1Now the Feast of Bread Without Yeast, called Passover, was approaching.OLCBWana feti ya Mapa ezanga levire, feti oyo babengaka Pasika, ekomaki pene,
2The chief priests and the scribes were looking for a way to kill him, because they feared the people.OLCBbakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini koboma Yesu, pamba te bazalaki kobanga bato.
3Then Satan entered into Judas, the one called Iscariot, who was one of the twelve.OLCBBongo Satana akotaki kati na Yuda oyo bazalaki kobenga « Isikarioti » mpe azalaki moko kati na bantoma zomi na mibale.
4He went and conferred with the chief priests and temple officers how he might betray him to them.OLCBBoye, Yuda akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpo na kobongisa elongo na bango ndenge nini akoteka Yesu epai na bango.
5They were glad and agreed to give him money.OLCBBasepelaki mingi mpe bayokanaki ete bakopesa ye mbongo.
6He agreed and began looking for an opportunity to betray him to them away from the crowd.OLCBYuda andimaki mpe akomaki koluka libaku malamu ya kokaba Yesu na maboko na bango, na ndenge ete ebele ya bato bayeba te.
7Then the day of Unleavened Bread arrived, when the Passover lamb had to be sacrificed.OLCBAwa ekomaki mokolo ya feti ya Mapa ezanga levire, mokolo oyo basengeli koboma mpate lokola mbeka ya Pasika,
8Jesus sent Peter and John, saying, "Go prepare the Passover for us to eat."OLCBYesu atindaki Petelo mpe Yoane ; alobaki na bango : — Bokende kobongisela biso bilei ya Pasika.
9They said to him, "Where do you want us to prepare it?"OLCBBatunaki Ye : — Esika nini olingi ete tobongisa yango ?
10He said, "Once you enter the city, a man carrying a jar of water will meet you. Follow him into the house he enters,OLCBYesu azongiselaki bango : — Tango bokokota na engumba, bokokutana na mobali moko amemi eloku ya mayi. Bolanda ye kino na ndako epai wapi akokota.
11"and tell the owner of the house, 'The Teacher says to you: Where is the guest room where I may eat the Passover with my disciples?'OLCBMpe boloba na nkolo ndako : « Moteyi atuni : ‹ Wapi shambre epai wapi nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai ? › »
12And he will show you a large upper room, furnished; prepare it there."OLCBAkolakisa bino, na etaje, shambre moko ya monene babongisa malamu ; ezali kuna nde bokobongisa bilei ya Pasika.
13They went and found it just as he had told them, and they prepared the Passover.OLCBBakendeki, bakutaki makambo nyonso ndenge kaka Yesu ayebisaki bango mpe babongisaki bilei ya Pasika.
14When the hour came, he reclined at table, and the apostles with him.OLCBTango ngonga ekokaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bantoma.
15He told them, "I have deeply longed to eat this Passover with you before I suffer.OLCBAlobaki na bango : — Nayokaki posa makasi ya kolia Pasika oyo elongo na bino liboso ete namona pasi,
16For I tell you, I won't eat it until it's fulfilled in the kingdom of our Father."OLCBpamba te, nazali koloba na bino : nakolia yango lisusu te kino tina na yango ekokokisama penza kati na Bokonzi ya Nzambe.
17Taking a cup and giving thanks, he said, "Take this and divide it among yourselves.OLCBSima na Ye kozwa kopo, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe alobaki : — Bokamata kopo oyo mpe bokabola yango kati na bino,
18For I tell you, from now on I will not drink the vine's fruit until our Father's kingdom comes."OLCBpamba te nazali koloba na bino : nakomela lisusu te vino kowuta na bambuma ya vino, kino Bokonzi ya Nzambe eya.
19He took bread, gave thanks, broke it, and gave it to them, saying, "This is my body, given for you. Do this in memory of me."OLCBBongo, azwaki lipa mpe, sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki bango yango ; alobaki : — Oyo ezali nzoto na Ngai, epesami mpo na bino ! Bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai.
20He did the same with the cup after supper: "This cup is the new covenant in my blood, poured out for you.OLCBSima na Ye kolia, asalaki mpe bongo mpo na kopo ; alobaki : — Kopo oyo ezali Boyokani ya sika kati na makila na Ngai, makila oyo esopani mpo na bino.
21But look—the hand of the one who betrays me is with me on the table.OLCBNzokande, moto oyo azali koteka Ngai azali awa, azali kolia mesa moko elongo na Ngai.
22The Son of Man goes as determined, but woe to that man through whom he is handed over!"OLCBSolo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge Nzambe akata ; kasi mawa na moto oyo azali koteka Ye.
23They began asking each other which of them would do this.OLCBBongo bantoma bakomaki kotunana bango na bango mpo na koluka koyeba soki nani kati na bango akosala likambo yango.
24A dispute also arose among them about which of them was the greatest.OLCBTembe moko ebimaki kati na bayekoli mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene.
25He said to them, "Kings of nations dominate them, and rulers over them are called benefactors.OLCBYesu alobaki na bango : — Bakonzi ya bikolo bakonzaka yango, mpe bayangeli na yango balingaka ete babenga bango bato malamu.
