Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Judges 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Israel did evil in our Father's sight, and our Father gave them into Midian's hand seven years. Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe liboso ya Yawe, mpe Yawe akabaki bango mibu sambo na maboko ya bato ya Madiani.
2 Midian's hand overpowered Israel, so the Israelites made themselves dens in the mountains, caves, and strongholds. Lokola loboko ya bato ya Madiani ezalaki na nguya makasi likolo ya Isalaele, bana ya Isalaele babongisaki mabulu ya kokimela mpe bibombelo kati na mabanga, kuna na likolo ya bangomba.
3 Whenever Israel planted crops, Midian, Amalek, and the eastern peoples came up against them. Tango nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kolona bilanga na bango, bato ya Madiani, bato ya Amaleki mpe bato ya bikolo mosusu ya ngambo ya este, bazalaki koya kobundisa Isalaele.
4 They camped against them, destroyed the land's crops to Gaza, leaving Israel no food—no sheep, ox, or donkey. Bazalaki kotonga milako na bango pene ya bana ya Isalaele, mpe bazalaki kobebisa bilanga na bango, kino pene ya Gaza. Bazalaki kotikela bana ya Isalaele ata eloko moko te ya kolia, ata meme to ntaba te, ata ngombe te, ata mpe ane te.
5 They came up with livestock and tents, swarming like locusts; they and their camels were countless, and they invaded the land to destroy it. Bazalaki komata ebele lokola mabanki elongo na bibwele na bango mpe bandako na bango ya kapo. Ezalaki pasi mpo na kotanga motango ya bato mpe ya bashamo na bango ; bazalaki kokota na mokili ya Isalaele mpo na kobebisa yango nyonso.
6 So Israel was brought very low because of Midian, and the Israelites cried out to our Father. Bato ya Madiani bakomisaki bana ya Isalaele babola makasi. Boye, bana ya Isalaele bagangaki epai na Yawe mpo ete asunga bango.
7 When the people of Israel cried out to our Father on account of Midian, Tango bana ya Isalaele babelelaki Yawe mpo ete akangola bango wuta na maboko ya bato ya Madiani,
8 our Father sent a prophet to Israel, saying, "This is what our Father, the God of Israel, says: I brought you up from Egypt, out of the house of slavery. Yawe atindelaki bango mosakoli oyo alobaki na bango : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ngai nde nabimisaki bino na Ejipito, ndako ya bowumbu.
9 I rescued you from Egypt and from all your oppressors; I drove them out before you and gave you their land. Nakangolaki bino wuta na maboko ya bato ya Ejipito mpe na maboko ya bato nyonso oyo banyokolaki bino ; nabenganaki bango liboso na bino mpe napesaki bino mokili na bango.
10 I told you: I am your Father; don't fear the Amorite gods in whose land you live. But you haven't obeyed my voice." Nalobaki na bino : Nazali Yawe, Nzambe na bino ; bogumbamela nzambe ya bato ya Amori te, kati na mokili oyo bozali kovanda. Kasi boyokelaki Ngai te. › »
11 The messenger of our Father came and sat under the oak at Ophrah belonging to Joash the Abiezrite, while his son Gideon threshed wheat in the winepress to hide it from Midian. Anjelu ya Yawe ayaki mpe avandaki na se ya terebente oyo ezalaki na Ofira, kati na mabele ya Joasi, moto ya libota ya Abiezeri. Jedeon, mwana mobali ya Joasi, azalaki kosangisa bambuma ya ble esika moko, na esika oyo basalaka masanga ya vino, mpo na kobomba yango liboso ya bato ya Madiani.
12 The messenger of our Father appeared to him and said, "Our Father is with you, mighty warrior." Anjelu ya Yawe abimelaki Jedeon mpe alobaki na ye : — Yawe azali elongo na yo, elombe ya bitumba.
13 Gideon said to him, "Please, my lord, if our Father is with us, why has all this happened? Where are all his wonders our ancestors told of, saying, 'Didn't he bring us up from Egypt?' But now our Father has abandoned us, handing us to Midian." Jedeon azongisaki : — Ah nkolo, soki Yawe azali elongo na biso, mpo na nini makambo nyonso oyo ezali kokomela biso ? Wapi makambo nyonso ya kokamwa oyo bakoko na biso bazalaki koyebisa biso tango bazalaki koloba ete Yawe abimisaki biso na Ejipito ? Sik’oyo, Yawe atiki biso mpe asundoli biso na maboko ya bato ya Madiani.
14 Our Father turned to him: "Go in this strength of yours and save Israel from Midian's hand. Have I not sent you?" Yawe abalukaki epai na ye mpe alobaki : — Kende, salela makasi oyo ozali na yango mpe bikisa bana ya Isalaele na maboko ya bato ya Madiani. Boni, ezali Ngai te nde natindi yo ?
