man?" Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato ?
5 They discussed among themselves: "If we say, 'From heaven,' he'll say, 'Why didn't you believe him?' Bakomaki kokabola makanisi bango na bango : « Soki tolobi : ‹ Ewutaki na Nzambe, › akotuna biso lisusu : ‹ Bongo mpo na nini bondimaki Ye te ? ›
6 But if we say 'From man,' all the people will stone us, for they're convinced John was a prophet." Soki mpe tolobi : ‹ Ewutaki na bato, › bato nyonso bakobamba biso mabanga, pamba te bandimaka ete Yoane azalaki mosakoli. »
7 So they answered that they did not know where it came from. Boye, bazongisaki : — Toyebi te epai wapi ewutaki.
8 And Jesus said to them, "Neither will I tell you by what authority I do these things." Yesu alobaki : — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.
9 He began telling the people this parable: A man planted a vineyard, leased it to tenants, then went abroad for a long time. Sima, Yesu alobaki na bato lisese oyo : — Moto moko alonaki elanga ya vino, apesaki yango epai ya basali bilanga mpo ete bafutelaka yango, mpe akendeki mobembo ya tango molayi.
10 "At harvest he sent a servant to the tenant farmers for his share of the vineyard's fruit, but they beat him and sent him away empty-handed. Tango eleko ya kobuka bambuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli elanga mpo ete bapesa ye ndambo ya bambuma kowuta na elanga ya vino. Kasi bafuteli elanga babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba.
11 He sent another servant; they beat him too, humiliated him, and sent him away empty-handed. Atindaki mosali mosusu ; kasi ye mpe, babetaki ye, bafingaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba.
12 And he sent yet a third, but they wounded this one too and threw him out. Atindaki lisusu mosali ya misato ; ye mpe, bazokisaki ye mpe babwakaki ye libanda ya elanga.
13 The vineyard owner said, 'What should I do? I will send my beloved son; perhaps they will respect him.' Bongo nkolo elanga ya vino amilobelaki : « Nasala nini ? Nakotinda kaka mwana na ngai ya mobali, oyo nalingaka mingi ; tango mosusu, bakotosa ye. »
14 But seeing him, the tenants reasoned among themselves: 'This is the heir. Let's kill him, so the inheritance becomes ours.' Kasi tango bafuteli elanga bamonaki ye, balobanaki bango na bango : « Tala mokitani ya libula ! Toboma ye mpo ete libula ekoma ya biso ! »
15 They threw him out of the vineyard and killed him. What then will the vineyard owner do to them? Boye babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino mpe babomaki ye. Nkolo elanga ya vino akosala bango nini ?
16 "He will come, destroy those tenants, and give the vineyard to others." Hearing this, they said, "Impossible!" Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga mpe akopesa elanga yango ya vino epai ya bato mosusu. Tango bato bayokaki bongo, balobaki : — Te, ekoki kosalema te !
17 He looked straight at them and asked, "Then what is this that's written: 'The stone the builders rejected became the cornerstone'? Kasi Yesu atalaki bango mpe alobaki : — Bongo makambo oyo ekomama elakisi nini : « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako ? »
18 Everyone who falls on that stone will be broken to pieces, and when it falls on anyone, it will crush him." Moto nyonso oyo akokweya na likolo ya libanga yango akobukana ndambo na ndambo ; moto oyo libanga yango ekokweyela, ekopanza ye.
19 The scribes and chief priests wanted to arrest him then and there, knowing he'd told this parable against them—but they feared the people. Kaka na tango yango, balakisi ya Mobeko mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe balukaki nzela ya kokanga Yesu, pamba te bayebaki ete alobi lisese yango mpo na bango ; kasi babangaki bato.
20 Watching closely, they sent spies pretending to be honest, to catch him in his words, so as to hand him over to the governor's rule and authority. Kobanda na tango wana, bakomaki kolandela Yesu, mpe batindaki banongi oyo bazalaki komilakisa lokola bato ya sembo, mpo na kokanga Ye na maloba na Ye mpe kokaba Ye na maboko ya basambisi mpe ya moyangeli.
21 They asked him, "Teacher, we know you speak and teach rightly, favor no one, but truly teach God's way. Banongi yango batunaki Yesu : — Moteyi, toyebi ete olobaka mpe oteyaka makambo ya sembo, mpe oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe.
22 Is it lawful for us to pay taxes to Caesar, or not?" Boni, ezali sembo mpo na biso kofuta mpako epai ya Sezare to te ?