26Not so with you: let the greatest among you become like the youngest, the leader like the one serving.OLCBKasi esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto oyo aleki monene kati na bino azala lokola leki ya suka, mpe moto oyo azali kokamba azala lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa.
27Who is greater—the guest at the table or the one serving? The guest, isn't it? Yet I am among you as one who serves.OLCBPamba te nani aleki monene ? Ye oyo avandi na mesa to ye oyo azali kotia bilei na mesa ? Ezali te oyo avandi na mesa ? Kasi Ngai nazali kati na bino lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa.
28"You are those who have stayed with me in my trials,OLCBBino nde bato oyo botikali ya kokangama na Ngai kati na pasi na Ngai.
29and I confer on you a kingdom, just as my Father conferred one on me,OLCBMpe lokola Tata na Ngai apesaki Ngai bokonzi, Ngai mpe nazali kopesa bino bokonzi,
30so you'll eat and drink at my table in my kingdom, and sit on thrones judging the twelve tribes of Israel."OLCBmpo ete bokoka kolia mpe komela na mesa na Ngai kati na Bokonzi na Ngai, mpe ete bokoka kovanda na bakiti ya bokonzi mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.
31"Simon, Simon, listen—Satan has demanded to sift all of you like wheat,OLCBSimona, Simona, Satana asengi koyungola bino ndenge bayungolaka ble.
32but I prayed for you, that your faith not fail. Once you have turned back, strengthen your brothers."OLCBKasi nasambeli mpo na yo, mpo ete kondima na yo ekweya te. Mpe sima na yo kozonga epai na Ngai, lendisa bandeko na yo.
33Peter said, "Lord, I'm ready to go with you to prison and death."OLCBKasi Petelo azongisaki : — Nkolo, nandimi kokota boloko to kokufa elongo na Yo.
34Jesus said, "I tell you, Peter: the rooster won't crow today before you deny three times that you know me."OLCBYesu alobaki na ye : — Petelo, nazali koloba na yo : lelo, liboso ete soso elela, okowangana mbala misato ete oyebi Ngai te.
35He asked, "When I sent you without money bag, knapsack, or sandals, did you lack anything?" "Nothing," they said.OLCBBongo Yesu atunaki bango : — Tango natindaki bino maboko pamba, mbongo te, sakosi te, basandale te ; boni, bozangaki eloko ? Bazongisaki : — Tozangaki eloko te.
36He said to them, "But now, let the one with a money bag take it, and a knapsack too. Let the one without a sword sell his cloak and buy one.OLCBAlobaki na bango : — Kasi, sik’oyo, tika ete moto oyo azali na mbongo azwa yango, oyo azali na sakosi azwa yango, oyo azangi mopanga ateka elamba na ye mpo na kosomba yango !
37For I tell you this Scripture must be fulfilled in me: 'He was counted among sinners.' For what is written about me is coming true."OLCBEkomama : « Batangaki Ye elongo na babomi bato ; » mpe nazali koloba na bino : makambo yango esengeli kokokisama kati na Ngai.
38They said, "Lord, look, here are two swords." He said to them, "It is enough."OLCBBayekoli balobaki : — Nkolo, tala mipanga mibale. Yesu azongisaki : — Ekoki !
39And he went out, as usual, to the Mount of Olives, and the disciples followed him.OLCBYesu abimaki mpe akendeki lokola momesano na ngomba ya banzete ya olive, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye.
40When he reached the place, he told them, "Pray you don't give in to temptation."OLCBTango akomaki na esika yango, alobaki na bango : — Bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama.
41And he withdrew from them about a stone's throw, and knelt down and prayed,OLCBAkendeki mwa mosika na bango, afukamaki mpe asambelaki boye :
42saying, "Father, if you are willing, take this cup from me. Yet not my will, but yours, be done."OLCB« Tata, soki olingi, longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo. » [
43And an angel from heaven appeared to him, strengthening him.OLCBAnjelu moko awutaki na Likolo, abimelaki Ye mpe alendisaki Ye.
44In agony he prayed more intensely; his sweat became like great drops of blood falling down to the ground.OLCBLokola azalaki koyoka somo makasi, asambelaki lisusu makasi koleka, kino motoki na Ye ekomaki lokola matanga ya makila oyo ekomaki kokweya na mabele.]
45When he rose from prayer, he came to the disciples and found them asleep from grief,OLCBTango asilisaki kosambela, atelemaki, akendeki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi, mpo ete batondaki na mawa.
46he said to them, "Why are you sleeping? Get up and pray, so you don't yield to temptation."OLCBAtunaki bango : — Mpo na nini bozali kolala ? Botelema mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama.
47While he was still speaking, a crowd came, led by the one called Judas, one of the twelve. He came up to Jesus to kiss him,OLCBWana Yesu azalaki nanu koloba, ebele ya bato bayaki ; mpe moto oyo bazalaki kobenga « Yuda, » moko kati na bayekoli zomi na mibale, azalaki liboso na bango. Apusanaki pene ya Yesu mpo na koyamba Ye,
48but Jesus said to him, "Judas, would you betray the Son of Man with a kiss?"OLCBkasi Yesu atunaki ye : — Yuda, ozali penza koteka Mwana na Moto na nzela ya beze ?
