Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Judges 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Abimelech son of Jerubbaal went to Shechem, to his mother's brothers, and said to them and to all his mother's father's clan. Abimeleki, mwana mobali ya Yerubali, akendeki na Sishemi epai ya banoko na ye mpe na ndako mobimba ya tata ya mama na ye. Alobaki :
2 Ask all Shechem's citizens: 'Which is better—seventy men, all Jerubbaal's sons, ruling you, or one man ruling you?' Remember, I am your own flesh and blood. « Botuna nanu motuna oyo epai ya bakambi nyonso ya engumba Sishemi : ‹ Eloko nini eleki malamu mpo na bino ? Bakamba bino na bana mibali tuku sambo ya Yerubali to na mwana mobali moko ? › Boyeba ete ngai mpe bino tozali makila moko mpe nzoto moko. »
3 His mother's brothers repeated all this to the citizens of Shechem, and their hearts turned to Abimelech, for they said, "He is our brother." Tango banoko na ye balobaki maloba nyonso ya Abimeleki epai ya bakambi nyonso ya Sishemi, mitema na bango nyonso ekendeki epai ya Abimeleki, pamba te balobaki ete azali ndeko na bango ya mobali.
4 They gave him seventy pieces of silver from the temple of Baal-berith, and with it Abimelech hired worthless, reckless men who followed him. Bapesaki ye mbongo ya bibende ya palata, tuku sambo oyo bazwaki na tempelo ya Bala-Beriti. Na mbongo yango, Abimeleki afutaki bato ya mobulu mpo na kolanda ye.
5 Then at his father's house in Ophrah he killed his brothers, Jerubbaal's seventy sons, on one stone. But Jotham, Jerubbaal's youngest son, survived by hiding. Akendeki na Ofira, na ndako ya tata na ye, mpe abomaki bandeko na ye ya mibali tuku sambo, bana ya Yerubali na likolo ya libanga moko ya monene. Kasi Yotami, mwana mobali ya suka ya Yerubali, abikaki mpo ete amibombaki.
6 All the citizens of Shechem and all Beth-millo gathered, went, and made Abimelech king by the oak of the pillar at Shechem. Bakambi nyonso ya Sishemi mpe ndako nyonso ya Milo basanganaki mpo na kokende kokomisa Abimeleki mokonzi, pembeni ya terebente, na likonzi ya mabanga kati na Sishemi.
7 When Jotham was told, he went and stood atop Mount Gerizim, raised his voice, and called out: "Listen to me, citizens of Shechem, that our Father may listen to you. Tango bayebisaki makambo yango epai ya Yotami, amataki likolo ya ngomba Garizimi mpe agangaki makasi : « Bino bakambi ya Sishemi, boyoka ngai, mpo ete Nzambe ayoka bino.
8 One day the trees went out to anoint a king over themselves. They said to the olive tree, 'Reign over us.' Mokolo moko, banzete ebimaki mpo na kokomisa moko kati na yango mokonzi. Elobaki na nzete ya Olive : ‹ Zala mokonzi na biso. ›
9 But the olive tree answered them, 'Should I give up my oil, by which both our Father and people are honored, to go and sway over the trees?' Nzete ya Olive ezongiselaki yango : ‹ Natika penza mafuta na ngai, oyo bapesaka na yango Nzambe mpe bato lokumu, mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu ? ›
10 Then the trees said to the fig tree, 'You come and reign over us.' Banzete elobaki na nzete ya figi : ‹ Yaka mpe zala mokonzi na biso. ›
11 But the fig tree answered them, 'Should I give up my sweetness and my good fruit, to go and sway over the trees?' Nzete ya figi ezongiselaki yango : ‹ Natika penza elengi na ngai mpe mbuma na ngai ya kitoko mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu ? ›
12 Then the trees said to the vine, 'You come and reign over us.' Banzete elobaki na nzete ya vino : ‹ Yaka mpe zala mokonzi na biso. ›
13 But the vine answered them, 'Should I give up my new wine, which cheers both our Father and people, to go and sway over the trees?' Kasi nzete ya vino ezongiselaki yango : ‹ Natika penza vino na ngai, oyo esepelisaka banzambe mpe bato mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu ? ›
14 Then all the trees said to the bramble, 'You come and reign over us.' Sima, banzete nyonso elobaki na nzete ya nzube : ‹ Yaka mpe zala mokonzi na biso. ›
15 And the bramble said to the trees, 'If you really mean to anoint me king over you, then come and take refuge in my shade; but if not, let fire come out of the bramble and devour the cedars of Lebanon.' Nzete ya nzube ezongiselaki yango : ‹ Soki bolingi penza kopakola ngai mafuta mpo ete nazala mokonzi na bino, boya kobombama na se ya pio na ngai. Soki bongo te, tika ete moto ebima na nzete ya nzube mpe ezikisa banzete ya sedele ya Libani ! ›
16 Now if you acted honestly and with integrity in making Abimelech king, and if you dealt well with Jerubbaal and his house, repaying him as his deeds deserved, Soki penza bosaleli na bosembo mpe na bosolo, wana bokomisi Abimeleki mokonzi ; soki bozalaki na motema malamu liboso ya Yerubali mpe libota na ye, soki bosalelaki ye kolanda misala malamu oyo ye asalelaki bino,
17 my father fought for you, risked his life to rescue you from Midian's hand, bobosana te ete tata na ngai abundelaki bino, andimaki ata kokufa mpo na kokangola bino wuta na loboko ya Madiani.
