Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Judges 11 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Jephthah the Gileadite was a mighty warrior, but the son of a prostitute. Gilead was his father. Jefite, moto ya Galadi, azalaki elombe ya bitumba. Azalaki mwana mobali oyo Galadi abotaki na mwasi ya makangu.
2 Gilead's wife also bore him sons. When grown, they drove Jephthah out, saying, "You won't inherit in our father's house—you're another woman's son." Nzokande mwasi ya Galadi abotelaki ye mpe bana mibali. Mpe tango bakolaki, babenganaki Jefite ; balobaki na ye : « Ozali na libula te kati na ndako ya tata na biso, pamba te ozali mwana ya makangu. »
3 Jephthah fled his brothers and lived in the land of Tob, where scoundrels gathered to him and went out with him. Boye, Jefite akimaki mosika ya bandeko na ye ya mibali mpe akomaki kovanda kati na etuka ya Tobi. Bato ya mobulu basanganaki na ye mpe bazalaki kotambola elongo na ye.
4 Some time later, the Ammonites made war against Israel. Sima na mwa tango, bato ya Amoni babundisaki Isalaele.
5 When Ammon fought Israel, Gilead's elders went to bring Jephthah from the land of Tob. Wana bato ya Amoni bazalaki kobundisa bana ya Isalaele, bampaka ya Galadi bakendeki koluka Jefite, kati na Tobi.
6 They said to Jephthah, "Come, be our commander, so that we can fight against the Ammonites." Balobaki na Jefite : — Yaka, mpe zala mokambi na biso mpo ete tobundisa bato ya Amoni.
7 Jephthah told Gilead's elders, "Didn't you hate me and drive me from my father's house? Why come to me now, when you're in trouble?" Jefite azongiselaki bampaka ya Galadi : — Boni, ezali bino te bato oyo boyinaki ngai mpe bobenganaki ngai wuta na ndako ya tata na ngai ? Mpo na nini bozali koya sik’oyo epai na ngai, awa bokomi na pasi ?
8 Gilead's elders replied, "That's why we've returned to you now: come fight the Ammonites with us, and you will be our head over all who live in Gilead." Bampaka ya Galadi balobaki lisusu na Jefite : — Soki tozongi sik’oyo epai na yo, ezali mpo ete oya elongo na biso, obundisa bato ya Amoni mpe okoma mokonzi na biso, mokonzi ya bavandi nyonso ya Galadi.
9 Jephthah told Gilead's elders, "If you bring me back to fight the Ammonites and our Father gives them to me, I'll be your head." Jefite azongiselaki bampaka ya Galadi : — Soki bozongisi ngai mpo na kobundisa bato ya Amoni, bongo Yawe akabi bango na maboko na ngai, boni, nakozala solo mokonzi na bino ?
10 Gilead's elders told Jephthah, "Our Father is witness between us if we don't do just as you say." Bampaka ya Galadi bazongiselaki Jefite : — Tika ete Yawe azala Motatoli kati na biso ! Tika ete apesa biso etumbu soki tosali te ndenge olobi.
11 Jephthah went with Gilead's elders, and the people made him their head and commander. He spoke all his words before our Father at Mizpah. Boye Jefite akendeki nzela moko na bampaka ya Galadi, mpe bato ya Galadi bakomisaki ye mokambi mpe mokonzi ya mampinga. Mpe Jefite azongelaki koloba maloba na ye nyonso liboso ya Yawe, kati na Mitsipa.
12 Then Jephthah sent messengers to the Ammonite king: "What is between us, that you came to fight against my land?" Bongo Jefite atindaki bantoma epai ya mokonzi ya bato ya Amoni mpo na koloba na ye : — Ozwi biso na likambo nini mpo ete oya kobundisa mboka na biso ?
13 The Ammonite king told Jephthah's messengers, "Since Israel took my land from Arnon to Jabbok and the Jordan when they came from Egypt, now return it peacefully." Mokonzi ya bato ya Amoni azongiselaki bantoma ya Jefite : — Ezali mpo ete Isalaele abotolaki mokili na ngai tango abimaki na Ejipito ; babotolaki mokili yango longwa na lubwaku ya Arinoni, mayi moke ya Yaboki kino na lubwaku ya Yordani. Sik’oyo, zongisela ngai yango na kimia.
14 Jephthah again sent messengers to the king of the Ammonites, Jefite atindaki lisusu bantoma epai ya mokonzi ya bato ya Amoni mpo na koloba na ye :
15 and told him, "Jephthah says: Israel took no land from Moab or Ammon. — Tala maloba oyo Jefite alobi : « Bana ya Isalaele bazwaki mokili ya Moabi te to mokili ya bato ya Amoni te.
16 When Israel came up from Egypt, they crossed the wilderness to the Red Sea and reached Kadesh. Kasi tango bana ya Isalaele babimaki na Ejipito, batambolaki na esobe kino na ebale monene ya Barozo, mpe bakomaki na Kadeshi.
