Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Judges 7 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Jerubbaal (Gideon) and all his people rose early, camping at Harod's spring; Midian's camp lay north of them, at Moreh's hill in the valley. Na tongo-tongo, Yerubali, elingi koloba Jedeon, abimaki elongo na bato nyonso oyo balandaki ye mpe batongaki molako na bango pembeni ya etima ya mayi ya Arodi. Nzokande molako ya bato ya Madiani ezalaki na ngambo ya nor ya molako ya bana ya Isalaele, na lubwaku, pembeni ya ngomba moke ya More.
2 Our Father told Gideon, "You have too many people for me to hand Midian to them, or Israel will brag against me, 'My hand saved me.' Yawe alobaki na Jedeon : « Bato oyo ozali na bango baleki ebele mpo na ngai kokaba bato ya Madiani na maboko na bango, noki te Isalaele akozwa lolendo na koloba : ‹ Loboko na ngai moko nde ebikisi ngai. ›
3 Now announce to the people: 'Whoever is afraid and trembling, turn back and leave Mount Gilead.'" 22,000 turned back; 10,000 remained. Yango wana, loba na bato oyo : ‹ Tika ete moto nyonso oyo azali kolenga na kobanga azala mosika ya ngomba Galadi mpe azonga epai na ye. › » Boye, bato nkoto tuku mibale na mibale bazongaki epai na bango mpe nkoto zomi batikalaki.
4 Our Father told Gideon, "The people are still too many. Take them down to the water; I will sift them for you there. Whoever I say goes with you will go; whoever I say won't go with you won't go." Kasi Yawe alobaki na Jedeon : « Bato bazali kaka ebele. Kitisa bango nyonso na mayi, mpe kuna, nakomeka bango mpo na yo. Soki nalobi : ‹ Oyo akoki kokende na yo, ye nde asengeli kokende na yo. › Kasi soki nalobi : ‹ Oyo akoki te kokende na yo, ye asengeli te kokende na yo. › »
5 He brought the people down to the water, and our Father told Gideon, "Separate everyone who laps water with his tongue like a dog; do the same for everyone who kneels to drink." Boye, Jedeon akitisaki bato na mayi. Kuna, Yawe alobaki na ye : « Kabola bango : tia na ngambo moko, bato oyo bakomela mayi na nzela ya lolemo lokola mbwa ; mpe tia na ngambo mosusu, bato oyo bakofukama, mpo na komela mayi. »
6 300 men lapped, hand to mouth; all the rest knelt to drink water. Bato nkama misato bazwaki mayi na maboko na bango mpo na komema yango na minoko na bango mpe komela yango na nzela ya lolemo ; bato nyonso oyo batikali bafukamaki mpo na komela mayi.
7 Our Father told Gideon, "With the 300 men who lapped I'll save you and give Midian into your hand. Send everyone else home, each to his place." Yawe alobaki na Jedeon : « Nakobikisa bino na nzela ya bato nkama misato oyo bamelaki mayi na nzela ya lolemo lokola mbwa, mpe nakokaba bato ya Madiani na maboko na yo. Tika ete bato nyonso oyo batikali bazonga, moto na moto na esika na ye. »
8 The people took provisions and trumpets; Gideon sent the rest of Israel home, each to his tent, keeping the 300. Midian's camp lay below him in the valley. Boye mibali yango nkama misato bazwaki biloko ya kolia mpe bakelelo ya bato mosusu. Mpe Jedeon azongisaki na bandako na bango, bana ya Isalaele oyo batikalaki. Nzokande, molako ya bato ya Madiani ezalaki na lubwaku, na se ya molako ya bana ya Isalaele.
9 That night our Father told him, "Up, go down to the camp, for I've given it into your hand. Na butu wana, Yawe alobaki na Jedeon : « Telema, kita mpo na kobundisa molako ya bato ya Madiani, pamba te napesi yango na maboko na yo.
10 But if you are afraid to go down, go down to the camp with Purah your servant, Soki ozali kobanga kobunda, kita elongo na Pura, mosali na yo ya mobali,
11 "Hear what they say, then your hands will be strengthened, and you will go down into the camp." He went down with his servant Purah to the edge of the camp's armed troops. mpe yoka maloba oyo bazali koloba. Boye okozwa makasi ya kobundisa bango. » Jedeon akitaki elongo na Pura, mosali na ye ya mobali, kino na liboso ya molako ya bitumba.
12 Midianites, Amalekites, and all the eastern peoples lay in the valley like locusts; their camels were as countless as sand on the shore. Bato ya Madiani, ya Amaleki mpe ya ngambo ya este bazalaki ya kopanzana kati na lubwaku, ebele lokola mabanki. Bashamo na bango ezalaki ebele koleka zelo ya ebale.
13 When Gideon arrived, a man was telling his companion a dream. He said, "Listen, I had a dream: a round loaf of barley bread came tumbling into Midian's camp, struck the tent, and it fell—flipped upside down and flattened." Jedeon akomaki na molako ya banguna na bango na tango kaka mobali moko ya Madiani azalaki kobeta lisolo ya ndoto na ye epai ya moninga na ye : — Tala ndoto naloti : Namonaki lipa moko basala na bambuma ya orje ezali kobaluka kati na molako na biso mobimba, bongo lipa yango eyaki kotuta ndako ya kapo na makasi koleka. Ndako ya kapo ekweyaki mpe ebalukaki.
