Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Luke 17 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 He told his disciples, "Offenses are sure to come, but woe to the one they come through! Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Makambo oyo ebetisaka bato mabaku ekoki kozanga te ; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka !
2 Better for him to have a millstone hung around his neck and be thrown into the sea than to cause one of these little ones to stumble. Ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo, na kingo mpe kobwaka ye na ebale, na esika ya kotika ye kokweyisa na masumu moko kati na bana mike oyo.
3 "Watch yourselves. If your brother sins, rebuke him, and if he repents, forgive him. Bosala penza keba mpo na bolamu na bino ! Soki ndeko na yo asali yo mabe, pamela ye ; mpe soki ayoki mawa mpo na mabe yango, limbisa ye.
4 If he sins against you seven times a day, and seven times returns saying, 'I repent,' forgive him." Mpe soki, na mokolo moko, asali yo mabe mbala sambo, mpe ayei epai na yo mbala sambo koloba na yo : « Nayoki mawa mpo na mabe na ngai, » limbisa ye !
5 The apostles said to the Lord, "Increase our faith!" Bantoma balobaki na Nkolo : — Bakisa kondima na biso !
6 The Lord said, "If you had faith like a mustard seed, you could tell this mulberry tree, 'Be uprooted and planted in the sea,' and it would obey you. Nkolo azongisaki : — Soki bozali na kondima oyo ezali moke lokola mbuma ya mutarde, bokoki koloba na nzete oyo : « Pikolama na esika oyo mpe kende komilona kati na ebale, » mpe ekotosa bino.
7 Which of you with a servant plowing or tending sheep tells him, coming in from the field, 'Come at once, recline at the table'? Nani kati na bino, soki azali na mosali bilanga to na mobateli bibwele, akoloba na ye tango azongi wuta na bilanga : « Yaka noki, vanda na mesa mpo ete olia ? »
8 Won't he instead say, 'Get my supper ready, dress to serve me while I eat and drink, then you may eat and drink'? Boni, akoloba na ye te : « Lambela ngai bilei, lata bilamba na yo ya mosala mpo na kotiela ngai biloko na mesa, kino nasilisa kolia mpe komela ; sima na yango nde yo mpe okoki kolia mpe komela ? »
9 "Does he thank the servant because he did what he was commanded? Boni, akozongisela mosali wana matondi mpo ete asali mosala oyo atindaki ye ?
10 So you too, having done all you were commanded, say: 'We are unworthy servants; we've only done our duty.'" Ndenge moko mpe mpo na bino : soki bosali nyonso oyo batindi bino, boloba : « Tozali basali ya pamba, tokokisi kaka mokumba na biso. »
11 On the way to Jerusalem he was passing along between Samaria and Galilee. Wana Yesu azalaki kokende na Yelusalemi, alekaki na mondelo kati na Samari mpe na Galile.
12 As he entered a village, ten men who had leprosy met him. They stood at a distance, Lokola azalaki kokota na mboka moko, bato na maba zomi bayaki kokutana na Ye ; batelemaki na mosika
13 and called out loudly, "Jesus, Master, have mercy on us!" mpe babandaki kobelela Ye na mongongo makasi : — Mokonzi, Yesu, yokela biso mawa !
14 Seeing them, he said, "Go, show yourselves to the priests." As they went, they were made clean. Tango Yesu amonaki bango, alobaki : — Bokende komilakisa epai ya Banganga-Nzambe ! Wana bazalaki kokende kuna, bakomaki peto.
15 One of them, seeing he was healed, turned back, praising our Father loudly, Tango moko kati na bango amonaki ete abiki na bokono na ye, azongaki na kokumisa Nzambe na mongongo makasi.
16 and he fell on his face at Jesus' feet, giving him thanks. Now he was a Samaritan. Afukamaki na makolo ya Yesu, elongi kino na se, mpe azongiselaki Ye matondi. Moto yango azalaki moto ya Samari.
17 Jesus said, "Weren't ten made clean? Where are the nine? Bongo Yesu atunaki : — Boni, bango nyonso zomi bakomi peto te ? Wapi bato mosusu libwa ?
18 Was no one found to return and give glory to our Father except this foreigner?" Moko te azongi mpo na kopesa Nzambe nkembo, longola kaka mopaya oyo ?
