Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Luke 23 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then the whole assembly rose and brought him before Pilate. Bato nyonso oyo bazalaki kati na mayangani batelemaki mpe bamemaki Yesu liboso ya Pilato ;
2 They began accusing him: "We found this man misleading our nation, forbidding taxes to Caesar, and claiming to be Christ, a king." mpe kuna, bakomaki kofunda Ye : — Tala moto oyo azali kotia mobulu kati na ekolo na biso ! Tokuti ye azali kopekisa bato kofuta mpako ya Sezare, mpe azali lisusu komibenga Klisto, Mokonzi !
3 Pilate asked him, "Are you the King of the Jews?" He answered, "You say so." Pilato atunaki Yesu : — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ? Yesu azongisaki : — Olobi yango.
4 Then Pilate said to the chief priests and the crowds, "I find no guilt in this man." Pilato alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe na ebele ya bato : — Namoni mabe moko te epai ya moto oyo.
5 But they pressed on: "He stirs up the people, teaching all through Judea, from Galilee to here." Kasi batiaki kaka molende mpe balobaki : — Te ! Azali kotombokisa bato ya Yuda mobimba na nzela ya mateya na Ye ; abandaki yango na Galile kino akomi awa.
6 When Pilate heard this, he asked whether the man was a Galilean. Tango Pilato ayokaki bongo, atunaki soki Yesu azali moto ya Galile.
7 Learning he was under Herod's authority, he sent him to Herod, who himself was also in Jerusalem in those days. Wana ayokaki ete Yesu azali moto ya mboka oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Erode, atindaki Ye epai ya Erode, pamba te Erode azalaki kati na Yelusalemi na mikolo wana.
8 Seeing Jesus, Herod was delighted—he'd long wanted to see him, having heard about him, and hoped to see him perform a sign. Erode asepelaki mingi tango amonaki Yesu, pamba te, wuta kala, azalaki koluka komona Ye mpo ete ayokaki basango mingi na tina na Ye, mpe azalaki kolikya komona Yesu kosala likamwisi.
9 He questioned him at great length, but Jesus gave him no answer. Apesaki ye mituna ebele, kasi Yesu apesaki ye ata eyano moko te.
10 The chief priests and the scribes stood by, vehemently accusing him. Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki kaka wana mpe bazalaki kopelisa moto na maloba mabe mpo na kokweyisa Yesu.
11 Herod and his soldiers scorned and mocked him, dressed him in bright clothing, and sent him back to Pilate. Erode mpe basoda na ye basekaki mpe batiolaki Yesu ; balatisaki Ye elamba ya kitoko makasi mpe bazongisaki Ye epai ya Pilato.
12 That day Herod and Pilate became friends—they had been enemies before. Nzokande, Erode mpe Pilato bazalaki banguna wuta kala ; kasi na mokolo wana, bakomaki balingami.
13 Pilate then called together the chief priests, the rulers, and the people, Pilato abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya Bayuda mpe bato nyonso ; alobaki na bango :
14 and said to them, "You brought me this man as one turning the people away. I examined him before you and found no guilt in this man on your charges. — Bomemelaki ngai moto oyo mpe bofundaki ye ete azali kotombokisa bato. Napesi ye mituna liboso na bino mpe nazwi ye na mabe ata moko te kati na nyonso oyo bofundelaki ye.
15 Neither did Herod, for he sent him back to us. Look, he has done nothing deserving death. Erode mpe azwaki ye na mabe ata moko te, yango wana azongisaki ye epai na biso. Boye, ndenge bokoki komona, moto oyo asali mabe ata moko te oyo ekoki kosala ete azwa etumbu ya kufa.
16 I will therefore discipline him and release him." Na bongo, nakobetisa ye kaka fimbu mpe, sima, nakotika ye. [
17 Not in this edition Nzokande, na bafeti nyonso, Pilato azalaki kobimisela bango mokangami moko.]
18 But they all cried out together, "Away with this man! Release Barabbas to us!" Bato nyonso bagangaki : — Boma moto oyo ! Bimisela biso Barabasi !
19 a man imprisoned for a rebellion that happened in the city, and for murder. Barabasi akangamaki na boloko mpo ete abimisaki mobulu kati na engumba mpe abomaki moto.