18 but today you rose against my father's house, killed his sons, seventy men on one stone, and made Abimelech, son of his slave woman, king over Shechem's citizens because he's your brother, Kasi na mokolo ya lelo, botombokeli libota ya tata na ngai, bobomi bana na ye ya mibali tuku sambo, na libanga moko, mpe botie Abimeleki, mwana mobali ya mwasi mowumbu na ye, mokonzi ya bato ya Sishemi, pamba te azali ndeko na bino ya mobali.
19 if you have acted in good faith and integrity toward Jerubbaal and his house today, then rejoice in Abimelech, and let him rejoice in you too. Soki bosaleli na bosembo mpe bosolo liboso ya Yerubali mpe libota na ye, na mokolo ya lelo, tika ete Abimeleki asepela na bino, mpe bino bosepela na ye !
20 But if not, let fire come from Abimelech and devour Shechem's citizens and Beth-millo, and fire from Shechem's citizens and from Beth-millo and devour Abimelech." Kasi soki ezali bongo te, tika ete moto ebima wuta na Abimeleki mpe etumba bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo ; mpe tika ete moto ebima wuta na bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo, mpe etumba Abimeleki ! »
21 Jotham fled and escaped, going to Beer, where he lived, away from his brother Abimelech. Yotami abimaki, akendeki na Beri mpe avandaki kuna, pamba te azalaki kobanga Abimeleki, ndeko na ye ya mobali.
22 After Abimelech had ruled over Israel three years, Sima, Abimeleki akambaki Isalaele mibu misato.
23 our Father sent an evil spirit between Abimelech and Shechem's citizens, and they dealt treacherously with Abimelech. Nzambe atindaki molimo mabe kati na Abimeleki mpe bavandi ya Sishemi, mpe bavandi ya Sishemi basalelaki Abimeleki likita.
24 So that the violence to Jerubbaal's seventy sons would be repaid, their blood placed on their brother Abimelech, who killed them, and on Shechem's citizens, who strengthened his hands to kill his brothers. Nzambe asalaki bongo mpo na kozongisa mabe na mabe na oyo basalaki tango babomaki bana mibali tuku sambo ya Yerubali, mpo ete makila na bango etangama na moto ya ndeko na bango ya mobali, Abimeleki, mpe na mito ya bato ya Sishemi oyo basungaki ye mpo na koboma bandeko na ye ya mibali.
25 The citizens of Shechem set ambushers against him on the hilltops, and they robbed everyone passing by on the road. And Abimelech was told. Bavandi ya Sishemi batielaki Abimeleki motambo na likolo ya bangomba : batiaki bato na esika ya kobombama mpo na kobotola biloko epai ya baleki nzela nyonso oyo bazalaki koleka pene na bango. Mpe bamemelaki Abimeleki sango yango.
26 Gaal son of Ebed came with his brothers and moved into Shechem, and its citizens trusted him. Nzokande Gali, mwana mobali ya Ebedi, akendeki na Sishemi, elongo na bandeko na ye ya mibali ; mpe bato ya Sishemi batielaki ye motema.
27 They went to the fields, picked grapes from their vineyards, trod them, and held a festival in their god's temple, where they ate, drank, and cursed Abimelech. Na tango ya kobuka bambuma ya vino, bato ya Sishemi bakendeki na bilanga, bakamolaki vino mpe basalaki feti monene kati na tempelo ya nzambe na bango. Wana bazalaki kolia mpe komela, balakelaki Abimeleki mabe.
28 Gaal son of Ebed said, "Who is Abimelech, and who is Shechem, that we should serve him? Isn't he Jerubbaal's son, and isn't Zebul his deputy? Serve the men of Hamor, Shechem's father! Why should we serve Abimelech? Bongo Gali, mwana mobali ya Ebedi, alobaki : « Abimeleki nde nani liboso ya Sishemi mpo ete biso bato ya Sishemi tosalela ye ? Boni, azali mwana mobali ya Yerubali te ? Zebuli azali molobeli na ye te ? Bosalela bato ya Amori, tata ya Sishemi ! Kasi mpo na nini tosalela Abimeleki ?
