Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Judges 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then the men of Ephraim said, "Why treat us like this—not calling us when you went to fight Midian?" And they quarreled with him sharply. Mibali ya Efrayimi batunaki Jedeon : — Bizaleli ya boye elakisi nini epai na biso ? Mpo na nini obengaki biso te tango okendeki kobundisa bato ya Madiani ? Mpe basilikelaki ye makasi.
2 But he said to them, "What have I done now compared to you? Isn't Ephraim's gleaning better than Abiezer's grape harvest? Kasi Jedeon azongiselaki bango : — Nasali nini oyo ekokani na oyo bino bosala ? Boni, ndambo ya bambuma ya vino oyo etikalaki na sima mpo ete Efrayimi abuka yango ezali kitoko te koleka bambuma ya vino ya liboso ya Abiezeri ?
3 Our Father handed Midian's princes, Oreb and Zeeb, to you. What could I do compared to you?" At these words their anger against him faded. Nzambe akabaki bakonzi ya bato ya Madiani, Orebi mpe Zeebi, na maboko na bino. Eloko nini ya lokumu ngai nasali oyo ekokani na oyo bino bosala ? Liloba oyo ekitisaki kanda na bango.
4 Gideon reached the Jordan and crossed, he and his 300 men, exhausted but still pursuing. Jedeon elongo na basoda na ye nkama misato bakomaki na Yordani mpe bakatisaki yango. Atako balembaki, bakobaki kaka kolanda bato ya Madiani.
5 He said to the men of Succoth, "Please give bread to my troops; they are worn out, and I am chasing Zebah and Zalmunna, the kings of Midian." Tango bakomaki na mboka Sukoti, Jedeon asengaki na bato ya mboka : — Bopesa basoda na ngai mapa, pamba te basili kolemba na nzala. Nazali kolanda Zeba mpe Tsalimuna, bakonzi ya Madiani.
6 But the officials of Succoth said, "Do you already hold Zebah and Zalmunna, that we should give bread to your army?" Kasi bakonzi ya mboka Sukoti bazongiselaki ye : — Boni, osili kozwa Zeba mpe Tsalimuna na se ya bokonzi na yo mpo ete biso topesa basoda na yo mapa ?
7 So Gideon said, "When our Father hands Zebah and Zalmunna to me, I'll thresh your flesh with wilderness thorns and thornbushes." Jedeon alobaki : — Lokola bolobi boye, tango Yawe akokaba, na maboko na ngai, Zeba mpe Tsalimuna, nakopasola-pasola misuni na bino na basende ya esobe mpe na singa ya nzube.
8 From there he went up to Penuel and spoke to them the same, and Penuel's men answered him as Succoth's men had. Wuta kuna, Jedeon amataki na mboka Penueli mpe asengaki epai ya bavandi na yango, ndenge kaka asengaki epai ya bato ya Sukoti. Kasi bato ya Penueli bazongiselaki ye ndenge kaka bato ya Sukoti basalaki.
9 So he said to the men of Penuel too, "When I return safely, I will tear down this tower." Jedeon alobaki na bato ya Penueli : « Soki nakozonga na kimia mpe na bomoi, nakobuka ndako molayi na bino. »
10 Zebah and Zalmunna were in Karkor with their armies—about 15,000, all who remained of the entire army of the eastern peoples; 120,000 swordsmen had fallen. Nzokande, Zeba mpe Tsalimuna bazalaki na Karikori elongo na basoda na bango, nkoto zomi na mitano. Oyo ezali nde motango nyonso ya basoda ya bato ya este oyo batikalaki. Pamba te basoda nkoto nkama moko na tuku mibale oyo bayebi kobunda na mopanga bakufaki.
11 Gideon went up the tent dwellers' route east of Nobah and Jogbehah and attacked the army while the army felt secure. Bongo, Jedeon akendeki na nzela ya bavandi ya bandako ya kapo, na ngambo ya este ya Noba mpe ya Yogibeka ; abetaki mampinga ya banguna na mopanga mpe alongaki bango tango bazalaki kokanisa ete bazali na kimia.
