Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

John 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In the beginning was the Word, and the Word was with our Father, and the Word was God. Na ebandeli, Ye oyo azali Liloba azalaka ; azalaka elongo na Nzambe, mpe azali Nzambe.
2 He was in the beginning with our Father. Wuta na ebandeli, azalaka elongo na Nzambe.
3 All things were made through him, and without him not one thing was made that was made. Nzambe akelaki biloko nyonso na nzela na Ye ; ezali na eloko moko te oyo ekelama soki na nzela na Ye te.
4 In him was life, and the life was the light of all people. Bomoi ewuta epai na Ye, mpe bomoi yango ezalaki pole mpo na bato.
5 The light shines in the darkness, and the darkness has not overcome it. Pole engengaka kati na molili, kasi molili eyambaki yango te.
6 There came a man sent from our Father, whose name was John. Nzambe atindaki moto moko, kombo na ye ezalaki « Yoane. »
7 He came as a witness, to bear witness about the light, so that all might believe through John's witness. Ayaki lokola motatoli, mpo na kotatola na tina na pole, mpo ete bato nyonso bandima na nzela na ye.
8 He was not the light, but came to bear witness about the light. Ye moko Yoane azalaki pole te, kasi ayaki nde mpo na kozala motatoli na tina na pole.
9 The true light, which gives light to everyone, was coming into the world. Pole ya solo eyaki na mokili, mpe engengisaka bato nyonso.
10 He was in the world. The world came into being through him, yet did not know him. Ye oyo azali Liloba azalaki kati na mokili, pamba te Ye nde akelaki yango, kasi mokili endimaki Ye te.
11 He came to his own, and his own people did not receive him. Ayaki epai ya ekolo na Ye, kasi bato ya ekolo na Ye moko bayambaki Ye te ;
12 But to all who received him, believing in his name, he gave the right to become children of our Father, nzokande bato nyonso oyo bayambaki Ye, ba-oyo bandimelaki Kombo na Ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe.
13 children born not of blood nor of the will of flesh nor of the will of man, but of our Father. Bakomi bana na Nzambe na nzela ya mbotama ya bomoto te, na posa ya bomoto te to mpe na mokano ya moto te, kasi na mokano ya Nzambe.
14 The Word became flesh and lived among us. We saw his glory, the glory of the one and only Son from the Father, full of grace and truth. Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.
15 John testified about him, crying out, "This is the one I meant: he who comes after me outranks me, since he existed before me." Yoane azalaki kotatola na tina na Ye, na mongongo makasi : « Botala Ye oyo nalobaki na tina na Ye : ‹ Ye oyo azali koya sima na ngai aleki ngai na lokumu, pamba te azalaki liboso ete ngai nazala. › »
16 For from his fullness we have all received, grace upon grace. Lokola atonda na bolingo mpo na biso, apesaki biso ngolu likolo ya ngolu ;
17 For the law was given through Moses; grace and truth came through Jesus Christ. pamba te Mibeko eyaki na nzela ya Moyize, kasi ngolu mpe solo eyaki na nzela ya Yesu-Klisto.
18 No one has ever seen our Father; the one and only God, close beside the Father, has made him known. Moto moko te amona Nzambe, kasi ezali kaka Mwana se moko oyo azali Nzambe mpe azali moko na Tata nde atalisaki biso Ye.
19 This is John's testimony, when the Jews sent priests and Levites from Jerusalem to ask him, "Who are you?" Tala litatoli oyo Yoane apesaki tango bakambi ya Bayuda batindaki, wuta na Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe Balevi, mpo na kotuna ye : — Yo ozali nani ?
20 He confessed, and did not deny, but confessed, "I am not the Christ." Abetaki monoko te, kasi alobaki na bango solo na bonsomi nyonso : — Ngai, nazali Klisto te.
21 So they asked him, "What then? Are you Elijah?" "I am not," he said. "Are you the Prophet?" "No," he answered. Batunaki ye lisusu : — Bongo ozali nani ? Ozali Eliya ? Azongisaki : — Nazali Eliya te. Batunaki ye lisusu : — Ozali mosakoli ? Azongisaki : — Te !