20 Pilate addressed them once more, wanting to release Jesus, Lokola azalaki na posa ya kotika Yesu, Pilato atunaki bango lisusu.
21 but they kept shouting, "Crucify, crucify him!" Kasi bakobaki koganga : — Baka ye na ekulusu ! Baka ye na ekulusu !
22 A third time he said to them, "Why? What wrong has this man done? I find no ground for death in him. So I will punish and release him." Pilato atunaki bango lisusu, mpo na mbala ya misato : — Mpo na nini ? Mabe nini tata oyo asali ? Ngai nazwi ye na mabe ata moko te, oyo ekoki kosala ete azwa etumbu ya kufa. Boye, nakobetisa ye kaka fimbu ; sima, nakotika ye.
23 But they kept shouting loudly, demanding he be crucified, and their voices prevailed. Kasi bakobaki kaka kosenga, na koganga makasi koleka, ete babaka Yesu na ekulusu ; mpe suka na suka, koganga na bango elongaki.
24 So Pilate decided that their demand should be granted. Pilato azwaki mokano ya kokokisa oyo basengaki ;
25 He released the man they asked for, jailed for rebellion and murder, but handed Jesus over to their will. abimiselaki bango moto oyo basengaki, oyo akangamaki na boloko mpo na mobulu mpe mpo ete abomaki moto, mpe akabaki Yesu na maboko na bango mpo ete basala Ye nyonso oyo balingi.
26 Leading him away, they seized a man named Simon of Cyrene, coming in from the countryside, and put the cross on him to carry behind Jesus. Wana basoda bazalaki kokumba Yesu, bakangaki mobali moko, kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene, oyo awutaki na bilanga ; batiaki ekulusu na mokongo na ye mpo ete amema yango sima na Yesu.
27 A great crowd of the people followed him, including women who were weeping and wailing for him. Bato ebele balandaki Yesu. Kati na bango, ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kolelalela mpe komitungisa mingi mpo na Ye.
28 But Jesus turned to them and said, "Daughters of Jerusalem, don't cry for me; cry for yourselves and your children. Yesu abalukaki mpo na kotala basi mpe alobaki : — Bana basi ya Yelusalemi, bolela mpo na Ngai te ; bolela nde mpo na bino moko mpe mpo na bana na bino.
29 For the days are coming when they will say, 'Blessed are the barren, the wombs that never bore, the breasts that never nursed.' Pamba te, na mikolo oyo ekoya, bakoloba : « Esengo na basi oyo bazali na bana te, oyo babota te mpe bamelisa bana mabele te ! »
30 Then they'll begin saying to the mountains, "Fall on us," and to the hills, "Cover us." Bongo bakoloba na bangomba milayi : « Bokweyela biso ! » Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bozipa biso ! »
31 For if they do this when the wood is green, what will happen when it's dry?" Pamba te soki bato bazali kosala makambo ya boye na nzete ya mobesu, ekozala ndenge nini na nzete ya kokawuka ?
32 Two others, who were criminals, were also led away to be put to death with him. Bamemaki mpe mibali mosusu mibale, babomi bato, mpo na koboma bango elongo na Yesu.
33 When they reached the place called The Skull, they crucified him there with the criminals, one on his right, one on his left. Tango bakomaki na esika oyo babengaka « Gologota, » babakaki kuna Yesu elongo na babomi mibale wana ya bato : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
34 Jesus said, "Father, forgive them, for they do not know what they are doing." Then they divided his garments, casting lots. Yesu alobaki : — Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala . Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke.
35 The people stood watching; the rulers sneered, "He saved others—let him save himself, if he's God's Christ, the Chosen One." Bato batelemaki wana, bazalaki kotala ; mpe bakambi batiolaki Ye, balobaki : — Abikisaki bato mosusu ; tika ete amibikisa ye moko, soki penza azali Klisto, Moponami ya Nzambe !
36 The soldiers also mocked him, coming up to offer him sour wine, Basoda mpe bakendeki mpe batiolaki Ye ; bapesaki Ye vino ya ngayi
37 and saying, "If you are the King of the Jews, save yourself!" mpe balobaki : — Soki ozali penza mokonzi ya Bayuda, mibikisa yo moko !
38 There was also an inscription over him: "This is the King of the Jews." Na likolo ya moto ya Yesu, ezalaki na makomi oyo : Moto oyo azali Mokonzi ya Bayuda.