23 But he saw through their cunning and said, Kasi Yesu asosolaki mayele mabe na bango mpe alobaki na bango :
24 "Show me a coin worth a day's wages. Whose image and inscription is on it?" They said, "Caesar's." — Bolakisa Ngai mbongo moko ya ebende. Elilingi mpe makomi oyo batobola na mbongo oyo, ezali ya nani ? Bazongisaki : — Ya Sezare !
25 He said to them, "Then give Caesar what's Caesar's, and our Father what's our Father's." Yesu alobaki na bango : — Boye bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe !
26 They could not trap him in his words before the people, and amazed at his answer, they fell silent. Balongaki te kokanga Ye na nzela ya makambo oyo alobaki liboso ya bato ; mpe lokola bakamwaki eyano na Ye, bavandaki nye.
27 Some Sadducees, who deny there is a resurrection, came and asked him, Ndambo ya Basaduseo, oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai ya Yesu mpo na kotuna Ye motuna oyo :
28 "Teacher, Moses wrote for us: if a man dies leaving a wife but no children, his brother must marry the widow and raise offspring for him. — Moteyi, Moyize atikela biso mobeko oyo kati na makomi : « Soki mobali moko akufi, atiki mwasi kasi bana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kobala mwasi oyo akufisi mobali mpo ete abotela ndeko oyo asili kokufa bana. »
29 Now there were seven brothers. The first took a wife and died childless. Nzokande, azalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko ya liboso abalaki mwasi yango mpe akufaki, kasi abotaki bana te.
30 And the second, Ndeko ya mibale abalaki mwasi yango kaka ;
31 and the third took her, and likewise all seven left no children and died. sima na ye, ndeko ya misato. Esalemaki kaka bongo kino na ndeko oyo ya sambo : bandeko nyonso sambo bakufaki, batikalaki kobota bana te.
32 Finally the woman also died. Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki.
33 At the resurrection, then, whose wife will she be? For all seven had married her." Sik’oyo, na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani, pamba te bandeko mibali nyonso sambo babalaki ye ?
34 And Jesus said to them, "The people of this age marry and are given in marriage, Yesu azongisaki : — Ezali bato ya mokili oyo nde babalaka mpe babalisaka ;
35 "But those considered worthy to reach that age and the resurrection from the dead neither marry nor are given in marriage. kasi bato oyo bakomonana ete bakoki mpo na kosekwa kati na bakufi mpe kobika bomoi kati na mokili oyo ezali koya, bakobala te
36 For they can no longer die, because they are like angels and children of our Father, children of the resurrection. mpe bakokufa lisusu te, pamba te bazali lokola ba-anjelu. Bazali bana na Nzambe mpo ete basekwi kati na bakufi.
37 But even Moses showed the dead are raised, at the bush passage, calling our Father the God of Abraham and of Isaac and of Jacob. Moyize atalisaki polele ete bakufi bakosekwa ; pamba te, kati na eteni oyo ezali kolobela nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te, abengaki Nkolo « Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. »
38 He isn't God of the dead but of the living, for all are alive to him." Nzokande, Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi Nzambe ya bato ya bomoi ; pamba te, mpo na Ye, bango nyonso misato bazali na bomoi.
39 Then some of the scribes answered, "Teacher, you have spoken well." Ndambo ya balakisi ya Mobeko bazongisaki : — Moteyi, olobi malamu !
40 For they no longer dared to ask him anything. Mpe moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.
41 But he said to them, "How can they say that the Christ is the son of David? Yesu mpe atunaki bango : — Mpo na nini balobaka ete Klisto azali mwana ya Davidi ?
42 For David himself says in the Psalms, 'Our Father said to my Lord, "Sit at my right hand, Davidi, ye moko, alobaki boye kati na buku ya banzembo : « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali
43 until I make your enemies a footstool for your feet."' kino nakomisa banguna na Yo enyatelo makolo na Yo. › »
44 David then calls him Lord—how is he his son?" Davidi azali kobenga Klisto « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ?
45 While all the people were listening, he said to his disciples, Wana ebele ya bato bazalaki koyoka, Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
46 "Watch out for the scribes, who want to walk in long robes, and love greetings in the marketplaces, the best seats in synagogues, and places of honor at feasts, — Bosala keba na balakisi ya Mobeko ! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi ; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti ;
47 who devour widows' houses and pray long prayers for show. They will receive greater condemnation." bayibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali mpe basalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Bakozwa etumbu oyo eleki makasi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]