22 So they asked, "Who are you? We need to give an answer to those who sent us. What do you say about yourself?" Bakobaki kotuna ye : — Bongo ozali penza nani ? Ozali koloba nini na tina na yo moko ? Yebisa biso yango, pamba te tosengeli kopesa eyano epai ya bato oyo batindi biso.
23 He said, "I'm the voice of one crying out in the wilderness, 'Make straight the way of the Lord,' as the prophet Isaiah said." Yoane azongiselaki bango kolanda ndenge mosakoli Ezayi alobaki : — Ngai, nazali mongongo ya moto oyo azali kobelela kati na esobe : « Bobongisa nzela mpo na Nkolo ! »
24 Now they had been sent from the Pharisees. Nzokande batindami yango bazalaki Bafarizeo.
25 They asked him, "Why baptize, then, if you're not the Christ, nor Elijah, nor the Prophet?" Batunaki ye lisusu : — Soki ozali Masiya te, Eliya te to mpe mosakoli te, bongo mpo na nini ozali kobatisa ?
26 John answered them, "I baptize with water, but among you stands one you do not know, Yoane azongiselaki bango : — Ngai, nazali kobatisa na mayi ; kasi kati na bino, ezali na Moto moko oyo bino boyebi te ;
27 even he who comes after me, whose sandal strap I am not worthy to untie." azali koya sima na ngai, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye.
28 These things took place in Bethany across the Jordan, where John was baptizing. Makambo oyo nyonso esalemaki na Betani, na ngambo mosusu ya Yordani, epai wapi Yoane azalaki kobatisa.
29 The next day, seeing Jesus coming toward him, he said, "Look! The Lamb of our Father—Jesus—who takes away the sin of the world! Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki : — Tala Mpate ya Nzambe, oyo alongolaka lisumu ya mokili.
30 This is the one I meant: 'After me comes a man who ranks before me, because he was before me.' Ezali na tina na Ye nde nalobaki : « Ezali na moko oyo azali koya sima na ngai, aleki ngai na lokumu, pamba te azalaki liboso ete ngai nazala. »
31 I didn't know him, but I came baptizing with water so he would be revealed to Israel." Ngai moko mpe nayebaki te soki esengelaki kozala nani ; kasi tina oyo ngai nayaki kobatisa bato na mayi, ezalaki nde mpo ete natalisa Ye epai ya bato ya Isalaele.
32 John testified: "I saw the Holy Spirit descend from heaven like a dove and remain on him. Bongo Yoane apesaki litatoli oyo : — Namonaki Molimo kokita wuta na likolo lokola ebenga mpe kovanda likolo na Ye.
33 I didn't know him, but the one who sent me to baptize with water told me, 'The one you see the Holy Spirit come down and stay on—he is the one who baptizes with the Holy Spirit.' Ngai moko mpe nayebaki Ye te ; kasi Ye oyo atindaki ngai kobatisa na mayi alobaki na ngai : « Moto oyo okomona Molimo kokita mpe kowumela likolo na Ye, Ye nde akobatisa kati na Molimo Mosantu. »
34 And I have seen and have borne witness that this is the Son of our Father." Mpe lokola ezali yango nde likambo oyo ngai namonaki, yango wana nazali kotatola : Moto oyo azali Mwana na Nzambe.
35 The next day John was standing again with two of his disciples, Mokolo oyo elandaki, wana Yoane azalaki lisusu na esika yango elongo na bayekoli na ye mibale,
36 and looking at Jesus as he walked by, he said, "Look! The Lamb of our Father!" amonaki Yesu koleka mpe alobaki : « Botala Mpate ya Nzambe ! »
37 The two disciples heard him say this, and they followed Jesus. Lokola bayekoli nyonso mibale bayokaki ndenge Yoane alobaki, balandaki Yesu.
