Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Judges 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 After Joshua's death, the Israelites asked our Father, "Who will go up first for us against the Canaanites to fight them?" Sima na kufa ya Jozue, bana ya Isalaele batunaki Yawe : — Libota nini kati na biso ekokende liboso mpo na kobundisa bato ya Kanana ?
2 Our Father said, "Judah will go up. I have given the land into his hands." Yawe azongisaki : — Libota ya Yuda nde ekokende liboso, pamba te napesi mokili oyo na maboko na bango.
3 Judah said to his brother Simeon, "Come up with me into my allotted territory, and let us fight the Canaanites; and I too will go with you into yours." So Simeon went with him. Bongo bato ya libota ya Yuda balobaki na bandeko na bango ya libota ya Simeoni : — Boya elongo na biso mpo ete tobundisa bato ya Kanana, mpo na eteni ya mabele oyo epesamelaki biso. Bongo, biso mpe tokokende elongo na bino, na eteni ya mabele na bino. Boye, bato ya libota ya Simeoni bakendeki elongo na bango.
4 So Judah went up, and our Father gave the Canaanites and Perizzites into their hands, and they struck down 10,000 men at Bezek. Tango libota ya Yuda ekotaki na bitumba, Yawe akabaki bato ya Kanana mpe ya Perizi na maboko na bango, mpe babomaki bato nkoto zomi, na Bezeki.
5 At Bezek they found Adoni-bezek, fought him, and struck down the Canaanites and Perizzites. Ezalaki kuna nde bakutaki Adoni-Bezeki mpe babundisaki ye. Balongaki bato ya Kanana mpe ya Perizi.
6 Adoni-bezek fled, but they pursued him, caught him, and cut off his thumbs and big toes. Adoni-Bezeki akimaki ; kasi balandaki ye mpe bakangaki ye, bakataki ye misapi ya minene ya maboko mpe ya makolo.
7 Adoni-bezek said, "Seventy kings with thumbs and big toes cut off used to gather scraps under my table. As I did, so God has repaid me." They brought him to Jerusalem, where he died. Adoni-Bezeki alobaki : « Bakonzi tuku sambo, oyo bakata bango misapi ya minene ya maboko mpe ya makolo, bazalaki kolokota biloko oyo ezalaki kokweya na se ya mesa na ngai. Sik’oyo, Nzambe azongiseli ngai makambo oyo nasalaki baninga. » Bamemaki ye na Yelusalemi, mpe akufaki kuna.
8 Judah's men fought against Jerusalem, captured it, struck it with the sword, and burned the city. Bato ya libota ya Yuda babundisaki Yelusalemi mpe babotolaki yango ; babomaki bato ya engumba yango na mopanga mpe batiaki yango moto.
9 Then Judah went down to fight the Canaanites living in the hill country, the Negev, and the western foothills. Sima na yango, bato ya libota ya Yuda bakendeki kobundisa bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na mokili ya bangomba, na Negevi, mpe na etando oyo ezalaki pembeni ya ebale.
10 Judah advanced against the Canaanites in Hebron (formerly Kiriath-arba) and struck down Sheshai, Ahiman, and Talmai. Bato ya libota ya Yuda babundisaki lisusu bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Ebron, oyo kombo na yango ezalaki na kala « Kiriati-Ariba. » Balongaki Sheshayi, Ayimani mpe Talimayi.
11 From there they marched against the inhabitants of Debir (the name of Debir was formerly Kiriath-sepher). Longwa wana, bapusanaki mpe bakendeki kobundisa bavandi ya Debiri oyo kombo na yango ezalaki na kala « Kiriati-Seferi. »
12 Caleb said, "Whoever attacks and captures Kiriath-sepher, I'll give him my daughter Achsah as wife." Kalebi alobaki : « Nakopesa na libala Akisa, mwana na ngai ya mwasi, epai ya moto nyonso oyo akobundisa mpe akobotola Kiriati-Seferi. »
13 Othniel son of Kenaz, Caleb's younger brother, captured it, so Caleb gave him his daughter Achsah in marriage. Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, ndeko ya Kalebi, abotolaki yango ; boye Kalebi apesaki Akisa, mwana na ye ya mwasi, na libala epai ya Otinieli.
14 When she came to Othniel, she urged him to ask her father for a field. As she got off her donkey, Caleb asked her, "What do you want?" Nzokande, tango Akisa akomaki na ndako ya Otinieli, atindikaki ye ete asenga elanga epai ya Kalebi, tata na ye. Boye, tango Akisa akitaki wuta na ane na ye, Kalebi atunaki ye : — Olingi nini ?
15 She said to him, "Give me a blessing. Since you've given me the land of the Negev, give me springs of water too." So Caleb gave her the upper and lower springs. Akisa azongisaki : — Salela ngai ngolu. Lokola opesaki ngai eteni ya mabele kati na Negevi, pesa ngai lisusu bitima. Boye, Kalebi apesaki ye bitima ya likolo mpe ya se.
16 The Kenite's descendants, Moses' father-in-law's family, went up with Judah's people from the city of palms into Judah's wilderness in the Negev near Arad, and settled among the people. Bakitani ya Keni oyo azalaki bokilo ya Moyize balongwaki na engumba ya banzete ya Mbila elongo na bato ya libota ya Yuda, mpe bakendeki kovanda esika moko na bavandi ya esobe ya Yuda, oyo ezali na sude ya Aradi.