12 Zebah and Zalmunna fled; he chased them, captured the two Midian kings, Zebah and Zalmunna, and panicked the whole army. Zeba mpe Tsalimuna, bakonzi mibale ya Madiani, bakimaki ; kasi Jedeon alandaki mpe akangaki bango. Mpe apanzaki mampinga na bango nyonso.
13 Then Gideon son of Joash returned from the battle by the Pass of Heres. Jedeon, mwana mobali ya Joasi, azongaki wuta na bitumba na nzela ya ngomba Eresi.
14 He caught a young man of Succoth and questioned him; the man wrote down for him the names of Succoth's officials and elders—seventy-seven men. Akangaki elenge mobali moko kati na mibali ya mboka Sukoti, mpe atunaki ye mituna. Boye, elenge mobali yango akomelaki ye bakombo ya bakambi mpe ya bampaka tuku sambo na sambo ya engumba.
15 He came to the men of Succoth and said, "Here are Zebah and Zalmunna, about whom you mocked me: 'Are Zebah and Zalmunna's hands already in your grasp, that we should give bread to your tired men?'" Jedeon akendeki epai ya bato ya mboka Sukoti mpe alobaki na bango : « Tala Zeba mpe Tsalimuna oyo bofingelaki ngai na koloba : ‹ Osili kotia na se ya bokonzi na yo Zeba mpe Tsalumuna mpo ete biso topesa lipa na basoda na yo, oyo basili kolemba ? › »
16 He took the city's elders and, with desert thorns and thornbushes, taught the men of Succoth a lesson. Azwaki bampaka ya engumba Sukoti mpe abetisaki bango fimbu, na basende ya esobe mpe singa ya nzube.
17 He also tore down the tower of Penuel and killed the men of the city. Abukaki ndako molayi ya Penueli mpe abomaki mibali ya engumba.
18 He asked Zebah and Zalmunna, "What were the men you killed at Tabor like?" They said, "Like you—each resembling a king's son." Jedeon atunaki Zeba mpe Tsalimuna : — Mibali oyo bobomaki na Tabori, bazalaki ndenge nini ? Bazongisaki : — Bakokanaki na yo mpe bazalaki lokola bana ya bakonzi.
19 He said, "They were my brothers, my own mother's sons. As our Father lives, had you spared them, I would not kill you." Jedeon alobaki na bango lisusu : — Bato wana bazalaki bandeko na ngai ya mibali, bana ya mama na ngai penza. Na Kombo na Yawe, soki bobikisaki bango, ngai mpe nalingaki koboma bino te.
20 He said to Jether, his firstborn, "Get up, kill them!" But the boy did not draw his sword; he was afraid, still only a boy. Mpe apesaki mitindo na Yeteri, mwana na ye ya liboso ya mobali : « Telema mpe boma bango ! » Kasi elenge mobali abimisaki mopanga na ye te, pamba te azalaki nanu elenge mpe azalaki na somo.
21 Zebah and Zalmunna said, "Get up yourself and strike us down, for as the man is, so is his strength." So Gideon arose and killed Zebah and Zalmunna, and took the crescent ornaments on their camels' necks. Zeba mpe Tsalimuna balobaki : « Telema mpe boma biso yo moko, pamba te likambo oyo ekoki na bato ya mitema makasi. » Boye, Jedeon atelemaki mpe abomaki bango. Akamataki bamedayi ya wolo oyo ezalaki na bakingo ya bashamo na bango.
22 Then the men of Israel said to Gideon, "Rule over us—you, your son, and your grandson—for you saved us from Midian's hand." Bana ya Isalaele balobaki na Jedeon : — Zala mokonzi na biso, yo moko, mwana na yo ya mobali mpe koko na yo ya mobali, pamba te obikisi biso na loboko ya bato ya Madiani.
