Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Luke 21 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Looking up, Jesus saw the rich putting their gifts into the temple treasury. Wana Yesu atombolaki miso, amonaki bato na bozwi kotia makabo na bango kati na kitunga ya makabo ;
2 He also saw a poor widow putting in two small copper coins. amonaki mpe mwasi mobola moko akufisa mobali kotia mbongo ya bibende mibale.
3 "Truly I tell you," he said, "this poor widow has put in more than all the others. Alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : mwasi mobola oyo akufisa mobali apesi koleka bato nyonso.
4 For all these gave gifts from their surplus, but she gave from her poverty all she had to live on." Pamba te bato wana nyonso bazwi kati na mbongo oyo bazali na yango na tina te, mpo na kotia kati na kitunga ya makabo ; kasi ye, kati na kokelela na ye, atie nyonso oyo azalaki na yango mpo na kokoba kobika.
5 As some were speaking of the temple, decorated with fine stones and gifts dedicated to our Father, he said: Ndambo ya bayekoli bazalaki kolula kitoko ya Tempelo, ndenge ezalaki kongala na mabanga ya kitoko mpe na biloko ya kitoko oyo bazalaki kobonzela Nzambe lokola makabo. Kasi Yesu alobaki :
6 "As for what you're looking at, days are coming when not one stone will be left on another—every one will be thrown down." — Mikolo ekoya oyo, kati na nyonso oyo bozali komona awa, ata libanga moko te ekotikala na likolo ya libanga mosusu ; nyonso ekobukama.
7 "Teacher," they asked, "when will these things happen, and what sign will show these things are about to happen?" Batunaki Yesu : — Moteyi, makambo yango ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa biso ete makambo yango ekomi pene ya kokokisama ?
8 "Watch out, don't be deceived," he said. "Many will come in my name, saying, 'I am he,' and, 'The time is near.' Don't follow them. Yesu azongisaki : — Bosala keba ete moko te akosa bino ! Pamba te bato mingi bakoya na Kombo na Ngai, bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe « Tango ekoki ! » Bolanda bango te.
9 When you hear of wars and revolts, don't panic. These must come first, but the end won't follow at once." Soki boyoki basango ya bitumba mpe ya mobulu, bobanga te ; pamba te makambo wana esengeli nanu kosalema, kasi ekozala mbala moko suka ya mokili te.
10 Then he said to them, "Nation will rise against nation, and kingdom against kingdom. Bongo alobaki na bango : — Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu,
11 Great earthquakes will strike, with famines and plagues in various places, and terrors and great signs from heaven. mabele ekoningana makasi mpe, na bisika ebele, nzala makasi mpe bokono ya ndenge na ndenge ekozala ; makambo ya somo ekosalema, mpe bilembo ya kokamwa ekomonana kowuta na Likolo.
12 But before all this, they'll grab you and persecute you, handing you over to synagogues and prisons, hauling you before kings and governors because of my name. Kasi liboso ya makambo wana nyonso, bakokanga bino, bakonyokola bino, bakofunda bino kati na bandako ya mayangani, bakobwaka bino na baboloko, bakomema bino liboso ya bakonzi mpe ya bayangeli, mpo na Kombo na Ngai.
13 This will be your opportunity to bear witness. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai.
14 So settle in your hearts not to prepare your defense beforehand, Bozala na mitema ya kokita, bomitungisa te mpo na koluka koyeba ndenge nini bokosamba.
15 for I will give you words and wisdom no opponent can resist or refute. Pamba te, Ngai moko, nakopesa bino maloba oyo bosengeli koloba mpe bwanya oyo ekosala ete banguna na bino nyonso bandima nyonso oyo bokoloba.
16 You will be betrayed even by parents and brothers and relatives and friends, and they will kill some of you. Baboti na bino, bandeko na bino ya mibali mpe ya basi, baninga mpe balingami na bino bakokaba bino, mpe bakobomisa mingi kati na bino.
