Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

John 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 On the third day, a wedding took place in Cana of Galilee; Jesus's mother was there. Sima na mikolo mibale, ezalaki na feti moko ya libala na mboka Kana ya Galile. Mama ya Yesu azalaki na feti yango.
2 Jesus and his disciples were also invited to the wedding. Babengisaki mpe Yesu elongo na bayekoli na Ye na feti yango.
3 When the wine ran out, the mother of Jesus said to him, "They have no wine." Esalemaki ete tango vino esilaki, mama ya Yesu alobaki na Ye : — Bazali lisusu na vino te !
4 "Woman, why are you bringing me into this?" Jesus replied. "My hour has not yet come." Kasi Yesu azongiselaki ye : — Mwasi, biso na yo likambo nini ? Tango na Ngai ekoki nanu te.
5 His mother said to the servants, "Do whatever he tells you." Mama na Ye alobaki na basali : — Bosala makambo nyonso oyo akoloba na bino.
6 Six stone water jars stood there, used for Jewish purification, each holding twenty to thirty gallons. Ezalaki wana na bambeki motoba ya mabanga, oyo Bayuda bazalaki kosalela mpo na komipetola. Mbeki moko na moko ekokaki kokota balitele kobanda tuku mwambe kino nkama moko na tuku mibale.
7 Jesus said to them, "Fill the jars with water," so they filled them to the brim. Bongo Yesu alobaki na basali : — Botondisa bambeki oyo na mayi. Batondisaki yango meke.
8 He told them, "Draw some out now, and take it to the head steward." So they did. Alobaki lisusu : — Sik’oyo, botoka mayi wuta na bambeki mpe bomema yango epai ya mokambi ya feti. Bamemaki yango epai na mokambi ya feti.
9 The master of the banquet tasted the water now wine, not knowing its source—though the servants who drew it knew. So he called the bridegroom aside, Mokambi ya feti amekaki mayi oyo Yesu abongolaki vino. Ayebaki te soki basali bazwaki vino yango wapi ; nzokande bango moko basali bayebaki, pamba te bango nde batokaki mayi. Mbala moko, mokambi ya feti abengaki mobali oyo abalaki
10 and said, "Everyone serves the good wine first, then the lesser once guests are drunk. But you've kept the good wine till now." mpe alobaki na ye : « Bato nyonso bapesaka nanu vino oyo eleki kitoko ; bongo, sima na babengami komela mingi, nde bayaka na vino oyo ya kitoko penza te. Kasi yo, obombi na yo vino oyo eleki kitoko kino sik’oyo ! »
11 Jesus performed this first sign at Cana in Galilee. He revealed his glory, and his disciples believed in him. Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki : esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye ; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.
12 After this he went down to Capernaum with his mother, brothers, and disciples, and stayed there a few days. Sima na yango, Yesu akendeki elongo na mama na Ye, bandeko na Ye mpe bayekoli na Ye, na Kapernawumi epai wapi basalaki kaka mwa mikolo.
13 When the Jewish Passover was near, Jesus went up to Jerusalem. Lokola mokolo oyo Bayuda basepelaka feti ya Pasika ekomaki pene, Yesu akendeki na Yelusalemi.
14 In the temple courts he found sellers of cattle, sheep, and doves, and others sitting at tables exchanging money. Tango akotaki kati na lopango ya Tempelo, akutaki bato bazali koteka bangombe, bameme mpe bibenga ; amonaki lisusu bato oyo babongolaka mbongo bavandi liboso ya bamesa na bango.
15 He made a whip of cords and drove them all out of the temple courts, sheep and cattle alike, poured out the money-changers' coins, and overturned their tables. Boye, asalaki fimbu ya basinga mpe abenganaki bango nyonso, longwa na lopango ya Tempelo, elongo na bangombe mpe bameme na bango ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo, mpe apanzaki mbongo na bango na mabele.
16 To the dove sellers he said, "Take these out of here! Don't make my Father's house a marketplace." Alobaki na bato oyo bazalaki koteka bibenga : « Bolongola biloko oyo awa ! Ezali Ndako ya Tata na Ngai ! Ebandi ndenge nini bokomisa yango zando ? »
17 His disciples remembered that it is written: "Zeal for your house will consume me." Bayekoli na Ye babandaki kokanisa makambo oyo ekomama : « Oh Nzambe, bolingo makasi oyo nazali na yango mpo na Ndako na Yo ekozikisa ngai lokola na moto ! »
18 So the Jews asked, "What sign will you show us for doing these things?" Bayuda balobaki na Yesu : — Likamwisi nini okoki kolakisa biso mpo na kotalisa biso ete ozali na bokonzi ya kosala makambo oyo nyonso ?
19 Jesus answered them, "Destroy this temple, and in three days I will raise it up." Yesu azongisaki : — Bobuka Tempelo oyo, mpe Ngai nakotonga yango lisusu na mikolo misato.
20 They replied, "This temple took forty-six years to build, and will you raise it in three days?" Bayuda balobaki lisusu : — Boni, soki esalaki mibu tuku minei na motoba mpo na kotonga lisusu Tempelo oyo, yo okanisi ete okotelemisa yango na mikolo misato ?
21 But the temple he had spoken of was his body. Nzokande Tempelo oyo Yesu azalaki kolobela, ezalaki nde nzoto na Ye moko.
22 After he rose from the dead, his disciples remembered he had said this, and believed the Scripture and the word Jesus had spoken. Sima, tango Yesu asekwaki, bayekoli na Ye basosolaki makambo oyo alobaki na bango. Boye bandimaki Makomi mpe maloba oyo Yesu alobaki.
23 While he was in Jerusalem at the Passover, many saw the signs he did and trusted in his name. Wana Yesu azalaki kati na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika, bato mingi bandimelaki Kombo na Ye tango bazalaki komona bikamwa oyo azalaki kosala.
24 But Jesus would not entrust himself to them, for he knew all people. Kasi Yesu amipesaki te epai na bango, pamba te ayebaki bato nyonso.
25 He didn't need anyone's testimony about people—he knew what was in each one. Azalaki ata na posa te ete bayebisa Ye makambo na tina na bato, pamba te ayebaki makambo nyonso oyo ezalaki kati na mitema na bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]