Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joshua 24 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Joshua gathered all the tribes of Israel to Shechem, summoned its elders, heads, judges, and officers, and they stood before our Father. Jozue asangisaki mabota nyonso ya Isalaele na Sishemi. Abengisaki bampaka, bakambi, basambisi mpe bakalaka ya Isalaele ; mpe bango bayaki liboso ya Nzambe.
2 Joshua told all the people, "This is what our Father, the God of Israel, says: "Long ago your ancestors lived beyond the Euphrates River—Terah, father of Abraham and Nahor—and served other gods.' Jozue alobaki na bato nyonso : — Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Wuta kala, bakoko na bino mpe Tera, tata ya Abrayami mpe Naori, bavandaki na ngambo mosusu ya ebale mpe bazalaki kosalela banzambe mosusu.
3 I took your father Abraham from beyond the River, led him through all the land of Canaan, multiplied his children, and gave him Isaac. Kasi nabimisaki tata na bino, Abrayami, wuta na mokili oyo ezalaki na ngambo mosusu ya ebale, natambolisaki ye na mokili mobimba ya Kanana mpe napesaki ye bakitani ebele. Napesaki ye Izaki ;
4 I gave Isaac Jacob and Esau, gave Esau Mount Seir to possess, but Jacob and his sons went down to Egypt. mpe na nzela ya Izaki, napesaki ye Jakobi mpe Ezawu. Napesaki mokili ya bangomba Seiri epai ya Ezawu, kasi Jakobi elongo na bana na ye ya mibali, bakendeki na Ejipito.
5 'I sent Moses and Aaron, I struck Egypt with what I did among them, then I brought you out.' Boye, natindaki Moyize mpe Aron ; nabetaki Ejipito kolanda makambo nyonso oyo nasalaki kuna mpe nabimisaki bino kuna.
6 I brought your ancestors out of Egypt; you reached the sea. Egyptians chased your ancestors with chariots and horsemen to the Red Sea. Tango nabimisaki batata na bino na Ejipito, bakomaki kino na ebale monene ya Barozo, bato ya Ejipito balandaki bango na bashar mpe na basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda kino na Ebale monene ya Motane.
7 When they cried to me, I put darkness between you and the Egyptians, brought the sea over them, and covered them. Your eyes saw what I did in Egypt. Then you lived in the wilderness a long time. Batata na bino bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi, mpe Yawe atiaki molili kati na bino mpe bato ya Ejipito, azindisaki bango na mayi ya Ebale monene oyo ezipaki bango. Miso na bino moko emonaki makambo oyo nasalaki bato ya Ejipito. Mpe bowumelaki mibu ebele na esobe.
8 'I brought you to the Amorites' land beyond the Jordan. They fought you; I gave them into your hand, and you took their land. I destroyed them ahead of you. Namemaki bino na mokili ya bato ya Amori, oyo bazalaki kovanda na ngambo ya este ya Yordani. Babundisaki bino kasi nakabaki bango na maboko na bino. Nabomaki bango na miso na bino mpe bobotolaki mokili na bango.
9 Then Balak son of Zippor, king of Moab, rose and fought Israel. He sent and called Balaam son of Beor to curse you, Tango Balaki, mwana mobali ya Tsipori, mokonzi ya Moabi, abimaki mpo na kobundisa Isalaele, atindaki ete baluka Balami, mwana mobali ya Beori, mpo ete alakela bino mabe.
10 but I wouldn't listen to Balaam, so he blessed you again and again, and I rescued you from his hand. Kasi naboyaki koyoka Balami, boye akomaki nde kopambola bino tango na tango mpe nakangolaki bino na loboko na ye.
11 You crossed the Jordan to Jericho. Its citizens fought you—Amorites, Perizzites, Canaanites, Hittites, Girgashites, Hivites, Jebusites—but I gave them into your hand. Boye bokatisaki Yordani mpe bokomaki na engumba Jeriko. Bavandi ya Jeriko babundisaki bino ndenge kaka bato ya Amori, ya Perizi, ya Kanana, ya Iti, ya Girigazi, ya Evi mpe ya Yebusi, basalaki ; kasi nakabaki bango mpe na maboko na bino.
12 I sent the hornet ahead of you; it drove out the two Amorite kings before you—not by your sword or your bow. Natindelaki bango liboso na bino, banzoyi ya minene oyo ebenganaki bango mosika na bino, na bakonzi mibale ya Amori. Bosalaki yango na mipanga mpe na matolotolo na bino te.
13 I gave you land you did not work for, cities you did not build—and you live in them; you eat from vineyards and olive groves you did not plant.'" Boye, napesaki bino mokili oyo bino bomonelaki pasi te mpe bingumba oyo bino botongaki te. Bokomaki kovanda kuna, kolia bambuma ya bilanga ya vino mpe ya olive oyo bolonaki te.
14 Now, fear our Father, serve him with integrity and faithfulness. Remove the gods your ancestors served beyond the River and in Egypt, and serve our Father. Sik’oyo botosa Yawe mpe bosalela Ye na motema mobimba mpe na bosembo. Bobwaka banzambe oyo batata na bino basalelaki na ngambo mosusu ya ebale mpe na Ejipito, mpe bosalela Yawe.
15 But if serving our Father seems wrong to you, choose for yourselves today whom you will serve—the gods your ancestors served beyond the River, or the gods of the Amorites in whose land you live. As for me and my household, we will serve our Father." Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »
16 The people answered, "We could never abandon our Father to serve other gods. Bato bazongisaki : — Tozali na likanisi te ya kosundola Yawe to ya kosalela banzambe mosusu !