14 His companion answered, "This is only the sword of Gideon son of Joash, an Israelite. God gave Midian and the whole camp into his hand." Moninga na ye azongisaki : — Oyo ekoki kozala eloko mosusu te ! Ezali kaka mopanga ya Jedeon, mwana mobali ya Joasi, moto ya Isalaele. Solo, Nzambe akabi bato ya Madiani mpe molako mobimba na maboko na ye.
15 Gideon heard the dream and its meaning, worshiped, returned to Israel's camp, and said, "Get up, for our Father has given Midian's camp into your hands." Tango Jedeon ayokaki ndoto mpe ndimbola na yango, afukamelaki Nzambe mpe atondaki Ye. Azongaki na molako ya Isalaele mpe agangaki : « Botelema, Yawe akabi molako ya bato ya Madiani na maboko na biso. »
16 He split the 300 men into three companies, each with a trumpet, an empty jar, and a torch inside. Jedeon akabolaki basoda na ye nkama misato na biteni misato. Mpe apesaki na mobali moko na moko kelelo moko, mbeki moko oyo ezangi eloko na kati, singa ya mwinda mpe moto ya mbeki.
17 He told them, "Watch me; do as I do. When I reach the camp's edge, do as I do." Na sima, apesaki bango mitindo oyo : « Bino nyonso, botala esika ngai nazali mpe bolanda ndenge ngai nakosala tango nakokoma pembeni ya molako ya banguna na biso.
18 When I and all with me blow trumpets, blow yours around the whole camp, and shout: "For our Father and for Gideon!" Tango ngai mpe bato nyonso oyo bazali elongo na ngai tokobeta kelelo, bino nyonso, na zingazinga ya molako, bokobeta mpe bakelelo na bino mpe bokoganga : ‹ Mpo na Yawe mpe mpo na Jedeon. › »
19 Gideon and his one hundred men reached the camp's edge as the middle watch began, just after the guards changed. They blew trumpets and smashed the jars in their hands. Jedeon mpe mibali nkama moko oyo bazalaki na ye elongo, bakomaki pembeni ya molako, mwa tango moke liboso ete midi ya butu ekoka, wana bawutaki kotia bakengeli mosusu. Babetaki bakelelo mpe babukaki bambeki oyo ezalaki na maboko na bango.
20 The three companies blew their trumpets and smashed jars, torches in their left hands, trumpets in their right ready to blow, shouting, "A sword for our Father and for Gideon!" Biteni nyonso misato ya basoda babetaki bakelelo mpe babukaki bambeki. Na loboko na bango ya mwasi, basimbaki minda, mpe, na loboko ya mobali, bakelelo mpo na kobeta. Mpe bazalaki koganga : « Mopanga mpo na Yawe mpe mpo na Jedeon. »
21 Each man stayed in place around the camp while the whole army ran, shouted, and fled. Wana soda moko na moko ya Isalaele atelemaki na esika na ye zingazinga ya molako, banguna kati na molako bapotaki mbangu, bagangaki mpe bakimaki.
22 When the 300 trumpets sounded, our Father set each man's sword against his companion throughout the camp. The camp fled to Beth-shittah, toward Zererah, to Abel-meholah's border near Tabbath. Tango bakelelo nkama misato ebetaki lisusu, Yawe asalaki ete, kati na molako mobimba, moto na moto atuba moninga na ye mopanga ; mpe bango nyonso bakimaki kino na Beti-Shita, na ngambo ya Tserera, mpe kino na ngambo ya Abele-Meola pembeni ya Tabati.
23 Israelites from Naphtali, Asher, and all Manasseh were called out, and they pursued Midian. Bana ya Isalaele oyo bawutaki na Nefitali, na Aseri mpe na Manase basanganaki mpo na kobengana bato ya Madiani.
24 Gideon sent messengers through Ephraim's hill country: "Come down against Midian—seize the waters ahead of them, as far as Beth-barah and the Jordan." So all Ephraim's men gathered and seized the waters as far as Beth-barah and the Jordan. Jedeon atindaki bantoma kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi mpo na koloba : « Bokita mpo na kokutana na bato ya Madiani ; bokanga, liboso na bango, nzela ya mayi kino na Beti-Bara mpe na Yordani. » Bana nyonso ya libota ya Efrayimi bakitaki mpe bakangaki nzela ya mayi kino na Beti-Bara mpe na Yordani.
25 They captured Midian's two princes, Oreb and Zeeb. They killed Oreb at Oreb's rock and Zeeb at Zeeb's winepress. Then they pursued Midian and brought Oreb's and Zeeb's heads to Gideon across the Jordan. Bakangaki bakonzi mibale ya bato ya Madiani : Orebi mpe Zeebi. Babomaki Orebi na libanga monene ya Orebi, mpe Zeebi na esika oyo bakamolaka vino ya Zeebi. Balandaki bato ya Madiani mpe bamemelaki Jedeon mito ya Orebi mpe ya Zeebi, kuna na ngambo ya Yordani.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]