Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Judges 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 These are the nations our Father left to test Israel—all who had not known any of Canaan's wars. Tala bikolo oyo Yawe atikaki mpo na komeka bana ya Isalaele oyo bazalaki na tango ya bitumba ya Kanana.
2 (He did this only so Israel's generations who had not known war before might learn it.). Asalaki bango bongo, kaka mpo ete milongo ya sika ya bana ya Isalaele oyo bazalaki te na tango ya bitumba, bayeba nini yango bitumba.
3 The nations: five Philistine rulers, all Canaanites, Sidonians, and Hivites living in the Lebanon mountains, from Mount Baal-hermon to Lebo-hamath. Yawe atikaki kati na mokili yango bakonzi mitano ya bato ya Filisitia, bato nyonso ya Kanana, bato nyonso ya Sidoni mpe bato nyonso ya Evi, oyo bazalaki kovanda na bangomba ya Libani, wuta na ngomba ya Bala-Erimoni kino na Lebo-Amati.
4 They were to test Israel—whether they'd obey our Father's commands, given to their ancestors through Moses. Bikolo wana etikalaki mpo na komeka bana ya Isalaele mpe kotala soki bakotosa mitindo oyo Yawe apesaki bakoko na bango na nzela ya Moyize.
5 So the Israelites lived among the Canaanites, Hittites, Amorites, Perizzites, Hivites, and Jebusites. Bana ya Isalaele bavandaki kati na bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi ;
6 They married these peoples' daughters, gave their own daughters to their sons, and served their gods. babalaki bana basi na bango mpe babalisaki bana na bango ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe basalelaki banzambe na bango.
7 Israel did evil in our Father's eyes, forgot their Father, and served the Baals and Asherahs. Bana ya Isalaele basalaki makambo mabe na miso ya Yawe ; babosanaki Yawe, Nzambe na bango, mpe basalelaki banzambe Bala mpe Ashera.
8 So our Father's anger burned against Israel; he sold them to Cushan-Rishathaim king of Aram-naharaim, whom Israel served eight years. Yawe asilikelaki bana ya Isalaele, mpe akabaki bango na maboko ya Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami. Bana ya Isalaele basalaki mibu mwambe na se ya bokonzi na ye.
9 When the Israelites cried out to our Father, he raised a rescuer—Othniel son of Kenaz, Caleb's younger brother—who rescued them. Bana ya Isalaele bagangaki epai ya Yawe, mpe Yawe abimiselaki bango mokangoli : Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, leki ya Kalebi. Mpe Otinieli abikisaki bana ya Isalaele.
10 The Spirit of our Father came on him, and he judged Israel. He went to war, and our Father handed Cushan-Rishathaim king of Aram to him, and his hand prevailed over Cushan-Rishathaim. Molimo na Yawe ayaki likolo na ye mpe akomaki elombe kati na bana ya Isalaele ; bongo akendeki kobunda bitumba. Yawe akabaki Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami, na maboko ya Otinieli ; mpe Otinieli alongaki ye.
11 Then the land had rest for forty years, until Othniel son of Kenaz died. Sima na yango, mokili ekomaki na kimia mibu tuku minei kino tango Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, akufaki.
12 Israelites again did evil in the eyes of our Father, and because they did this evil, our Father strengthened Eglon king of Moab against Israel. Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe. Likolo ya mabe yango, Yawe apesaki Egiloni, mokonzi ya Moabi, bokonzi na likolo ya bana ya Isalaele.
13 Eglon gathered the Ammonites and Amalekites, went and struck Israel, and they seized the City of Palms. Egiloni asanganaki na bato ya Amoni mpe ya Amaleki, bayaki mpe babundisaki bana ya Isalaele, bongo babotolaki engumba ya nzete ya Mbila.
14 The Israelites served Eglon king of Moab eighteen years. Bana ya Isalaele bazalaki na se ya bokonzi ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, mibu zomi na mwambe.
15 Israelites cried out to our Father again; he raised up Ehud son of Gera, a left-handed Benjamite, as rescuer. They sent tribute through him to Eglon king of Moab. Bana ya Isalaele bagangaki lisusu epai na Yawe, mpe Yawe apesaki bango mokangoli moko na kombo Ewudi, mwana mobali ya Gera, ya libota ya Benjame. Ewudi azalaki kosalela loboko ya mwasi. Bana ya Isalaele batindaki ye epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, mpo na kopesa ye mpako.
16 Ehud made himself a two-edged sword, about eighteen inches long, and strapped it under his clothes on his right thigh. Ewudi amisalelaki mopanga ya minu mibale, ya ndambo ya metele na molayi. Akangaki yango na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe abombaki yango na se ya bilamba na ye.