17 For our Father brought us and our ancestors up out of the land of Egypt, out of the house of slavery, and did these great signs before our eyes. He kept us safe the whole way we traveled, and among all the peoples we passed through. Pamba te Yawe azali Nzambe na biso ; ezali Ye Yawe nde abimisaki biso mpe batata na biso na Ejipito, na mokili wana ya bowumbu, mpe asalaki na miso na biso bilembo minene ya kokamwa. Azalaki kobatela biso na banzela nyonso oyo tozalaki kotambola mpe kati na bikolo nyonso epai wapi tozalaki koleka.
18 And our Father drove out before us all the peoples, including the Amorites living in the land. We too will serve him, for he is our Father." Yawe abenganaki liboso na biso bikolo nyonso elongo na bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na mokili oyo. Biso mpe tokosalela Yawe, pamba te azali Nzambe na biso.
19 Joshua told the people, "You cannot serve our Father—he is a holy God, a jealous God. He won't forgive your rebellion and sins. Jozue alobaki na bato : — Bokokoka kosalela Yawe te, pamba te azali Nzambe ya Bule, Nzambe ya Zuwa ; akolimbisa te botomboki mpe masumu na bino.
20 If you abandon our Father and serve foreign gods, he will turn, harm you, and consume you, after he has done you good." Soki bosundoli Yawe mpe bokeyi kosalela banzambe ya bapaya, akobalukela bino mpo na kosala bino mabe, mpe akosilisa koboma bino sima na kotalisa bino bolamu.
21 But the people said to Joshua, "No! We will serve our Father." Kasi bato balobaki na Jozue : — Te, tokosalela kaka Yawe !
22 Then Joshua said to the people, "You are witnesses against yourselves that you have chosen our Father, to serve him." "We are witnesses," they said. Jozue alobaki na bato : — Bozali bino moko batatoli mpo na bino awa boponi kosalela Yawe. Bazongisaki : — Ezali se bongo, tondimi yango, tozali batatoli.
23 "Now put away the foreign gods among you, and turn your hearts to our Father, the God of Israel." Jozue alobaki : — Na bongo, bolongola sik’oyo banzambe ya bapaya oyo ezali kati na bino mpe bopesa mitema na bino nyonso epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele.
24 And the people said to Joshua, "We will serve our Father, and we will obey his voice." Bato bazongiselaki Jozue : — Tokosalela Yawe, Nzambe na biso, mpe tokoyoka mongongo na Ye.
25 Joshua made a covenant with the people that day, and set them a statute and ordinance at Shechem. Na mokolo wana, Jozue asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele na Sishemi, mpe apesaki bango mibeko mpe bikateli.
26 Joshua wrote these words in the Book of the Law of our Father, then took a large stone and set it up there under the oak by our Father's sanctuary. Bongo, Jozue akomaki makambo wana nyonso na buku ya Mobeko ya Nzambe. Akamataki libanga moko ya monene mpe atelemisaki yango wana, na se ya terebente oyo ezalaki kati na Esika ya bule ya Yawe.
27 Joshua told all the people, "Look, this stone will be a witness against us, because it heard every word our Father spoke to us. It will be a witness against you, so you don't deny your Father." Jozue alobaki na bato nyonso : — Botala, libanga oyo ekozala litatoli mpo na biso, pamba te esili koyoka maloba nyonso oyo Yawe alobi na biso. Ekozala motatoli mpo na kosambisa bino mpo ete bowangana Nzambe na bino te.
28 Then Joshua sent the people away, each to his own inheritance. Boye, Jozue azongisaki bato, moto na moto kati na libula na ye.
29 After this, Joshua son of Nun, the servant of our Father, died at 110 years old. Sima na makambo oyo, Jozue, mwana mobali ya Nuni, mowumbu na Yawe, akufaki na mibu nkama moko na zomi.
30 They buried him in his inheritance at Timnath-serah, in Ephraim's hill country, north of Mount Gaash. Bakundaki ye na mabele ya libula na ye, na Timinati-Sera, na etuka ya bangomba ya Efrayimi, na ngambo ya nor ya ngomba Gashi.
31 Israel served our Father all Joshua's days, and all the days of the elders who outlived him and knew all the work our Father had done for Israel. Bato ya Isalaele basalelaki Yawe tango nyonso Jozue azalaki na bomoi mpe, sima na kufa na ye, tango nyonso bampaka oyo bamonaki misala nyonso ya Yawe mpo na Isalaele bazalaki na bomoi.
32 Joseph's bones, which the Israelites had carried up from Egypt, they buried at Shechem, in the plot Jacob bought from Hamor's sons, Shechem's father, for one hundred pieces of silver—it became Joseph's descendants' inheritance. Mpe bakundaki mikuwa ya Jozefi oyo bana ya Isalaele bamemaki wuta na Ejipito na Sishemi, na eteni ya elanga oyo Jakobi asombaki na motuya ya mbongo ya bibende nkama moko, epai ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi. Yango ekoma mpe libula ya bakitani ya Jozefi.
33 Eleazar son of Aaron died, and they buried him at Gibeah, given to his son Phinehas in the hill country of Ephraim. Bongo, Eleazari, mwana mobali ya Aron, mpe akufaki. Bakundaki ye na ngomba moke oyo bapesaki na Pineasi, mwana na ye ya mobali, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]