15 He said, "Please, my Sovereign Father, how can I save Israel? My clan is weakest in Manasseh, and I'm least in my father's house." Jedeon azongisaki : — Ah nkolo na ngai, ndenge nini ngai nakoki kobikisa bana ya Isalaele ? Kati na Manase, libota na ngai nde ezangi makasi koleka, mpe ngai nazali mwana ya suka kati na ndako ya tata na ngai.
16 Our Father told him, "But I will be with you, and you will strike down Midian as one man." Yawe alobaki na ye : — Nakozala elongo na yo, mpe okoboma bato ya Madiani lokola moto moko.
17 Gideon said, "If I have found favor with you, give me a sign it is really you speaking with me. Jedeon alobaki : — Solo, soki nazwi ngolu na miso na Yo, pesa ngai elembo oyo ekolakisa solo ete Yo Yawe nde ozali kosolola na ngai.
18 Please don't leave until I return and bring my offering to set before you." He said, "I'll stay till you return." Nabondeli Yo, kolongwa na esika oyo te kino nakozonga awa na likabo na ngai mpo ete nabonza yango liboso na Yo. Yawe alobaki : — Nakozela kino okozonga.
19 Gideon went in, prepared a young goat and bread without yeast from about twenty quarts of flour, put the meat in a basket and the broth in a pot, brought them to him under the oak, and offered them. Jedeon azongaki epai na ye, abongisaki mwana ntaba, azwaki kilo tuku misato ya farine, asalaki na yango mapa oyo ezanga levire, atiaki mapa yango na kitunga, mpe atiaki elubu na nzungu. Amemaki yango mpe apesaki nyonso epai na Anjelu na Nzambe, oyo azalaki na se ya terebente.
20 The messenger of our Father told him, "Take the meat and bread without yeast, set them on this rock, and pour out the broth." He did. Anjelu na Nzambe alobaki na ye : — Kamata nyama mpe mapa oyo ezanga levire, tia yango na likolo ya libanga oyo mpe sopela yango elubu. Jedeon asalaki yango.
21 The messenger of our Father reached out the staff tip in his hand and touched the meat and bread without yeast. Fire rose from the rock and consumed the meat and bread without yeast, and the messenger of our Father vanished from his sight. Bongo Anjelu ya Yawe asembolaki nzete oyo asimbaki na loboko na Ye, mpe songe na yango etutaki nyama mpe mapa oyo ezanga levire. Moto ebimaki wuta na libanga mpe ezikisaki nyama mpe mapa. Anjelu ya Yawe alimwaki na miso na ye.
22 Realizing it was our Father's messenger, Gideon said, "Alas, O Sovereign Father! For now I've seen your messenger face to face!" Tango Jedeon asosolaki ete Ye oyo azalaki elongo na ye azali Anjelu ya Yawe, agangaki : « Nkolo Yawe, mawa na ngai ! Pamba te namoni Anjelu ya Yawe, miso na miso. »
23 But our Father said, "Peace to you. Don't be afraid; you won't die." Kasi Yawe alobaki na ye : — Zala na kimia ! Kobanga te.
24 Gideon built an altar there to our Father, naming it "Our Father Is Peace." It still stands at Ophrah of the Abiezrites today. Bongo Jedeon atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abengaki yango « Yawe apesaka kimia. » Etumbelo yango ezali kino na mokolo ya lelo kati na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri.
25 That night our Father told him, "Take your father's bull, the second one seven years old, tear down your father's altar to Baal, and cut down the Asherah pole beside it. Na butu wana, Yawe alobaki na Jedeon : — Kamata ngombe ya mobali ya mibu sambo, na etonga ya bibwele ya tata na yo. Buka etumbelo ya nzambe Bala, oyo ezali ya tata na yo, mpe kata ekeko ya Ashera, oyo ezali pembeni na yango.
26 Then build a proper altar to me, your Father, on top of this stronghold. Take the second bull and offer it as a burnt offering on the wood of the Asherah pole you cut down." Tonga etumbelo ya malamu mpo na Yawe, Nzambe na yo, na songe ya ngomba oyo. Na sima, kamata ngombe ya mobali mpe bonza yango nyonso lokola mbeka ya kotumba, na moto ya koni ya ekeko ya Ashera, oyo okataki.
27 Gideon took ten servants and did as our Father told him. Too afraid of his family and the townsmen to act by day, he did it at night. Jedeon akamataki basali na ye zomi mpe asalaki ndenge Yawe alobaki na ye. Lokola azalaki kobanga libota na ye mpe bato ya engumba na ye, asalaki yango na butu, kasi na moyi te.