29 If only this people were mine to command! Then I'd remove Abimelech; I'd say to him, 'Call out your whole army!'" Oh soki kaka nazalaki kokamba bato oyo, mbele nalingaki kobengana Abimeleki, mpe nalingaki koloba na ye : ‹ Bakisa lisusu makasi ya mampinga na yo, mpe yaka tobunda. › »
30 When Zebul the city's ruler heard the words of Gaal son of Ebed, his anger flared. Tango Zebuli, moyangeli ya engumba, ayokaki makambo oyo Gali, mwana mobali ya Ebedi, alobaki, asilikaki makasi.
31 He secretly sent messengers to Abimelech: "Gaal son of Ebed and his brothers have come to Shechem and are turning the city against you. Atindaki bantoma na nkuku epai ya Abimeleki mpo na koloba na ye : « Gali, mwana mobali ya Ebedi, mpe bandeko na ye ya mibali bayaki na Sishemi, mpe bazali kotindika bato ya engumba mpo ete batombokela yo.
32 Now rise by night, you and the people with you, and lie in wait in the field. Sik’oyo telema, na butu, yo elongo na bato na yo ; bokende kovanda kati na elanga, na esika ya kobombama.
33 In the morning at sunrise, get up early and raid the city. When Gaal and his men come out against you, do to them whatever your hand finds." Bongo, na tongo-tongo, wana moyi ezali kobima, okokende mpe okobundisa engumba. Tango Gali elongo na bato na ye nyonso bakobima mpo na kokutana na yo, sala nyonso oyo loboko na yo ekoki kosala. »
34 So Abimelech and all his people set out at night and lay in wait against Shechem in four companies. Na butu, Abimeleki elongo na mampinga na ye nyonso batelemaki, bakabwanaki na biteni minei mpe bakendeki kovanda kati na esika ya kobombama, pene ya Sishemi.
35 Gaal son of Ebed went out and stood at the city gate entrance; Abimelech and the people with him rose from ambush. Tango Gali, mwana mobali ya Ebedi, abimaki mpe atelemaki na ekuke ya engumba, Abimeleki elongo na basoda na ye babimaki na esika oyo babombamaki.
36 Gaal saw the people and told Zebul, "Look, people coming down from the hilltops!" Zebul said, "You're seeing mountain shadows as men." Tango Gali amonaki bato, alobaki na Zebuli : — Tala, bato bazali kokita wuta na likolo na bangomba. Kasi Zebuli alobaki na ye : — Oyo ozali komona lokola bato, ezali nde bililingi ya bangomba.
37 Gaal spoke again, "Look, people coming down from the center of the land, and one company from the direction of the Diviners' Oak." Kasi Gali alobaki lisusu : — Tala, bato bazali kokita elongo na basoda wuta na likolo ya ngomba ya kati-kati ya engumba, mpe bamosusu bazali koya na nzela ya terebente ya bamoni makambo.
38 Then Zebul said to him, "Where's your big talk now—you who said, 'Who is Abimelech, that we should serve him?' Aren't these the people you despised? Go out and fight them!" Zebuli alobaki na Gali : — Sik’oyo, tia lisusu monoko ! Mpe loba lisusu : « Abimeleki nde nani mpo ete tosalela ye ? » Ezali te bato oyo yo otiolaki ? Kende sik’oyo kobunda !
39 So Gaal went out at the head of the citizens of Shechem and fought Abimelech. Boye, Gali amemaki bavandi ya Sishemi mpe abundisaki Abimeleki.
40 But Abimelech chased him, Gaal fled before him, and many fell wounded up to the gate's entrance. Abimeleki alandaki Gali, mpe Gali akimaki liboso ya Abimeleki, mpe bato ebele penza bakufaki kino na ekotelo ya ekuke.
41 Abimelech stayed in Arumah, and Zebul drove Gaal and his brothers out of Shechem, so they could not live there. Abimeleki avandaki na Aruma, mpe Zebuli abenganaki Gali elongo na bandeko na ye ya mibali mpo ete bavanda lisusu te na Sishemi.
42 The next day the people went out into the fields, and Abimelech was told. Mokolo oyo elandaki, bato ya Sishemi babimaki mpe bakendeki na bilanga. Bato bamemaki sango epai ya Abimeleki.
43 He took his men, split them into three companies, and set an ambush in the fields. When he saw the people leaving the city, he rose against them and struck them down. Abimeleki azwaki bato na ye mpe akabolaki bango na biteni misato ya basoda, mpe atiaki bango kati na bilanga, na esika ya kobombama. Tango amonaki bato kobima longwa na engumba, atelemaki mpo na kobundisa bango.