19 And he said to him, "Rise and go; your faith has made you well." Bongo alobaki na moto yango ya Samari : — Telema mpe kende ; kondima na yo ebikisi yo !
20 Asked by the Pharisees when the kingdom of our Father would come, he answered them, "The kingdom of our Father does not come with observation, Mokolo moko, Bafarizeo batunaki Yesu : — Bokonzi ya Nzambe ekoya tango nini ? Yesu azongiselaki bango : — Bokonzi ya Nzambe ekoya te na lolenge ete bato bamona yango.
21 nor will they say, 'Look, here!' or 'There!' For the kingdom of our Father is among you." Bakoloba te : « Ezali awa » to « Ezali kuna, » pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali kati na bino.
22 He told the disciples, "Days are coming when you will long to see one of the days of the Son of Man, and you won't see it. Bongo alobaki na bayekoli na Ye : — Tango ezali koya, tango oyo bokozala na posa makasi ya komona ata mokolo moko kati na mikolo ya Mwana na Moto, kasi bokomona yango te.
23 They will say to you, 'Look, there!' or 'Look, here!' Don't go, don't chase after them. Bakoloba na bino : « Azali awa ! » to « Azali kuna ! » Bolanda bango te !
24 For as lightning flashes and lights the sky from one edge to the other, so the Son of Man will be in his day. Pamba te, na mokolo na Ye, Mwana na Moto akozala lokola mokalikali oyo epeli mpe engengisi likolo longwa na este kino na weste.
25 But first he must suffer many things and be rejected by this generation. Kasi liboso ete mokolo yango ekoma, asengeli komona pasi mingi, mpe bato ya ekeke oyo basengeli koboya Ye.
26 As Noah's days were, so will the Son of Man's days be. Ndenge esalemaki na tango ya Noa, ndenge wana mpe ekosalema na tango ya Mwana na Moto :
27 They ate, drank, married, and were given in marriage, until the day Noah entered the ark, and the flood came and destroyed them all. bato bazalaki kolia, komela, kobala mpe kobalisa, kino na mokolo oyo Noa akotaki na masuwa ; bongo mpela eyaki mpe ebomaki bango nyonso.
28 It was the same in Lot's days: eating, drinking, buying, selling, planting, building, Ezalaki mpe bongo na tango ya Loti : bato bazalaki kolia, komela, kosomba, koteka, kolona mpe kotonga.
29 but the day Lot left Sodom, fire and sulfur rained from heaven and destroyed them all, Kasi na mokolo oyo Loti abimaki wuta na Sodome, mvula ya moto mpe ya fofolo ekitaki wuta na likolo mpe ebomaki bango nyonso.
30 so will it be on the day when the Son of Man is revealed. Ekozala mpe bongo, na mokolo oyo Mwana na Moto akomonana.
31 On that day, whoever is on the roof with goods inside must not go down for them; likewise, whoever is in the field must not turn back. Na mokolo yango, moto oyo akozala na likolo ya ndako na ye asengeli te kokita mpo na kozwa biloko kati na ndako na ye, mpe moto oyo akozala kati na bilanga na ye asengeli te kozonga na ndako mpo na likambo songolo.
32 Remember Lot's wife. Bokanisa makambo oyo ekomelaki mwasi ya Loti !
33 Whoever seeks to preserve his life will lose it, but whoever loses his life will keep it. Moto oyo akoluka kobatela bomoi na ye akobungisa yango, mpe moto oyo akobungisa bomoi na ye akobatela yango.
34 I tell you, that night two will be in one bed: one will be taken, and the other left. Nazali koloba na bino : na butu wana, bato mibale bakozala na likolo ya mbeto moko : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala ;
35 There will be two women grinding together; one will be taken and the other left." basi mibale bakozala konika bambuma elongo : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala ; [
36 Not in this edition mibali mibale bakozala kati na elanga moko : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala.]
37 They asked, "Where, Lord?" He said, "Wherever a corpse lies, the vultures will gather there." Bayekoli batunaki Yesu : — Nkolo, makambo yango ekosalema wapi ? Yesu azongiselaki bango : — Epai ebembe ezali, kuna nde bandeke oyo eliaka bibembe ekosangana.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]