17 Judah went with his brother Simeon; they struck the Canaanites living in Zephath and completely destroyed it, so the city was named Hormah. Bato ya libota ya Yuda elongo na bandeko na bango ya libota ya Simeoni bakendeki kobundisa bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Tsefati, mpe babebisaki bango. Yango wana, bapesaki engumba yango kombo « Orima. »
18 Judah also captured Gaza with its territory, Ashkelon with its territory, and Ekron with its territory. Bato ya libota ya Yuda babotolaki lisusu Gaza, Ashikeloni mpe Ekroni, elongo na mabele na yango ya pembeni.
19 Our Father was with Judah, who took the hill country but could not drive out the valley's people, for they had iron chariots. Yawe azalaki elongo na bato ya libota ya Yuda. Babotolaki mokili ya bangomba, kasi balongaki te kobengana bavandi ya etando, pamba te bazalaki na bashar ya bibende.
20 They gave Hebron to Caleb, as Moses had promised, and he drove out Anak's three sons from there. Kolanda ndenge Moyize alobaki, bapesaki na Kalebi engumba Ebron. Mpe Kalebi abenganaki na Ebron bana mibali misato ya Anaki.
21 But Benjamin did not drive out the Jebusites in Jerusalem; so the Jebusites live with Benjamin in Jerusalem to this day. Nzokande, bato ya libota ya Benjame babenganaki te bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda na Yelusalemi. Boye, kino na mokolo ya lelo, bato ya Yebusi bavandaka esika moko na bato ya libota ya Benjame.
22 The house of Joseph also went up against Bethel, and our Father was with them. Bato kati na ndako ya Jozefi bamataki mpo na kobundisa Beteli, mpe Yawe azalaki elongo na bango.
23 The house of Joseph sent men to scout out Bethel (the city was formerly named Luz). Tango libota ya Jozefi etindaki bato ete bakende kononga engumba Beteli oyo bazalaki kobenga na kala Luze,
24 The scouts saw a man leaving the city and told him, "Show us the way in, and we'll treat you kindly." banongi bamonaki moto moko kobima na engumba mpe balobaki na ye : « Lakisa biso esika nini tokoki kokotela na kati ya engumba, mpe tokosalela yo bolamu. »
25 So he showed them the way in, and they struck the city with the sword, but let the man and his whole family go. Boye, alakisaki bango esika ya kokotela na kati na engumba. Mpe babomaki bato ya engumba yango na mopanga, kasi babikisaki moto wana elongo na libota na ye mobimba.
26 The man went to the Hittite land, built a city, and named it Luz—its name to this day. Moto yango akendeki na mokili ya bato ya Iti mpe atongaki kuna engumba oyo apesaki kombo « Luze » oyo etikala kino lelo.
27 Manasseh did not drive out the people of Beth-shean, Taanach, Dor, Ibleam, and Megiddo, or their villages; so the Canaanites were determined to keep living in that land. Kasi bato ya libota ya Manase babenganaki te bato ya Beti-Sheani mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Taanaki mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Dori mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Yibileayimi mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Megido mpe bamboka na yango ya mike ; pamba te bato ya Kanana batingamaki kaka kovanda na mokili yango.
28 When Israel grew strong, they forced the Canaanites into labor, but never drove them out completely. Tango bana ya Isalaele bakomaki lisusu makasi, bakomaki kosalisa bato ya Kanana misala makasi, kasi babenganaki bango nyonso te.
29 Ephraim did not drive out the Canaanites living in Gezer, so they went on living among them there. Bato ya libota ya Efrayimi babenganaki te bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Gezeri, mpe bato ya Kanana bakobaki kovanda esika moko na bango.
30 Zebulun did not drive out the people of Kitron or the people of Nahalol, so the Canaanites lived among them but became forced labor. Bato ya libota ya Zabuloni babenganaki te bavandi ya Kitroni mpe ya Naaloli. Bato ya Kanana bakobaki kovanda esika moko na bango, kasi bakomaki kosalisa bango misala makasi.
31 Asher did not drive out those living in Acco, Sidon, Ahlab, Achzib, Helbah, Aphik, or Rehob; Bato ya libota ya Aseri babenganaki te bato ya Ako, ya Sidoni, ya Ayilabi, ya Akizibi, ya Eliba, ya Afiki mpe ya Reobi.
32 so the Asherites lived among the Canaanites of the land, because they did not drive them out. Likolo na yango, bato ya libota ya Aseri bakomaki kovanda esika moko na bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na mokili yango.
33 Naphtali did not drive out the residents of Beth-shemesh or Beth-anath, so they lived among the Canaanites of the land; but those of Beth-shemesh and Beth-anath became their forced labor. Bato ya libota ya Nefitali babenganaki te bato oyo bazalaki kovanda na Beti-Shemeshi mpe na Beti-Anati. Boye, bakomaki kovanda esika moko na bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na mokili yango ; kasi bato ya Beti-Shemeshi mpe ya Beti-Anati bakomaki kosala misala makasi.
34 The Amorites forced the Danites into the hill country, not letting them come down to the plain. Bato ya Amori batindikaki libota ya Dani mosika, na likolo ya bangomba, mpo ete balonga te kokita na etando ya polele.
35 The Amorites held on to living in Mount Heres, Aijalon, and Shaalbim, but the hand of the house of Joseph pressed on them, and they were put to forced labor. Boye, bato ya Amori mpe batingamaki kaka kovanda na Ari-Eresi, na Ayaloni mpe na Shaalibimi. Kasi tango ndako ya Jozefi ekomaki lisusu na nguya, bakomaki kosalisa bango misala makasi.
36 The border of the Amorites ran from the ascent of Akrabbim, from Sela on upward. Mondelo ya mabele ya bato ya Amori ezalaki longwa na Libanga ya Sela, elekaki na bangomba ya Akarabimi kino na likolo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]