Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joshua 23 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 A long time after our Father gave Israel rest from all their enemies around them, Joshua was old, well along in years. Sima na Yawe kopesa bopemi na Isalaele liboso ya banguna nyonso oyo bazingelaki bango, elekaki tango molayi. Bongo, Jozue akomaki mobange, mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki makasi.
2 Joshua called all Israel—elders, heads, judges, officers—and said, "I am old, far along in years. Boye, Jozue abengisaki Isalaele mobimba : bampaka na yango, bakambi na yango, basambisi elongo na bakalaka na yango. Alobaki na bango : « Nakomi mobange mpe mibu ya bomoi na ngai epusani makasi.
3 You have seen all your Father did to all these nations for your sake; your Father fought for you. Bino moko bomonaki makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki liboso ya bikolo oyo nyonso mpo na bolamu na bino, pamba te ezalaki Yawe, Nzambe na bino, nde azalaki kobundela bino.
4 Look, I have allotted you, as an inheritance for your tribes, these remaining nations, and all nations I have cut off, from the Jordan to the Great Sea in the west. Bobosana te ndenge nini nazalaki kobeta zeke mpo na kokabolela mabota na bino lokola libula, mokili ya bikolo oyo etikali mpe ya bikolo oyo nabotolaki wuta na Yordani kino na Ebale monene, na ngambo ya weste.
5 Your Father himself will push them back and drive them out before you, and you will possess their land, as your Father promised you. Yawe, Nzambe na bino, nde akobengana bango, Ye moko, mosika liboso na bino ; akobengana bango liboso na bino mpe bokozwa mokili na bango ndenge Yawe, Nzambe na bino, alakaki.
6 Be very strong to keep and do all written in the book of the law of Moses, not turning from it right or left. Boyika mpiko mpe bosenzela mpo na kotosa makambo nyonso oyo ekomama kati na buku ya Mobeko ya Moyize ; bokende libanda na yango te.
7 Do not mix with these remaining nations among you. Do not mention their gods' names or swear by them; do not serve or bow down to them. Bosala boyokani te elongo na bikolo mosusu oyo etikali kati na bino, bobelela bakombo ya banzambe na yango te to mpe bolapa ndayi na bakombo na yango te. Bomeka kosalela yango te mpe bofukamela yango te.
8 But hold fast to your Father, as you have done to this day. Kasi bokangama makasi na Yawe, Nzambe na bino, ndenge bozali kosala kino na mokolo ya lelo.
9 Your Father has driven out great and strong nations before you; no one has stood against you to this day. Yawe abenganaki bikolo ya minene mpe ya nguya liboso na bino ; mpe kino na moyi ya lelo, moko te alongi kotelema liboso na bino.
10 One of you chases 1,000, for your Father himself fights for you, as he promised you. Moto moko kaka kati na bino azalaki kokimisa bato nkoto moko, pamba te Yawe, Nzambe na bino, azalaki kobundela bino ndenge alakaki.
11 So watch yourselves carefully, to love your Father. Boye, bosala keba ete bolinga Yawe, Nzambe na bino.
12 But if you turn back and cling to these remaining nations left among you, intermarry with them, mixing with them and they with you, Kasi soki bopesi Yawe mokongo, mpe soki bosali boyokani elongo na bato oyo babiki kati na bikolo oyo etikali kati na bino ; soki bosali mabala mpe bosangani elongo na bango,
13 be sure your Father will no longer drive out these nations before you. They will be a snare and a trap for you, a whip on your sides and thorns in your eyes, until you perish from this good land your Father gave you. boyeba ete Yawe, Nzambe na bino, akobengana lisusu te bikolo yango liboso na bino. Bakokoma nde minyama mpe mitambo mpo na bino, bafimbu na mikongo na bino mpe banzube kati na miso na bino, kino tango bokosila kokufa na mokili ya kitoko oyo Nzambe na bino apesaki bino.
14 I am now going the way of all the earth. You know with all your heart and all your soul that not one of the good things your Father promised about you has failed—all have come true for you; not one has failed. Sik’oyo ngai nakomi pene ya kokende na nzela oyo moto nyonso akendaka. Na motema mpe elimo na bino mobimba, boyeba ete elaka moko te kati na bilaka nyonso ya kitoko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino ekotikala kokweya. Bilaka nyonso esila kokokisama, moko te ekotikala kokweya.
15 Just as every good word your Father spoke to you came true, so he will bring on you every harmful thing, until he destroys you from this good land he gave you. Ndenge kaka bilaka nyonso ya kitoko ya Yawe, Nzambe na bino, ekokisamaki solo, ndenge wana mpe akotindela bino makambo mabe kino tango akosilisa koboma bino kati na mokili ya kitoko oyo apesaki bino
16 If you break your Father's covenant, which he commanded you, and go and serve other gods and bow to them, your Father's anger will burn against you, and you will quickly be destroyed from the good land he gave you." soki bobebisi boyokani ya Yawe, Nzambe na bino, oyo apeselaki bino mitindo, mpe bokeyi kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango. Kanda ya Yawe ekotumba bino mpe bokosila kokufa noki penza na mokili ya kitoko oyo apesaki bino. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]