Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Judges 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 After Abimelech, Tola son of Puah, son of Dodo, a man of Issachar, rose to save Israel; he lived in Shamir in Ephraim's hills. Sima na kufa ya Abimeleki, ezalaki Tola, mwana mobali ya Puwa, mwana mobali ya Dodo, moto ya Isakari, nde atelemaki mpo na kobikisa Isalaele. Azalaki kovanda na Shamiri, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi.
2 He led Israel as judge for twenty-three years; then he died and was buried in Shamir. Akambaki Isalaele mibu tuku mibale na misato ; sima na yango, akufaki, mpe bakundaki ye na Shamiri.
3 After him rose Jair the Gileadite, who led Israel as judge for twenty-two years. Yairi, moto ya Galadi, akitanaki na Tola mpe akambaki Isalaele mibu tuku mibale na mibale.
4 He had thirty sons riding thirty donkeys, with thirty towns in Gilead, called Havvoth-jair to this day. Azalaki na bana mibali tuku misato oyo bazalaki kotambola likolo ya ba-ane, mpe bazalaki na bamboka tuku misato kati na Galadi. Kino na mokolo ya lelo, babengaka yango « Bamboka ya Yairi. »
5 When Jair died, he was buried in Kamon. Yairi akufaki, mpe bakundaki ye na Kamone.
6 Again the Israelites did evil in our Father's eyes, serving the Baals, the Ashtoreths, the gods of Aram, the gods of Sidon, the gods of Moab, the gods of the Ammonites, and the gods of the Philistines. They abandoned our Father and no longer served him. Bana ya Isalaele basalaki lisusu makambo mabe na miso ya Yawe ; basalelaki banzambe Bala, Asitarite, mpe banzambe ya Siri, ya Sidoni, ya Moabi, ya Amoni mpe ya Filisitia. Basundolaki Yawe mpe basalelaki Ye lisusu te.
7 So our Father's anger burned against Israel, and he sold them to the Philistines and the Ammonites. Boye, kanda ya Yawe epelaki likolo ya Isalaele, mpe Yawe akabaki bango na maboko ya bato ya Filisitia mpe ya bato ya Amoni.
8 That year they shattered and crushed the Israelites—for eighteen years they oppressed all the Israelites beyond the Jordan in the Amorites' land, in Gilead. Mibu zomi na mwambe, banyokolaki bana nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kovanda na ngambo mosusu ya Yordani, mokili ya bato ya Amori, kati na Galadi.
9 The Ammonites also crossed the Jordan to fight Judah, Benjamin, and Ephraim's house, so Israel was in deep distress. Bato ya Amoni mpe bakatisaki na ngambo ya Yordani mpo na kobundisa libota ya Yuda, ya Benjame mpe ya Efrayimi. Boye, Isalaele akomaki na pasi mingi.
10 Then the Israelites cried to our Father: "We have sinned against you, abandoning our Father to serve the Baals." Bana ya Isalaele bagangaki epai ya Yawe : — Tosalaki masumu na miso na Yo, pamba te tosundolaki Yo, Nzambe na biso, mpe tosalelaki banzambe Bala.
11 And our Father said to the Israelites, "Did I not save you from the Egyptians, the Amorites, the Ammonites, and the Philistines? Yawe azongiselaki bana ya Isalaele : — Boni, nabikisaki bino te na maboko ya bato ya Ejipito, ya Amori, ya Amoni mpe ya Filisitia ?
12 The Sidonians, Amalekites, and Maonites oppressed you; you cried to me, and I saved you from their hand. Tango bato ya Sidoni, ya Amaleki mpe ya Maoni banyokolaki bino, boni, bogangaki epai na Ngai te mpo na kosenga lisungi ? Boni, nakangolaki bino te wuta na maboko na bango ?
13 Yet you have forsaken me and served other gods; therefore I will save you no more. Kasi bino, bosundolaki Ngai mpe bosalelaki banzambe mosusu. Yango wana, nakokangola bino lisusu te.
14 Go cry out to the gods you chose; let them save you when you're in trouble." Bokende koganga epai ya banzambe oyo boponaki mpo ete ebikisa bino awa bozali kati na pasi.
15 The Israelites said to our Father, "We have sinned. Do to us whatever you think best; only please rescue us today." Kasi bana ya Isalaele balobaki na Yawe : — Ya solo, tosalaki lisumu na miso na Yo. Oyo omoni ete ezali malamu na miso na Yo, sala yango na biso ; kasi tobondeli Yo : bikisa biso lisusu sik’oyo !
16 They put away the foreign gods and served our Father, and his heart could bear Israel's misery no longer. Bongo bana ya Isalaele balongolaki banzambe ya bapaya kati na bango mpe basalelaki Yawe. Mpe Yawe akokaki lisusu te kotala pasi na bango.
17 The Ammonites mustered and camped in Gilead; the Israelites gathered and camped at Mizpah. Tango bato ya Amoni basanganaki mpe batiaki molako na bango kati na Galadi, bana ya Isalaele basanganaki mpe batiaki molako na bango kati na Mitsipa.
18 The people, the leaders of Gilead, said to one another, "Whoever begins fighting the Ammonites will be head over all Gilead's people." Bato mpe bakonzi ya Galadi balobanaki : « Moto oyo akobundisa liboso bana ya Amoni akozala mokonzi ya bato nyonso ya Galadi. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]