Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Judges 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The messenger of our Father went up from Gilgal to Bochim and said, "I brought you up out of Egypt into the land I swore to your fathers. I said, 'I will never break my covenant with you. Anjelu ya Yawe alongwaki na Giligali mpe akendeki na Bokimi. Alobaki : « Nabimisaki bino na Ejipito mpe nakotisaki bino na mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bino na nzela ya ndayi. Nalobaki : ‹ Nakotikala kokata boyokani te kati na Ngai mpe bino ;
2 You will make no covenant with this land's people; tear down their altars.' But you have not obeyed my voice. What have you done? mpe bokosala boyokani te elongo na bato ya mokili oyo, kasi bokobuka bitumbelo na bango. › Nzokande, botosaki Ngai te. Mpo na nini bosalaki bongo ?
3 So now I say: I won't drive them out before you; they'll be thorns in your sides, their gods a trap to you." Sik’oyo, nalobi na bino ete nakobengana bango lisusu te liboso na bino ; bakokoma nzube na mipanzi na bino, mpe banzambe na bango ya bikeko ekokoma mitambo mpo na bino. »
4 When the messenger of our Father spoke these words to all the Israelites, the people wept aloud. Tango Anjelu ya Yawe alobaki makambo oyo epai ya bana nyonso ya Isalaele, bakomaki kolela makasi,
5 And they named that place Bochim, and there they sacrificed to our Father. mpe babengaki esika yango Bokimi. Babonzaki kuna bambeka epai na Yawe.
6 When Joshua dismissed the people, the Israelites each went to claim their own land inheritance. Sima na Jozue kobengana bato, bana ya Isalaele bakendeki kobotola mokili, moto na moto na eteni na ye ya mabele.
7 The people served our Father throughout the days of Joshua and the elders who outlived him, having seen all the great work our Father did for Israel. Basalelaki Yawe tango nyonso Jozue azalaki na bomoi mpe, sima na kufa na ye, tango nyonso bampaka, oyo bamonaki misala nyonso ya Yawe mpo na Isalaele, bazalaki na bomoi.
8 Joshua son of Nun, servant of our Father, died at 110 years old. Jozue, mwana mobali ya Nuni, mosali na Yawe, akufaki tango akokisaki mibu nkama moko na zomi ya mbotama.
9 They buried him in his inheritance land at Timnath-heres, in Ephraim's hill country, north of Mount Gaash. Bakundaki ye na mabele ya libula na ye, na Timinati-Eresi, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, na ngambo ya nor ya ngomba Gashi.
10 That whole generation was also gathered to their ancestors, and another generation rose after them who did not know our Father or the work he did for Israel. Sima na yango, molongo nyonso ya bato oyo bazalaki elongo na Jozue basilaki na kokufa ; mpe molongo mosusu ya bato oyo babotamaki sima na bango ebimaki, molongo oyo eyebaki Yawe te mpe emonaki te misala oyo asalaki mpo na Isalaele.
11 Israel's people did evil in our Father's sight and served the Baals. Bongo bana ya Isalaele bakomaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe mpe kosalela banzambe ya Bala.
12 They abandoned our Father, the God of their fathers, who brought them out of the land of Egypt. They followed other gods of the surrounding peoples, bowed to them, and provoked our Father to anger. Basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na mokili ya Ejipito, mpe bakomaki kosambela mpe kosalela banzambe ya ndenge na ndenge ya bato oyo bazalaki zingazinga na bango ; bakomaki kogumbama liboso ya banzambe yango. Mpo na yango, bapelisaki kanda ya Yawe,
13 They abandoned our Father and served Baal and the Ashtaroth. pamba te basundolaki Yawe mpo na kosalela banzambe Bala mpe Asitarite.
14 So our Father's anger flared against Israel, and he handed them to raiders who plundered them, selling them to surrounding enemies, so they could no longer stand against them. Bongo Yawe atombokelaki bana ya Isalaele mpe akabaki bango na maboko ya bato mabe oyo babotolaki bango biloko na makasi ; asundolaki bango epai ya banguna na bango, oyo bazalaki zingazinga na bango, mpe bazangaki makoki ya kotelemela bango.
15 Everywhere they marched out, our Father's hand was against them for harm, as he had said and sworn to them. They were in dire distress. Tango nyonso bana ya Isalaele bazalaki kokende bitumba, loboko na Yawe ezalaki kotelemela bango mpo ete balonga te, ndenge kaka alapaki ndayi mpo na bango. Boye bazalaki na pasi makasi.
16 Then our Father raised up judges who saved them from the hand of their raiders. Yawe abimisaki Bilombe oyo babikisaki bango wuta na maboko ya bato mabe oyo bazalaki kobotola bango biloko na makasi.
17 But they would not listen even to their judges. They prostituted themselves to other gods and bowed to them, quickly turning from the way their fathers walked, who had obeyed our Father's commands; they would not do the same. Kasi bana ya Isalaele bayokelaki ata Bilombe na bango te, kasi bazalaki kosambela mpe kosalela banzambe mosusu. Batikaki noki nzela oyo batata na bango bazalaki kolanda : nzela ya kotosa mibeko na Yawe. Balandaki ndakisa na bango te.
18 When our Father raised up judges, he was with each judge and rescued them from their enemies all that judge's days; for our Father was moved to compassion by their groaning under their oppressors. Tango nyonso Yawe azalaki kobimisela bango elombe, abandaki mpe kozala elongo na elombe yango mpo na kobikisa bango wuta na maboko ya banguna na bango, na tango nyonso oyo elombe yango azalaki na bomoi. Solo Yawe azalaki koyokela bango mawa, pamba te azalaki koyoka bango kolela liboso ya banyokoli na bango mpe ya bato oyo bazalaki komonisa bango pasi.
19 But when the judge died, they turned back and grew more corrupt than their fathers, following other gods to serve and bow down to them. They abandoned none of their practices or stubborn ways. Kasi soki elombe akufi, bato bazalaki kozongela misala mabe koleka kutu mabe ya batata na bango ; bazalaki kosambela, kosalela, kogumbamela banzambe mosusu. Bazalaki koboya kotika misala na bango ya mabe mpe bazalaki kaka kotingama na nzela na bango.
20 So our Father's anger flared against Israel, and he said, "Because this nation has broken my covenant that I commanded their fathers, and has not obeyed my voice, Boye Yawe atombokelaki bana ya Isalaele mpe alobaki : « Lokola ekolo oyo ekataki boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango mpe eboyi koyokela Ngai,
21 I will no longer drive out any nation Joshua left when he died, Ngai mpe nakobengana lisusu te liboso na bango ata ekolo moko kati na bikolo oyo Jozue atikaki liboso ete akufa.
22 to test Israel by them: whether they'd keep our Father's way, walking in it as their fathers did, or not." Nakosalela bikolo yango mpo na komeka Isalaele mpe kotala soki bakobatela mpe bakotambola na nzela ya Yawe lokola batata na bango. »
23 So our Father left those nations, not driving them out quickly, and did not give them into Joshua's hand. Yawe akabaki te bikolo yango na maboko ya Jozue, asalaki ete etikala ; abenganaki yango te mbala moko.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]