Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Judges 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 On that day Deborah and Barak son of Abinoam sang this song: Na mokolo wana, Debora mpe Baraki, mwana mobali ya Abinoami, bayembaki nzembo oyo :
2 "When the leaders lead in Israel, when the people willingly offer themselves—praise our Father! Lokola na Isalaele, bakonzi batambolaki liboso, mpe bato bamipesaki mobimba na bitumba, tika ete bokumisa Yawe !
3 Hear, O kings! Listen, O princes! I, even I, will sing to our Father; I will make music to our Father, the God of Israel. Bino bakonzi, boyoka ! Bino bakambi, boyoka malamu ! Nalingi koyembela Yawe, nalingi koyemba nzembo mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele.
4 Our Father, when you went out from Seir, when you marched from the land of Edom, the earth trembled, the heavens poured, the clouds poured down water. Eh Yawe, tango obimaki na Seiri, tango ozalaki kotambola wuta na mokili ya Edomi, mabele eninganaki, likolo enyangwanaki, mapata esopaki mayi.
5 The mountains quaked before our Father, the One of Sinai, before our Father, the God of Israel. Bangomba eninganaki liboso ya Yawe, mpe ngomba Sinai, liboso ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
6 In the days of Shamgar son of Anath, in the days of Jael, the highways were deserted, and travelers kept to the winding paths. Na mikolo ya Shamagari, mwana mobali ya Anati ; mpe na mikolo ya Yaeli, nzela etikalaki lisusu na bato te, bato ya mobembo batambolaki na nzela ya nyoka-nyoka.
7 Village life in Israel ceased, it ceased—until I, Deborah, arose, arose a mother in Israel. Bamboka nyonso ya mike-mike ya Isalaele etikalaki lisusu na bato te, ezalaki lisusu na bato te kino ngai Debora natelemaki, kino natelemaki lokola mama kati na Isalaele.
8 They chose new gods; then war came to the gates. Not a shield or spear was seen among 40,000 in Israel. Tango baponaki banzambe ya sika, bitumba mpe ekomaki na bikuke ya engumba, kasi ata nguba moko te to likonga moko te emonanaki kati na basoda nkoto tuku minei kati na Isalaele.
9 My heart goes out to the commanders of Israel who offered themselves willingly among the people—praise our Father! Motema na ngai ezali elongo na bakambi ya Isalaele, elongo na ba-oyo bamipesaki mobimba na bitumba. Bokumisa Yawe !
10 You who ride on white donkeys, you who sit on saddle blankets, and you who walk along the road—tell of it! Bino oyo bozali kotambola likolo ya ba-ane ya pembe, bino oyo bozali kovanda likolo ya batapi, bino oyo bozali kotambola na nzela, bokanisa !
11 Louder than the voice of those who divide the flocks at the watering places, there they recount the righteous acts of our Father, the righteous acts of his villagers in Israel. Then the people of our Father went down to the gates. Bokumisa mingongo ya bayembi, na bisika oyo batokaka mayi, pene ya bitima ya mayi ; kuna, mingongo ya bakaboli mayi ezali kosanzola misala ya bosembo ya Yawe, misala na Ye ya bosembo na bamboka mike nyonso ya Isalaele. Bato ya Yawe bakiti kino na bikuke ya engumba.
12 Awake, awake, Deborah! Awake, awake, break into song! Arise, Barak! Lead away your captives, son of Abinoam. Debora, lamuka ! Lamuka ! Lamuka, lamuka, yemba nzembo ya bitumba ! Eh Baraki, telema, zongisa bakangami na yo ; mwana mobali ya Abinoami !
13 Then the survivors came down to the nobles; the people of our Father came down to me against the mighty. Ndambo ya batikali bakiti epai ya balongi, bato ya Yawe bakiti mpo na ngai kati na bilombe ya bitumba.
14 From Ephraim came those whose roots were in Amalek, following you, Benjamin, with your kinsmen; from Machir the commanders came down, and from Zebulun those who carry the marshal's staff. Bato ya Amaleki bawutaki na Efrayimi. Sima na yo, Benjame akitaki elongo na mampinga. Bakonzi ya mampinga babimelaki na Makiri, mpe bato oyo basimbaka lingenda ya bokonzi babimelaki na Zabuloni.
15 The princes of Issachar were with Deborah; yes, Issachar was faithful to Barak, rushing into the valley at his heels. Among the districts of Reuben there was great searching of heart. Bakambi ya Isakari bazalaki elongo na Debora ; ndenge moko lokola Baraki, Isakari alandaki ye mbangu na makolo kino na lubwaku. Kasi kati na libota ya Ribeni, mitema etondaki mingi na makanisi.