44 Abimelech and his companies rushed forward and took their stand at the city gate's entrance, while the other two companies rushed on all in the fields and struck them down. Nzokande, tango Abimeleki mpe masanga ya mampinga oyo bazalaki elongo na ye bakendeki na lombangu mpe batelemaki na ekuke ya engumba, masanga mibale mosusu ya mampinga balandaki bato kino na bilanga mpe babomaki bango nyonso.
45 Abimelech fought the city all that day, captured it, killed its people, tore down the city, and sowed it with salt. Abimeleki abundisaki engumba mokolo mobimba, abotolaki engumba yango mpe abomaki bato oyo bazalaki kuna. Bongo abebisaki engumba mpe asopelaki yango mungwa.
46 Hearing this, all the leaders of the Tower of Shechem entered the stronghold of the temple of El-berith. Tango bavandi nyonso ya ndako molayi ya Sishemi bayokaki makambo yango, bakendeki kobombama kati na libulu ya mabanga ya tempelo ya Beriti, nzambe na bango.
47 Abimelech was told that all the leaders of the Tower of Shechem had gathered there, Bamemelaki Abimeleki sango ete bavandi ya ndako molayi ya Sishemi basangani wana.
48 so he went up Mount Zalmon, he and all his people. He took an axe in his hand, cut a branch of brushwood, lifted it, set it on his shoulder, and said to his people, "Hurry, do what you saw me do!" Abimeleki elongo na bato na ye nyonso bamataki na ngomba Tsalimoni. Abimeleki azwaki epasola mpe akataki mwa bitape ya nzete, amemaki yango na mapeka na ye mpe alobaki na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye : « Oyo bomoni ngai kosala, bino mpe bosala bongo na lombangu. »
49 So everyone cut branches, followed Abimelech, piled them against the stronghold, and set it burning over those inside. The people of Shechem's Tower died too—about 1,000 men and women. Boye bato nyonso bakataki, moto na moto etape na ye ya nzete. Balandaki Abimeleki, batiaki bitape ya nzete na libulu ya mabanga mpe batumbaki libulu yango ya mabanga elongo na bato nyonso oyo bazalaki kati na yango. Boye bato nyonso ya ndako molayi ya Sishemi bakufaki : bato pene nkoto moko, mibali mpe basi.
50 Then Abimelech went to Thebez, camped against it, and captured it. Sima na yango, Abimeleki akendeki na Tebesi, azingelaki mpe abotolaki yango.
51 A strong tower stood inside the city, and all the men and women—all the city's leaders—fled to it, shut themselves in, and climbed to the tower's roof. Nzokande, ezalaki na ndako moko ya molayi mpe ya makasi kati na engumba. Bavandi nyonso, mibali mpe basi, bakimelaki kuna ; bakangaki ekuke sima na bango mpe bamataki na likolo ya ndako yango.
52 Abimelech reached the tower, attacked it, and neared its door to burn it. Abimeleki ayaki kino na ndako molayi mpo na kobundisa yango, mpe apusanaki kino na ekuke ya ndako yango mpo na kotumba yango.
53 But a woman dropped an upper millstone on Abimelech's head and crushed his skull. Na tango yango, mwasi moko abwakaki libanga oyo banikelaka ble na moto ya Abimeleki mpe epanzaki ye moto.
54 He quickly called his armor-bearer and said, "Draw your sword and kill me, so they can't say of me, 'A woman killed him.'" So the young man ran him through, and he died. Abimeleki abengaki na lombangu elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye mpe alobaki na ye : « Bimisa mopanga na yo mpe boma ngai mpo baloba te na tina na ngai : ‹ Mwasi moko abomaki ye. › » Boye, elenge mobali atobolaki ye mopanga mpe akufaki.
55 When the men of Israel saw that Abimelech was dead, they all went home. Tango bana ya Isalaele bamonaki ete Abimeleki akufi, bazongaki moto na moto epai na ye.
56 This is how our Father repaid the evil Abimelech did to his father by killing his seventy brothers. Boye, Nzambe azongiselaki Abimeleki mabe oyo asalaki tata na ye tango abomaki bandeko na ye ya mibali tuku sambo.
57 Our Father returned all the evil of Shechem's men on their own heads, and Jotham son of Jerubbaal's curse came on them. Nzambe azongiselaki bato ya Sishemi mabe nyonso oyo basalaki. Ezali ndenge wana nde elakeli mabe oyo Yotami, mwana mobali ya Yerubali, asakolaki ekokisamaki.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]