17 He presented the tribute to Eglon king of Moab, who was a very fat man. Apesaki mpako epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, oyo azalaki moto ya nzoto minene.
18 When Ehud had finished presenting the tribute, he sent away the people who had carried it. Tango Ewudi asilisaki kopesa mpako, azongisaki bato nyonso oyo bamemaki yango.
19 He turned back from the idols near Gilgal, saying, "I have a secret message for you, king." The king said, "Silence!" and all his attendants left him. Kasi tango akomaki na esika ya banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga, pembeni ya Giligali, azongaki epai ya mokonzi mpe alobaki na ye : — Mokonzi, nazali na sango ya sekele mpo na yo. Mokonzi azongisaki : — Kimia ! Mpe bato nyonso oyo bazalaki pembeni na ye babimaki libanda.
20 Ehud approached him, sitting alone in his cool upper room. Ehud said, "I have a word from God for you." The king rose from his seat. Bongo Ewudi apusanaki pene ya mokonzi Egiloni oyo azalaki ya kovanda na shambre ya likolo ya ndako na ye ya kopema. Alobaki na ye : — Nazali na liloba ya koyebisa yo kowuta na Nzambe.
21 Ehud reached with his left hand, took the sword from his right thigh, and plunged it into Eglon's belly. Ewudi asembolaki loboko na ye ya mwasi, akamataki mopanga oyo abombaki na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe atubaki yango na libumu ya mokonzi.
22 The hilt entered after the blade; fat closed over it. Since Ehud didn't draw the sword from his belly, his guts spilled out. Boye, ezala esimbelo ya mopanga, nyonso ekotaki, mpe mafuta ezipaki mopanga ; pamba te Ewudi atikaki mopanga yango kati na libumu ya mokonzi.
23 Ehud went out to the porch, shut the upper room's doors behind him, and locked them. Ewudi abimaki na sima ya ndako, akangaki bikuke ya shambre ya likolo sima na ye mpe atiaki yango bibende.
24 After he left, his servants found the upper room's doors locked and said, "He must be easing himself in the cool room." Tango akendeki, basali ya mokonzi bayaki na esika yango mpe bamonaki ete bikuke ya shambre ya likolo ya kokangama. Balobaki : — Tango mosusu mokonzi azali na zongo inene oyo ezali kati na shambre, na kati ya ndako.
25 They waited until embarrassed, but he still hadn't opened the upper room's doors. So they took the key, opened them, and found their lord fallen on the floor, dead. Basali bazelaki mingi, kino ekomaki kosala bango soni. Lokola mokonzi azalaki kaka kofungola te bikuke ya shambre ya likolo, bazwaki fungola mpe bafungolaki bango moko. Mpe tala, bamonaki nkolo na bango azali ya kokufa, alala na se.
26 While they delayed, Ehud escaped. He passed beyond the idols and escaped to Seirah. Wana balekisaki bongo ngonga, Ewudi abimaki ; alekaki na esika oyo ezalaki na banzambe oyo basala na mabanga mpe akimaki na Seira.
27 He arrived, blew the ram's horn in Ephraim's hills, and the Israelites came down with him from the hills, Ehud leading. Tango akomaki kuna, abetaki kelelo na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe bana ya Isalaele bakitaki elongo na ye, longwa na likolo na ngomba, mpe amitiaki na liboso mpo na kotambolisa bango.
28 He said, "Follow me, for our Father has given your enemies Moab into your hand." They went down after him, seized the Jordan fords against Moab, and let no one cross. Alobaki na bango : — Bolanda ngai, pamba te Yawe akabi Moabi, monguna na bino, na maboko na bino. Balandaki ye mpe babotolaki bato ya Moabi bisika oyo bakatisaka Yordani na makolo. Bapesaki lisusu ata na moto moko te nzela ya kokatisa mayi.
29 At that time they struck down about 10,000 Moabites, all strong, able-bodied men; not one escaped. Na mokolo wana, babomaki bato ya Moabi pene nkoto zomi ; bango nyonso bazalaki bambinga mpe bato ya makasi, ata moto moko te abikaki.
30 So Moab was subdued that day under Israel's hand, and the land had rest eighty years. Na mokolo wana, bana ya Isalaele balembisaki bato ya Moabi, mpe mokili ezalaki na kimia mibu tuku mwambe.
31 Shamgar son of Anath followed, killing 600 Philistines with an oxgoad; he saved Israel too. Sima na Ewudi, Shamagari, mwana mobali ya Anati, ayaki mpe abomaki bato ya Filisitia nkama motoba na nzela ya nzete ya moke oyo batambolisaka na yango bangombe. Ye mpe abikisaki Isalaele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]