Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Judges 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Once Ehud was dead, the Israelites again did evil in the eyes of our Father. Sima na kufa ya Ewudi, bana ya Isalaele basalaki lisusu makambo mabe na miso ya Yawe.
2 So our Father sold them into the hand of Jabin king of Canaan, who ruled in Hazor. His army commander was Sisera, who lived in Harosheth-hagoyim. Yawe akabaki bango lisusu na maboko ya Yabini, mokonzi ya Kanana, oyo azalaki kovanda na Atsori. Sisera, mokonzi ya mampinga na ye ya basoda, azalaki kovanda na Arosheti-Goyimi.
3 Then the Israelites cried out to our Father, for Sisera had 900 iron chariots and had harshly oppressed them for twenty years. Yabini azalaki na bashar nkama libwa ya bibende, mpe anyokolaki makasi bana ya Isalaele mibu tuku mibale. Bongo bana ya Isalaele bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi.
4 Now Deborah, a woman prophet, Lappidoth's wife, was judging Israel at that time. Na tango wana, Debora, mwasi mosakoli, mwasi ya engumba Lapidoti, azalaki kokamba Isalaele.
5 She would sit under the Palm of Deborah between Ramah and Bethel in Ephraim's hill country, and Israelites came up to her for judgment. Azalaki kosambisa na se ya nzete ya mbila ya Debora, oyo ezalaki na kati ya Rama mpe Beteli, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Bana ya Isalaele bazalaki koya epai na ye mpo na kosambisama.
6 She sent for Barak son of Abinoam from Kedesh in Naphtali and told him, "Hasn't our Father, the God of Israel, commanded you: Go, march to Mount Tabor and take with you 10,000 men from Naphtali and Zebulun. Mokolo moko, abengisaki Baraki, mwana mobali ya Abinoami, moto ya Kedeshi ya Nefitali, mpe alobaki na ye : — Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesi yo mitindo : « Kende, kamata elongo na yo bato nkoto zomi ya mabota ya Nefitali mpe ya Zabuloni, mpe mema bango na nzela oyo ekenda na ngomba Tabori.
7 I will draw out Sisera, commander of Jabin's army, to meet you at the Kishon River with his chariots and troops, and hand him over to you." Nakomema Sisera, mokonzi ya basoda ya Yabini, na mayi moke ya Kishoni elongo na bashar mpe basoda na ye, mpe nakokaba ye na maboko na yo. »
8 Barak said to her, "If you go with me, I'll go; but if you won't go with me, I won't go." Baraki azongiselaki Debora : — Soki okokende elongo na ngai, wana nakokende ; kasi soki okokende na ngai te, wana ngai mpe nakokende te.
9 "I will surely go with you," she said, "but you will get no glory on the road you take, for our Father will give Sisera into the hand of a woman." So Deborah rose and went with Barak to Kedesh. Debora alobaki na ye : — Malamu, nakokende elongo na yo. Kasi yeba ete, na nzela oyo ozali kokende, lokumu ekozala ya yo te, pamba te Yawe akokaba Sisera na maboko ya mwasi. Boye, Debora akendeki elongo na Baraki, na mboka Kedeshi.
10 Barak called Zebulun and Naphtali to Kedesh; 10,000 men went up behind him, and Deborah went with him. Kuna na Kedeshi, Baraki abengisaki bato ya mabota ya Zabuloni mpe ya Nefitali. Bato nkoto zomi balandaki ye, mpe Debora akendeki elongo na ye.
11 Heber the Kenite, one of the descendants of Hobab, Moses' father-in-law, had separated from the Kenites and pitched his tent as far as the oak in Zaanannim, near Kedesh. Kaka na mokolo wana, Eberi, moto ya Keni, akabwanaki na bato mosusu ya Keni, bakitani ya Obabi, semeki ya Moyize. Mpe Eberi akendeki kino na terebente oyo ezali na Tsananimi, pembeni ya Kedeshi, mpo na kotelemisa ndako na ye ya kapo.
12 When they told Sisera that Barak son of Abinoam had gone up to Mount Tabor, Tango bayebisaki Sisera ete Baraki, mwana mobali ya Abinoami, amataki na likolo ya ngomba Tabori,
13 Sisera summoned all his chariots—900 iron chariots—and all his troops, from Harosheth-hagoyim to the Kishon River. Sisera abengisaki, longwa na Arosheti-Goyimi, bato nyonso oyo bazalaki na ye elongo, mpe asangisaki bashar nkama libwa ya bibende. Amemaki bango na mayi moke ya Kishoni.