39 One of the hanged criminals insulted him: "Aren't you the Christ? Save yourself and us!" Moko kati na babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu atiolaki Ye : — Boni, ozali Klisto te ? Mibikisa yo moko mpe bikisa biso !
40 But the other rebuked him: "Don't you even fear God, since you're under the same sentence? Kasi mobomi bato mosusu apamelaki ye : — Ozali kobanga Nzambe te mpo ete ozali na se ya etumbu ya ndenge moko na oyo ya Ye !
41 Rightly so—we're paying for what we did; but this man has done nothing wrong." Biso, tozwi penza etumbu na ndenge ya bosembo, pamba te tozali kozwa mbano ya misala mabe na biso ; kasi tata oyo asali ata mabe moko te.
42 Then he said, "Jesus, remember me when you come into your kingdom." Bongo alobaki lisusu : — Yesu, kanisa ngai tango okokota kati na Bokonzi na Yo.
43 And Jesus said to him, "Truly I tell you, today you will be with me in Paradise." Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : lelo, okozala elongo na Ngai kati na Paradizo.
44 It was already about noon, and darkness covered the whole land until three in the afternoon, Na ngonga pene ya midi, molili ekotaki na mokili mobimba kino na ngonga ya misato ya pokwa,
45 for the sun's light failed; and the curtain of the temple was torn in two. pamba te moyi etikaki kongenga, mpe rido monene ya Tempelo epasukaki na kati-kati.
46 Jesus called out loudly, "Father, into your hands I commit my spirit!" Then he breathed his last. Yesu agangaki na mongongo makasi : — Tata, nazongisi molimo na Ngai kati na maboko na Yo. Sima na Ye koloba bongo, akataki motema.
47 Seeing what happened, the centurion praised our Father: "This man really was righteous." Tango mokonzi ya basoda ya Rome amonaki makambo oyo eleki, akumisaki Nzambe mpe alobaki : — Moto oyo azalaki penza sembo !
48 All the crowds gathered for this sight, seeing what happened, went home beating their chests. Tango bato nyonso oyo basanganaki wana, mpo na kotala makambo oyo ezali kosalema, bamonaki makambo oyo ekweyi, batiaki maboko na bango na batolo na bango mpe bazongaki.
49 All his acquaintances, and the women who followed him from Galilee, stood far off watching these things. Kasi bato nyonso oyo bayebaki Yesu, mpe basi oyo balandaki Ye longwa na Galile, batelemaki na mosika mpe bazalaki kotala ndenge makambo ezali koleka.
50 Now there was a man named Joseph, a member of the council, a good and righteous man, Kati na Likita-Monene ya Bayuda, ezalaki na moto moko, kombo na ye « Jozefi. » Azalaki moto malamu mpe moto ya sembo,
51 who had not agreed to their plan and action. He was from Arimathea, a Jewish town, and was waiting for the kingdom of our Father. mpe andimaki te mikano mpe misala ya bato mosusu ya Likita-Monene ; azalaki moto ya mboka Arimate, engumba ya Bayuda, mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe.
52 This man went to Pilate and asked for the body of Jesus. Akendeki epai ya Pilato mpo na kosenga nzoto ya Yesu.
53 He took it down, wrapped it in a linen cloth, and laid him in a rock-cut tomb where no one had yet been laid. Bongo akitisaki nzoto yango longwa na ekulusu, alingaki yango na liputa ya lino, mpe atiaki yango kati na kunda oyo batobolaki kati na libanga moko ya monene epai wapi batikalaki nanu kokunda ata moto moko te.
54 It was the day of Preparation, and the Sabbath was about to begin. Ezalaki mokolo ya komilengela, wana Saba elingaki kobanda.
55 Women who came with him from Galilee followed, saw the tomb, and how his body was placed. Basi oyo bawutaki na Galile elongo na Yesu balandaki Jozefi, bamonaki kunda mpe ndenge nini atiaki nzoto ya Yesu kati na kunda yango.
56 They went back and prepared spices and ointments, then rested on the Sabbath as commanded. Sima, bazongaki epai na bango mpe babongisaki mafuta ya solo kitoko mpe malasi. Kasi bapemaki na mokolo ya Saba, kolanda ndenge mobeko ezalaki kosenga.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]