17 You will be hated by everyone for my name's sake. Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai,
18 But not a hair of your head will perish. kasi suki ata moko te ya mito na bino ekobunga.
19 By your endurance you will gain your lives." Boyika mpiko, mpe bokozwa bomoi.
20 "When you see Jerusalem surrounded by armies, then know that its desolation has drawn near. Tango bokomona mampinga ya basoda ezingeli Yelusalemi, boyeba ete kobebisama na yango ekomi pene.
21 Then let those in Judea flee to the mountains, let those in the city leave, and let those in the countryside not enter it, Wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ; tika ete bato oyo bakozala kati na Yelusalemi babima ; mpe tika ete bato oyo bakozala kati na bilanga bazonga te kati na engumba !
22 for these are days of judgment, when all that is written will be fulfilled. Pamba te mikolo wana ekozala mikolo ya pasi makasi, mikolo oyo makambo nyonso oyo ekomama ekokokisama.
23 How terrible it will be for pregnant women and nursing mothers in those days! For great distress will fall on the land, and wrath against this people. Na mikolo yango, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele ! Pamba te pasi ekozala makasi kati na mokili, mpe kanda ya Nzambe ekokweyela bato yango.
24 They will fall by the edge of the sword and be led captive into all nations. Jerusalem will be trampled by the nations until the times of the nations are fulfilled." Bakoboma bango na mopanga mpe bakomema bango na bowumbu kati na bikolo nyonso ya bapaya ; mpe bapagano bakonyata Yelusalemi kino tango ya bapagano ekosila koleka.
25 "There will be signs in sun, moon, and stars, and on earth, nations in distress, confused by the sea's roar and surge. Bilembo ekomonana kati na moyi, kati na sanza, mpe kati na minzoto ; bongo na mokili, bikolo ekotonda na somo mpe na kobanga likolo ya lokito makasi mpe ya bambonge ya ebale monene.
26 People fainting from fear, dreading what's coming on the world, for the powers of the heavens will be shaken. Bato bakokufa na somo, wana bakozala kokanisa makambo oyo esengeli koya na mokili, pamba te banguya ya Likolo ekoningisama.
27 Then they will see the Son of Man coming in a cloud with power and great glory. Sima na yango, bakomona Mwana na Moto koya kati na mapata, na nguya mpe na nkembo monene.
28 When these things start, straighten up and lift your heads, for your redemption is near." Tango makambo wana ekobanda kosalema, botelema, botombola mito mpe boyika mpiko, pamba te lisiko na bino ekomi pene.
29 Then he told them a parable: "Look at the fig tree and all the trees. Alobaki na bango lisese oyo : — Botala malamu nzete ya figi mpe banzete nyonso mosusu :
30 When they sprout leaves, you see for yourselves and know summer is already near. soki kaka ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene.
31 Likewise, when you see these things happen, know the kingdom of our Father is near. Ndenge moko mpe mpo na bino : tango bokomona makambo wana kosalema, boyeba ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pene.
32 Truly I tell you, this generation will not pass away until all these things have taken place. Nazali koloba na bino penza ya solo : bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema.
33 Heaven and earth will pass away, but my words will never pass away." Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.
34 "Watch yourselves, or your hearts will be weighed down by wild living, drunkenness, and life's worries, and that day will spring on you suddenly, like a trap. Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata,
35 For it will come upon everyone living on the face of the whole earth. lokola monyama, pamba te ekoya likolo ya bato nyonso ya mokili mobimba.
36 Keep watch at all times, praying for strength to escape everything about to happen, and to stand before the Son of Man." Bosenzela malamu mpe bosambelaka tango nyonso, mpo ete bozwa makasi ya kokima makambo nyonso oyo ekoya mpe ya kotelema liboso ya Mwana na Moto.
37 By day he taught in the temple; at night he went out and stayed on the Mount of Olives. Mikolo nyonso, na moyi, Yesu azalaki koteya kati na Tempelo ; mpe na butu, azalaki kobima mpo na kokende kolala na ngomba ya banzete ya olive.
38 All the people would come to him at dawn in the temple to hear him. Na tongo makasi, bato nyonso bazalaki koya epai na Ye, kati na Tempelo, mpo na koyoka Ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]