Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Luke 24 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 On the first day of the week, at dawn, they came to the tomb, carrying the spices they had prepared. Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, basi bakendeki na kunda mpe bamemaki mafuta ya solo kitoko oyo balambaki.
2 They found the stone rolled away from the tomb, Libanga oyo ekangaki ekotelo ya kunda, bakutaki yango etindikama mosika na ekotelo ya kunda.
3 but when they went in they did not find the body of the Lord Jesus. Bakotaki, kasi bamonaki te nzoto ya Nkolo Yesu.
4 While they were perplexed about this, suddenly two men stood beside them in dazzling clothes. Wana bazalaki nanu komitungisa mpo na likambo yango, bato mibale babimelaki bango, balata bilamba oyo ezali kongenga makasi.
5 Frightened, they bowed their faces to the ground. The men asked, "Why seek the living among the dead? Basi yango babangaki, bakitisaki bilongi na bango na ngambo ya mabele ; kasi bato wana mibale balobaki na bango : — Mpo na nini bozali koluka kati na bakufi Ye oyo azali na bomoi ?
6 He's not here—he's risen. Remember what he told you while still in Galilee, Azali lisusu awa te, asekwi. Bokanisa makambo oyo ayebisaki bino, wana azalaki nanu kati na Galile :
7 that the Son of Man must be handed over to sinful men, be crucified, and rise on the third day." « Esengeli ete bakaba Mwana na Moto na maboko ya bato ya masumu ; esengeli ete babaka Ye na ekulusu ; mpe esengeli ete asekwa sima na mikolo misato. »
8 And they remembered his words, Boye, bakanisaki maloba ya Yesu.
9 returning from the tomb, they told all this to the eleven and all the rest. Tango bazongaki longwa na kunda, bayebisaki makambo wana nyonso epai ya bayekoli zomi na moko mpe epai ya baninga na bango nyonso.
10 Mary Magdalene, Joanna, Mary the mother of James, and the other women with them told these things to the apostles. Ezalaki : Mari, moto ya mboka Magidala ; Jane mpe Mari, mama ya Jake. Baninga na bango mosusu ya basi bayebisaki mpe makambo yango epai ya bantoma,
11 But these words seemed like nonsense to them, and they did not believe them. kasi bazwaki maloba ya basi yango lokola maloba ezanga tina, mpe bandimaki bango te.
12 Peter got up and ran to the tomb; bending down, he saw only the linen cloths, then went home amazed at what had happened. Kasi Petelo atelemaki mpe apotaki mbangu kino na kunda. Agunzamaki mpo na kotala, amonaki kaka biteni ya elamba ya lino elala yango moko. Alongwaki kuna mpe azongaki, akamwaki makasi makambo oyo ewutaki kosalema.
13 That same day two of them traveled to a village called Emmaus, about seven miles from Jerusalem, Nzokande, kaka na mokolo yango, mibale kati na bango bazalaki kokende na mboka moko oyo kombo na yango ezalaki « Emausi. » Mboka yango ezalaki mosika na Yelusalemi, na bakilometele pene zomi na mibale.
14 and they were talking with each other about all these things that had happened. Bazalaki kosolola na tina na makambo nyonso oyo ewuti kosalema.
15 While they were talking and discussing together, Jesus himself drew near and went with them. Wana bazalaki kosolola mpe kotiana tembe mpo na makambo yango, Yesu asanganaki na bango mpe akomaki kokende na bango nzela moko.
16 But their eyes were kept from recognizing him. Kasi lokola miso na bango ezalaki ya kozipama, bakokaki te kososola ete ezali Yesu.
17 He asked them, "What are you discussing with each other as you walk?" They stopped, looking sad. Alobaki na bango : — Makambo nini bozali kotiana na yango tembe na kotambola ? Batelemaki, bilongi mawa-mawa.
18 One of them, Cleopas, replied, "Are you the only visitor to Jerusalem who does not know what has happened there these days?" Moko kati na bango, kombo na ye « Kleopasi, » alobaki na Ye : — Kati na bavandi nyonso ya Yelusalemi, yo moko kaka oyebi te makambo oyo ewuti kosalema mikolo oyo !
19 He asked, "What things?" They said, "About Jesus of Nazareth—a prophet powerful in deed and word before our Father and all the people, Yesu atunaki bango : — Makambo nini ? Bazongisaki : — Ezali makambo oyo etali Yesu ya Nazareti : azalaki mosakoli moko ya nguya, na misala mpe na maloba, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato nyonso.
20 and how our chief priests and rulers handed him over to a death sentence, and crucified him. Kasi bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi na biso bakabaki Ye mpo ete bakatela Ye etumbu ya kufa, mpe babakaki Ye na ekulusu.
21 We'd hoped he was the one to redeem Israel. Yet on top of all this, it's the third day since these things happened. Tozalaki kolikya ete Ye nde akokangola Isalaele. Kasi longola nyonso wana, lelo ezali mokolo ya misato wuta makambo wana esalemaki.
22 Some women of ours also amazed us—early at the tomb, Lisusu, ndambo ya basi kati na biso bakamwisi biso makasi ; bakendeki na kunda na tongo-tongo,
23 and not finding his body, they came back saying they'd even seen a vision of angels, who said he was alive. kasi bamonaki nzoto na Ye te, mpe bayaki koyebisa biso ete bamonaki ba-anjelu kobimela bango mpe koyebisa bango ete Yesu azali na bomoi.
24 Some of our companions went to the tomb and found it just as the women said, but they did not see him." Ndambo kati na baninga na biso bakendeki na kunda, mpe makambo oyo bamonaki kuna ekokani penza na oyo basi balobaki, kasi bamonaki Yesu te.