28 When the townsmen rose early, Baal's altar lay torn down, the Asherah pole beside it cut down, and the second bull offered on the newly built altar. Na tongo-tongo, tango bato ya engumba balamukaki, bamonaki ete etumbelo ya nzambe Bala epanzani, ekeko ya Ashera oyo ezalaki pembeni na yango ekatami ; mpe bamonaki lisusu ete babonzi ngombe ya mobali na likolo ya etumbelo oyo batongi sika.
29 They asked each other, "Who did this?" After searching and asking, they were told, "Gideon son of Joash did it." Balobanaki : « Nani asali makambo ya boye ? » Wana bazalaki kotuna mpo na koluka koyeba, bayebisaki bango ete ezali Jedeon, mwana mobali ya Joasi, moto asalaki bongo.
30 The townsmen told Joash, "Bring out your son to die; he tore down Baal's altar and cut the Asherah pole beside it." Bato ya engumba balobaki na Joasi : — Bimisa mwana na yo ya mobali. Asengeli kokufa. Pamba te ye moto apanzi etumbelo ya nzambe Bala mpe akati ekeko ya Ashera oyo ezalaki pembeni na yango.
31 Joash told the crowd against him, "Are you pleading Baal's case? Saving him? Whoever pleads for him dies by morning. If he's a god, let him defend himself, since someone tore down his altar." Kasi Joasi azongiselaki bango nyonso oyo batelemelaki ye : — Boni, bino nde bokolobela Bala ? Bino nde bokobundela ye ? Moto nyonso oyo akobundela ye akokufa liboso ete tongo etana. Soki ye Bala azali nzambe, tika ete amibundela ye moko mpo ete babuki etumbelo na ye.
32 That day Gideon was called Jerubbaal—"Let Baal contend against him"—because he tore down Baal's altar. Kobanda mokolo wana, mpo ete Jedeon apanzaki etumbelo ya Bala, bakomaki kobenga ye « Yerubali » oyo elingi koloba : Tika ete Bala amibundela ye moko.
33 All Midian, Amalek, and the eastern peoples joined forces, crossed over, and camped in the Valley of Jezreel. Na tango wana, bato ya Madiani, ya Amaleki mpe bato ya ngambo ya este basanganaki elongo, bakatisaki ngambo ya Yordani mpe batongaki molako na bango na lubwaku ya Jizireyeli.
34 Then the Spirit of our Father clothed Gideon, and he blew the trumpet, and the Abiezrites were called to follow him. Kasi Molimo na Yawe alataki Jedeon, mpe abetaki kelelo mpo na kobengisa bato ya libota ya Abiezeri na tina ete balanda ye.
35 He sent messengers throughout Manasseh, who also rallied behind him, and to Asher, Zebulun, and Naphtali, who came up to meet them. Jedeon atindaki bantoma na etuka nyonso ya Manase ; mpe bato ya Manase basanganaki mpo na kozala sima na ye. Atindaki lisusu bantoma na libota ya Aseri, ya Zabuloni mpe ya Nefitali mpo ete bamata mpe bakutana na ye.
36 Gideon said to our Father, "If you will save Israel by my hand, as you promised. Jedeon alobaki na Nzambe : « Soki okobikisa Isalaele na nzela ya maboko na ngai lokola olakaki ngai,
37 I'm putting a wool fleece on the threshing floor. If dew is only on the fleece while all the ground stays dry, I'll know you'll save Israel by my hand, as you said." nakotanda bapwale ya meme na esika oyo batutaka bambuma ya ble. Soki mamwe emonani kaka na likolo ya bapwale kasi mabele etikali ya kokawuka, wana nakoyeba ete okobikisa Isalaele na nzela ya loboko na ngai ndenge olobaki. »
38 So it was. Early next morning he squeezed the fleece and wrung dew from it—a bowl full of water. Mpe esalemaki bongo. Mokolo oyo elandaki, Jedeon alamukaki na tongo-tongo, akamolaki bapwale, ebimisaki mayi mpe etondisaki sani mobimba.
39 Then Gideon said to our Father, "Don't be angry; let me speak once more. Let me test with the fleece again: keep the fleece dry, and dew on all the ground." Boye, Jedeon ayebisaki Nzambe : « Kosilikela ngai te, pesa ngai nzela ete nasenga lisusu elembo moko. Ya mbala oyo, sala ete bapwale ezala ya kokawuka, kasi mabele epola na mamwe. »
40 That night our Father did so. Only the fleece was dry; dew covered all the ground. Nzambe asalelaki ye bongo, na butu yango : bapwale etikalaki ya kokawuka, kasi mabele ya pembeni epolaki na mamwe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]