23 Gideon told them, "I will not rule over you, nor will my son; our Father will rule over you." Kasi Jedeon alobaki na bango : — Nakozala mokonzi na bino te, ezala ata mwana na ngai ya mobali. Yawe nde akozala mokonzi na bino.
24 Gideon said to them, "I have one request: each of you give me an earring from his plunder." (The enemy had gold earrings, because they were Ishmaelites.). Jedeon abakisaki : — Nalingi kosenga bino eloko moko : Kati na biloko oyo bino bosili kozwa na bitumba, tika ete moko na moko kati na bino apesa ngai eloko ya litoyi. Pamba te banguna na biso bazalaki kolata biloko ya matoyi mpo ete bazali bana ya Isimaeli.
25 They said, "We'll gladly give them." They spread out a cloak, and each man threw on it an earring from his plunder. Bana ya Isalaele bazongisaki : — Tokopesa yango. Batandaki elamba na mabele, moko na moko abwakaki eloko na ye ya litoyi, oyo ewutaki na bomengo ya bitumba.
26 The gold earrings he requested weighed about forty-two and a half pounds of gold, apart from the crescent ornaments, pendants, and purple garments worn by Midian's kings, and the chains on their camels' necks. Biloko ya matoyi ya wolo, oyo Jedeon asengaki ezalaki ya bakilo pene tuku mibale, longola bamedayi ya wolo oyo ezalaki lokola sanza ya ndambo, biloko ya matoyi oyo ediembelaka, bilamba ya talo ya motane makasi oyo bakonzi ya Madiani balataki mpe mayaka oyo ezalaki na bakingo ya bashamo na bango.
27 Gideon made an ephod from it and set it up in his city, Ophrah, and all Israel prostituted themselves to it there, becoming a snare to Gideon and his household. Jedeon asalelaki yango ekeko oyo atiaki na Ofira, engumba na ye. Bana ya Isalaele bakomaki kokende kofukama liboso ya ekeko yango, mpe ekomaki motambo monene mpo na Jedeon mpe libota na ye.
28 So Midian was subdued before the Israelites and lifted its head no more. The land had peace forty years in Gideon's days. Boye, bato ya Madiani bakitisamaki liboso ya bana ya Isalaele mpe batombolaki lisusu mito na bango te. Na tango nyonso oyo Jedeon azalaki na bomoi, mokili etikalaki na kimia mibu tuku minei.
29 Then Jerubbaal son of Joash went and lived in his own house. Yerubali, mwana mobali ya Joasi, azongaki na ndako na ye mpe avandaki kuna.
30 Now Gideon had seventy sons, his own offspring, for he had many wives. Jedeon azalaki na bana tuku sambo oyo bawutaki na mokongo na ye, pamba te azalaki na basi ebele.
31 His concubine who was in Shechem also bore him a son, and he named him Abimelech. Makangu na ye, oyo azalaki kovanda na Sishemi, abotelaki ye mpe mwana mobali oyo bapesaki kombo « Abimeleki. »
32 Gideon son of Joash died at a good old age, buried in his father Joash's tomb at Ophrah of the Abiezrites. Jedeon, mwana mobali ya Joasi, akufaki na kimobange ya esengo, mpe bakundaki ye kati na kunda ya Joasi, na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri.
33 When Gideon died, the Israelites again prostituted themselves to the Baals and made Baal-berith their god. Sima na kufa ya Jedeon, bana ya Isalaele bazongelaki kosambela banzambe Bala. Bakomisaki Bala-Beriti nzambe na bango.
34 The people of Israel did not remember our Father, who rescued them from all their enemies around them. Bana ya Isalaele babosanaki Yawe, Nzambe na bango, oyo akangolaki bango na maboko ya banguna na bango.
35 Nor did they show kindness to the household of Jerubbaal (Gideon) for all the good he had done for Israel. Bazongisaki ata bolamu moko te na libota ya Yerubali oyo elakisi Jedeon, mpo na bolamu nyonso oyo asalelaki Isalaele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]