49Seeing what was about to happen, those with him said, "Lord, should we strike with the sword?"OLCBTango bato oyo bazalaki elongo na Yesu bamonaki makambo oyo ezali kosalema, batunaki Ye : — Nkolo, tobeta bango na nzela ya mipanga na biso ?
50And one of them struck the servant of the high priest and cut off his right ear.OLCBMpe moko kati na bango abetaki mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mopanga mpe akataki ye litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali.
51But Jesus answered, "No more of this!" And he touched the ear and healed him.OLCBKasi Yesu alobaki : — Boye lisusu te ! Yesu asimbaki litoyi ya mobali yango mpe abikisaki ye.
52Then Jesus said to the chief priests, temple officers, and elders who had come out against him, "Have you come out with swords and clubs, as against a robber?OLCBBongo Yesu alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe, na bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe na bakambi ya bato, oyo bayaki kokanga Ye : — Boni, nakomi mokambi ya batomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe banzete ?
53Every day I was with you in the temple, and you didn't lay hands on me. But this is your hour, and the authority of darkness."OLCBNazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali ngonga na bino, ngonga oyo bokonzi ya molili ezali kokonza.
54Seizing him, they led him and brought him into the high priest's house; Peter followed at a distance.OLCBBakangaki Yesu, bamemaki Ye kati na ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. Petelo azalaki kolanda na mosika.
55They lit a fire in the middle of the courtyard and sat together; Peter sat among them.OLCBMpe tango bapelisaki moto na kati-kati ya lopango mpe bavandaki lisanga, Petelo mpe avandaki elongo na bango.
56But a servant girl, seeing him sitting facing the light, stared at him and said, "This one too was with him."OLCBMwasi mosali moko amonaki Petelo avandi wana pembeni ya moto. Sima na ye kotala Petelo malamu, alobaki : — Tata oyo azalaki elongo na Yesu !
57But he denied it, saying, "Woman, I do not know him."OLCBKasi Petelo awanganaki mpe alobaki : — Mwasi, nayebi ye te.
58Shortly after, another saw him and said, "You too are one of them." But Peter said, "Man, I'm not."OLCBSima na mwa tango moke, moto mosusu amonaki Petelo mpe alobaki : — Yo mpe ozali moko kati na bango ! Petelo azongisaki : — Tata, nazali moko te kati na bango.
59About an hour later, another insisted, "This man was certainly with him, for he's a Galilean too."OLCBSima na ngonga moko, moto mosusu alobaki na molende : — Ezali ya solo ! Tata oyo azalaki elongo na ye, pamba te azali moto ya Galile.
60But Peter said, "Man, I don't know what you're saying." Immediately, while he was still speaking, the rooster crowed.OLCBKasi Petelo azongisaki : — Nayebi te makambo oyo ozali kolobela ! Wana azalaki nanu koloba, soso elelaki.
61The Lord turned and looked at Peter. Peter remembered what the Lord had told him: "Before the rooster crows today, you will deny me three times."OLCBNkolo abalukaki mpe atalaki Petelo ; mpe Petelo akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. »
62And he went out and wept bitterly.OLCBAbimaki mpe alelaki makasi na libanda.
63Now the men who were holding Jesus mocked him as they beat him.OLCBBato oyo bazalaki kokengela Yesu babandaki koseka mpe kobeta Ye.
64They blindfolded him and kept asking, "Prophesy! Who is it that struck you?"OLCBBazipaki Ye elongi mpe basengaki na makasi : — Sakola : Nani abeti Yo ?
65And they said many other things against him, insulting him.OLCBMpe balobaki na Ye maloba mabe ebele mpo na kofinga Ye.
66At daybreak, the people's council of elders convened—chief priests and scribes—and led him away to their council, saying,OLCBTango tongo etanaki, bakambi ya bato, elongo na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko, basanganaki mpe basengaki ete bamema Yesu liboso ya Likita-Monene na bango.
67"If you are the Christ, tell us." He said to them, "If I tell you, you will not believe,OLCBBalobaki : — Soki ozali Klisto, yebisa biso. Yesu azongisaki : — Ata nayebisi bino, bokondima na bino kaka Ngai te ;
68"and if I ask you, you will not answer.OLCBmpe soki Ngai napesi bino motuna, bokopesa na bino mpe Ngai eyano te.
69"But from now on the Son of Man will sit at the right hand of the power of our Father."OLCBKasi kobanda sik’oyo, Mwana na Moto akovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
70They all said, "So you are the Son of God?" He said to them, "You say that I am."OLCBBango nyonso batunaki : — Ozali Mwana na Nzambe ? Yesu azongisaki : — Bino nde bolobi ete nazali Mwana na Nzambe.
71They said, "What more testimony do we need? For we heard it ourselves from his mouth."OLCBBongo balobaki : — Mpo na nini koluka matatoli mosusu ? Toyoki yango na monoko na ye moko.