14 Deborah said to Barak, "Up! Today our Father hands Sisera over to you. Has our Father not gone out ahead of you?" So Barak charged down Mount Tabor with 10,000 men behind him. Debora alobaki na Baraki : « Kende ! Ezali lelo nde mokolo oyo Yawe akokaba Sisera na maboko na yo. » Baraki akitaki na ngomba Tabori, mpe bato nkoto zomi balandaki ye.
15 And our Father routed Sisera, all his chariots and all his army, by the sword before Barak; Sisera left his chariot and fled on foot. Wana Baraki azalaki kokende, Yawe apanzaki, na nzela ya mopanga na Ye, Sisera, bashar na ye nyonso mpe mampinga na ye ya basoda. Sisera asundolaki shar na ye mpe akimaki na makolo.
16 Barak chased the chariots and army to Harosheth-hagoyim, and Sisera's whole army fell by the sword; not one man survived. Kasi Baraki alandaki bashar mpe mampinga kino na Arosheti-Goyimi. Mampinga nyonso ya basoda ya Sisera ekufaki na mopanga, ata moto moko te abikaki.
17 Meanwhile Sisera fled on foot to the tent of Jael, wife of Heber the Kenite, for Jabin king of Hazor and Heber's house were at peace. Nzokande, Sisera akimaki na makolo kino na ndako ya kapo ya Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni ; pamba te boyokani ya malamu ezalaki kati na Yabini, mokonzi ya Atsori, mpe libota ya Eberi, moto ya Keni.
18 Jael went out to meet Sisera: "Turn in, my lord, turn in to me; don't be afraid." So he turned into her tent, and she covered him with a rug. Yaeli abimaki mpo na kokutana na Sisera mpe alobaki na ye : — Yaka, nkolo na ngai ; kimela epai na ngai, kobanga te. Sisera akotaki na ndako ya kapo ya Yaeli, mpe Yaeli azipaki ye bulangeti.
19 He said, "Please give me a little water; I'm thirsty." She opened a skin of milk, gave him a drink, and covered him again. Sisera alobaki na Yaeli : — Nabondeli yo, pesa ngai mayi mpo ete namela ; nazali na posa ya mayi. Yaeli afungolaki mbeki etonda na miliki ya mayi, mpe amelisaki ye yango. Sima, azipaki ye lisusu bulangeti.
20 He said to her, "Stand at the tent entrance. If someone comes and asks, 'Is there a man here?' say, 'No.'" Sisera alobaki na Yaeli : — Telema na ekuke ya ndako ya kapo. Soki moto ayei kotuna yo : « Moto azali awa ? » Zongisa : « Te ! »
21 But Jael, Heber's wife, took a tent peg and hammer, crept up softly, and drove the peg through his temple into the ground while he lay fast asleep and exhausted. So he died. Kasi wana Sisera alalaki pongi makasi mpo ete alembaki, Yaeli, mwasi ya Eberi, akamataki pike ya ndako ya kapo mpe azwaki marto ; akotaki malembe pembeni na ye, abetaki ye pike na litoyi, mpe pike yango etobolaki moto na ye kino ekotaki na mabele ; mpe Sisera akufaki.
22 Just then Barak came pursuing Sisera, and Jael went out to meet him. "Come," she said, "and I'll show you the man you're looking for." He went in with her, and there lay Sisera, dead, the tent peg through his temple. Wana Baraki azalaki nanu kolanda Sisera, Yaeli abimaki mpo na kokutana na ye. Alobaki na Baraki : « Yaka, nakolakisa yo moto oyo ozali koluka. » Baraki akotaki na ndako ya kapo ya Yaeli mpe amonaki Sisera ya kokufa, alala na mabele, mpe pike kati na litoyi na ye.
23 On that day our Father subdued Jabin king of Canaan before the Israelites. Mokolo wana, Nzambe akitisaki liboso ya bana ya Isalaele, Yabini, mokonzi ya Kanana.
24 The hand of the Israelites pressed harder and harder on Jabin king of Canaan, until they destroyed him. Bana ya Isalaele bakomaki makasi koleka Yabini, mokonzi ya Kanana, kino babomaki ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]