16 Why did you stay among the sheepfolds to hear the whistling for the flocks? Among the districts of Reuben there was great searching of heart. Mpo na nini avandi kati na lopango ? Ezali mpo na kaka koyoka kolela ya bibwele ? Kati na libota ya Ribeni, bazali bobele kolekisa tango pamba na kokanisa.
17 Gilead stayed beyond the Jordan. And Dan, why did he linger by the ships? Asher sat still at the seashore, settling by his harbors. Galadi atikali na ngambo mosusu ya Yordani. Mpo na nini Dani azali kowumela kati na masuwa ? Aseri atikali pembeni ya ebale, avandi pembeni ya libongo na ye.
18 Zebulun was a people who risked their very lives; so was Naphtali, on the heights of the field. Bato ya Zabuloni bateki milimo na bango na kufa, bato ya Nefitali, na basonge ya bangomba, kuna na esika ya bitumba.
19 Kings came and fought; then the kings of Canaan fought at Taanach, by the waters of Megiddo, but they carried off no silver, no plunder. Bakonzi oyo bazali banguna bayaki mpe babundisaki biso ; bakonzi ya Kanana babundisaki biso na mboka Taanaki, pene ya mayi ya Megido, kasi bamemaki te bomengo ya bitumba, ata palata.
20 From the heavens the stars fought; from their courses they fought against Sisera. Wuta na likolo, minzoto ebundaki ; na nzela na yango oyo etambolaka, minzoto ebundisaki Sisera.
21 The river Kishon swept them away, the ancient river, the river Kishon. March on, my soul, in strength! Mayi moke ya Kishoni ememaki bango, mayi moke ya tango ya kala, mayi moke ya Kishoni. Tika ete molimo na ngai etambola na nguya !
22 Then the horses' hooves thundered—the galloping, galloping of his mighty steeds. Makolo ya bampunda enyataki mabele, na kopumbwa na mbangu makasi, na kolanda bankolo na yango, bato na nguya.
23 Curse Meroz," said the messenger of our Father, "bitterly curse its people, because they did not come to help him, to help our Father against the mighty." Bolakela mboka ya Merozi mabe, elobi anjelu ya Yawe. Bolakela, bolakela mabe bato oyo bavandi kuna ! Pamba te bayei te kosunga Yawe ; bayei te kosunga bilombe ya bitumba !
24 Most blessed of women be Jael, the wife of Heber the Kenite, most blessed of women in the tent. Tika ete Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni, apambolama kati na basi nyonso ! Tika ete apambolama kati na basi nyonso oyo bazali kovanda na se ya ndako ya kapo.
25 He asked for water, and she gave him milk; in a bowl fit for nobles she brought him curds. Sisera asengaki mayi, kasi ye apesaki miliki ; kati na kopo ya bato ya lokumu, apesaki ye miliki ya kilo.
26 Her hand reached for the tent peg, her right hand for the workman's hammer. She struck Sisera, she crushed his head, she shattered and pierced his temple. Na loboko na ye ya mwasi, azwaki pike ya nzete ; mpe na loboko na ye ya mobali, marto ya basali. Abetaki Sisera mpe apanzaki ye moto, atobolaki ye litoyi mpe apanzaki yango nyonso.
27 At her feet he sank, he fell, he lay still; at her feet he sank, he fell. Where he sank, there he fell—dead. Sisera akweyaki na makolo na ye, alembaki ; akweyaki na makolo na ye mpe akufaki.
28 Through the window peered Sisera's mother; behind the lattice she cried out, "Why is his chariot so long in coming? Why is the clatter of his chariots delayed?" Mama ya Sisera abandaki kotala na lininisa, na sima ya bibende, mpe abandaki koganga : « Mpo na nini shar na ye ezali kowumela boye ? Mpo na nini bashar na ye ezali koya malembe ? »
29 Her wisest ladies answer her—indeed, she keeps repeating to herself. Moko kati na basi ya mayele mpe ya lokumu ayanoli ye, mpe ye moko amilobeli :
30 "Are they not finding and dividing the spoil?—a girl or two for every man, plunder of dyed cloth for Sisera, plunder of dyed cloth richly embroidered, two pieces of embroidered cloth for the neck of the plunderer?" « Ezali te mpo bazwi mpe bakaboli bomengo ya bitumba : Elenge mwasi moko to bilenge basi mibale mpo na soda moko, bilamba ya langi mpo na Sisera, bilamba, bilamba ya langi, mpe bilamba oyo batia bililingi, mpo na balongi ? »
31 So may all your enemies perish, our Father! But may those who love you be like the sun rising in its strength. Then the land had peace for forty years. Yawe, tika ete banguna na Yo nyonso bakufa bongo ! Tika ete bato oyo balingaka Yo bangenga makasi lokola moyi ya midi ! Mokili ezalaki na kimia mibu tuku minei.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]