25 He said to them, "How foolish you are, and slow to believe all the prophets said! Yesu alobaki na bango : — Ah ! Bozali penza bazoba ! Tala ndenge mitema na bino ezali penza mabanga ! Bozali penza kondima te makambo nyonso oyo basakoli baloba !
26 Was it not necessary that the Christ should suffer these things and enter into his glory?" Boni, Klisto asengelaki te komona pasi ndenge wana mpo ete akota kati na nkembo na Ye ?
27 And beginning with Moses and all the Prophets, he explained to them from all the Scriptures everything about himself. Bongo Yesu alimbolelaki bango makambo nyonso oyo ekomama kati na Makomi, kobanda na Moyize kino na basakoli nyonso.
28 And they approached the village they were heading to, and he pretended to go farther. Tango bakomaki pene ya mboka epai wapi bazalaki kokende, Yesu asalaki lokola nde azali kokende mosika.
29 But they insisted, "Stay with us—evening is near, the day nearly done." So he went in to stay with them. Kasi bango babondelaki Ye makasi : — Vanda elongo na biso, pamba te pokwa esili kokoma, mpe butu elingi kokota. Boye Yesu akotaki na ndako mpo na kovanda elongo na bango.
30 As he reclined with them, he took the bread, blessed it, broke it, and gave it to them. Tango avandaki na mesa elongo na bango, akamataki lipa, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango na biteni, mpe apesaki bango yango.
31 And their eyes were opened, and they recognized him. And he vanished from their sight. Mbala moko, miso na bango efungwamaki mpe basosolaki ete ezali Yesu, kasi alimwaki na miso na bango.
32 They said to each other, "Weren't our hearts burning within us as he spoke to us on the road, as he opened the Scriptures to us?" Batunanaki : — Boni, mitema na biso etondaki na esengo te wana azalaki kosolola na biso na nzela mpe kolimbolela biso Makomi ?
33 That same hour they got up, returned to Jerusalem, and found the eleven and those with them gathered together, Kaka na tango yango, batelemaki mpe bazongaki na Yelusalemi epai wapi bakutaki bayekoli zomi na moko basangana elongo na baninga na bango,
34 saying, "The Lord has risen indeed, and has appeared to Simon!" oyo balobaki na bango : — Ezali ya solo, Nkolo asekwi ; abimelaki Simona !
35 And they told what happened on the road, and how he was recognized in the breaking of the bread. Bango mibale mpe bayebisaki makambo oyo ekomelaki bango na nzela mpe ndenge nini basosolaki Yesu tango akataki lipa na biteni.
36 As they spoke these things, Jesus himself stood among them and said to them, "Peace to you!" Wana bazalaki nanu kosolola na tina na makambo yango, Yesu ayaki kotelema na kati-kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino !
37 But they were startled and frightened and thought they saw a spirit. Babangaki mpe somo ekangaki bango, pamba te bakanisaki ete bamoni elima.
38 And he said to them, "Why are you troubled, and why do doubts arise in your hearts? Yesu atunaki bango : — Mpo na nini bozali kobanga ? Mpe mpo na nini bozali na tembe kati na mitema na bino ?
39 Look at my hands and my feet—it's really me. Touch me and see: a spirit has no flesh and bones, as you see I have." Botala maboko mpe makolo na Ngai ; ezali penza Ngai. Bosimba Ngai mpe botala ! Elima ezalaka na mosuni te, ezalaka mpe na mikuwa te ; nzokande, bozali komona malamu ete, Ngai, nazali na yango.
40 And when he had said this, he showed them his hands and his feet. Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko mpe makolo na Ye.
41 And while they still disbelieved for joy and were marveling, he said to them, "Do you have anything here to eat?" Lokola bakokaki nanu kondima te mpo ete batondisamaki na esengo mpe bazalaki kokamwa mingi, Yesu atunaki bango : — Bozali awa na eloko ya kolia ?
42 They gave him a piece of broiled fish, Bapesaki Ye eteni ya mbisi bakalinga.
43 and he took it and ate before them. Azwaki yango mpe aliaki yango na miso na bango.
44 He said to them, "This is what I told you while still with you: everything written about me in the Law of Moses, the Prophets, and the Psalms had to be fulfilled." Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »
45 Then he opened their minds to understand the Scriptures, Bongo afungolaki bango mayele mpo ete bakoka kososola Makomi.
46 and told them, "This is written: the Christ must suffer and rise from the dead on the third day, Alobaki na bango : — Tala makambo oyo ekomama : « Klisto akomona pasi, mpe akosekwa kati na bakufi na mokolo ya misato ;
47 and that repentance for the forgiveness of sins should be proclaimed in his name to all nations, beginning from Jerusalem. mpe, na Kombo na Ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yelusalemi, ete babongola mitema mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu. »
48 You are witnesses of these things. Bino nde bozali batatoli ya makambo yango.
49 I am sending the promise of my Father on you. Stay in the city until you are dressed with power from on high." Ngai nakotindela bino Molimo oyo Tata na Ngai alakaki ; boye bino, botikala awa, kati na engumba oyo, kino bokotondisama na nguya ya Likolo.
50 And he led them out as far as Bethany, and lifting up his hands he blessed them. Yesu amemaki bango na libanda ya engumba, pene ya Betani ; mpe kuna, atombolaki maboko mpe apambolaki bango.
51 While he blessed them, he parted from them and was carried up into heaven. Wana azalaki kopambola bango, akabwanaki na bango mpe amemamaki kati na Likolo.
52 And they worshiped him and returned to Jerusalem with great joy, Bongo bagumbamelaki Ye mpe bazongaki na Yelusalemi na esengo makasi.
53 and were continually in the temple blessing our Father. Mpe kuna na Yelusalemi, bazalaki kovanda tango nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kokumisa Nzambe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]