38 Jesus turned, saw them following, and asked, "What do you seek?" They said, "Rabbi" (meaning Teacher), "where do you stay?" Bongo tango Yesu abalukaki mpo na kotala na sima, amonaki bango mibale bazali kolanda Ye. Atunaki bango : — Bolingi nini ? Bazongisaki : — Rabi, ovandaka wapi ?
39 He told them, "Come and you will see." So they went and saw where he was staying, and remained with him that day—about four in the afternoon. Yesu azongiselaki bango : — Boya mpe bokomona. Balandaki Yesu, bamonaki esika oyo azalaki kovanda mpe bavandaki elongo na Ye na mokolo wana. Ezalaki na ngonga ya minei sima na midi.
40 One of the two who heard John speak and followed Jesus was Andrew, Simon Peter's brother. Andre, ndeko ya Simona Petelo, azalaki moko kati na bato wana mibale oyo bayokaki maloba ya Yoane mpe balandaki Yesu.
41 He first found his own brother Simon and told him, "We've found the Messiah" (meaning Christ). Akendeki kokutana na Simona, ndeko na ye, mpe alobaki na ye : « Tomoni Masiya ! »
42 He brought him to Jesus. Jesus looked at him and said, "You are Simon the son of John. You will be called Cephas" (meaning Peter). Bongo amemaki Simona epai ya Yesu. Yesu atalaki Simona mpe alobaki : « Ozali Simona, mwana mobali ya Yoane ; kasi bakobanda kobenga yo Sefasi. »
43 The next day, Jesus decided to leave for Galilee. He found Philip and said, "Follow me." Mokolo oyo elandaki, Yesu azwaki mokano ya kokende na Galile. Na nzela, akutanaki na Filipo mpe alobaki na ye : « Landa Ngai. »
44 Now Philip was from Bethsaida, the city of Andrew and Peter. Filipo, Andre mpe Petelo bazalaki bato ya engumba Betisaida.
45 Philip found Nathanael and told him, "We've found the one Moses wrote of in the Law and the prophets—Jesus, son of Joseph, from Nazareth." Filipo akutanaki na Natanaele mpe alobaki na ye : — Tomoni Yesu ya Nazareti, mwana mobali ya Jozefi, oyo Moyize alobela kati na buku ya Mobeko, mpe oyo basakoli balobela.
46 Nathanael said, "Can anything good come from Nazareth?" Philip said, "Come and see." Natanaele atunaki ye : — Boni, eloko ya malamu ekoki mpe kobima na Nazareti ? Filipo azongiselaki ye : — Yaka mpe okomona yo moko.
47 Jesus saw Nathanael approaching and said of him, "Look—a true Israelite, with no deceit in him!" Tango Yesu amonaki Natanaele koya epai na Ye, alobaki na tina na ye : — Tala moto ya Isalaele ya solo-solo oyo, kati na ye, lokuta ezali te !
48 Nathanael asked him, "How do you know me?" Jesus answered, "Before Philip called you, while you were under the fig tree, I saw you." Natanaele atunaki Ye : — Oyebi ngai ndenge nini ? Yesu azongiselaki ye : — Liboso ete Filipo abenga yo, wana ozalaki nanu na se ya nzete ya figi, namonaki yo.
49 Nathanael answered him, "Rabbi, you are the Son of our Father! You are the King of Israel!" Natanaele alobaki : — Moteyi, ozali solo Mwana na Nzambe ; ozali penza Mokonzi ya Isalaele.
50 Jesus answered him, "You believe because I told you I saw you under the fig tree? You'll see greater things than these." Yesu alobaki na ye : — Ondimi kaka mpo ete nalobi na yo : Namonaki yo na se ya nzete ya figi ? Okomona lisusu makambo minene koleka oyo.
51 He told him, "Truly, truly, I say to you, you will see heaven opened, and our Father's angels ascending and descending on the Son of Man." Bongo alobaki lisusu : « Nazali koloba na bino penza ya solo : bokomona Likolo kofungwama, mpe ba-anjelu ya Nzambe komata mpe kokita mpo na Mwana na Moto. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]