17 Israel sent messengers to Edom's king: "Please let us pass through your land," but he wouldn't listen. They also sent to Moab's king, but he refused. So Israel stayed at Kadesh. Batindaki bantoma epai ya mokonzi ya Edomi, mpo na koloba na ye : ‹ Pesa biso nzela ya koleka na mokili na yo. › Kasi mokonzi ya Edomi aboyaki koyoka. Bana ya Isalaele batindaki lisusu bantoma epai ya mokonzi ya Moabi, kasi ye mpe aboyaki. Boye, bana ya Isalaele bawumelaki na Kadeshi.
18 They went through the wilderness, around Edom and Moab, arriving east of Moab. They camped across the Arnon without entering Moab's territory, since the Arnon marked its border. Na sima, batambolaki na esobe mpe babalukaki na sima ya mokili ya Edomi mpe ya Moabi, balekaki na ngambo ya este ya mokili ya Moabi mpe batongaki milako na bango kuna, na ngambo mosusu ya lubwaku ya Arinoni. Kasi bakotaki te na mokili ya Moabi.
19 Then Israel sent messengers to Sihon king of the Amorites, king of Heshbon: "Let us cross your land to reach our place." Bongo bana ya Isalaele batindaki bantoma epai ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni mpo na koloba na ye : ‹ Tika biso toleka na mokili na yo mpo ete tokende na esika na biso. ›
20 But Sihon would not trust Israel to pass through his territory; he gathered all his people, camped at Jahaz, and fought against Israel. Kasi Sikoni andimaki te bana ya Isalaele mpo ete baleka na mokili na ye. Boye asangisaki bato na ye nyonso ; batongaki milako, na Yakatsi, mpe babundisaki Isalaele.
21 Then our Father, the God of Israel, gave Sihon and all his people into Israel's hand; they defeated them and took all the Amorite land there. Kasi Yawe, Nzambe ya Isalaele, akabaki Sikoni mpe bato na ye nyonso na maboko ya bana ya Isalaele, mpe balongaki bango. Boye bana ya Isalaele babotolaki mokili nyonso ya bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na etando wana.
22 They took all Amorite land, from Arnon to Jabbok, and from the wilderness to the Jordan. Babotolaki etuka nyonso ya bato ya Amori, longwa na lubwaku ya Arinoni kino na mayi moke ya Yaboki, longwa na esobe kino na Yordani.
23 Now our Father, Israel's God, drove out the Amorites before his people Israel—should you possess it? Awa Yawe, Nzambe ya Isalaele, asili kobotola mokili ya bato ya Amori mpe apesi yango epai ya bana ya Isalaele, yo olingi sik’oyo kobotola bango yango ?
24 Won't you possess what Chemosh your god gives you? So we'll possess all our Father has driven out before us. Boni, okozwa te oyo Kemoshi, nzambe na yo, apesi yo ? Biso tokozwa oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso.
25 Are you better than Balak son of Zippor, Moab's king? Did he ever contend with Israel or fight them? Boni, ozali malamu koleka Balaki, mwana mobali ya Tsipori, mokonzi ya Moabi ? Boni, asila koswanisa to kobundisa bana ya Isalaele ?
26 For 300 years Israel lived in Heshbon and its villages, Aroer and its villages, and all towns along the Arnon. Why didn't you recover them then? Mibu nkama misato, bana ya Isalaele bavandaki na Eshiboni, na Aroeri, na bamboka na yango ya mike mpe na bingumba nyonso oyo ezali pembeni ya Arinoni. Mpo na nini bobotolaki yango te na tango wana ?
27 I haven't wronged you, but you wrong me by warring against me. May our Father, the Judge, judge today between Israel's sons and Ammon's sons." Ngai nasali yo mabe te, kasi yo nde ozali kosala ngai mabe na kobundisa ngai. Tika ete Yawe, Mosambisi, akata lelo likambo kati na bana ya Isalaele mpe bato ya Amoni. »
28 But the king of the Ammonites paid no attention to the message Jephthah sent him. Kasi mokonzi ya Amoni aboyaki koyoka maloba oyo Jefite atindelaki ye.
29 Then the Spirit of our Father came on Jephthah. He passed through Gilead and Manasseh, passed through Mizpah of Gilead, and from Mizpah of Gilead he advanced against the Ammonites. Molimo na Yawe akitelaki Jefite. Jefite akatisaki Galadi mpe Manase, mpe alekaki na Mitsipe ya Galadi. Wuta na Mitsipe ya Galadi, akendeki kobundisa bato ya Amoni.
30 And Jephthah made a vow to our Father: "If you give the Ammonites into my hand, Jefite alapaki ndayi epai na Yawe, alobaki : « Soki okabi bato ya Amoni na maboko na ngai,
31 whatever comes out my house's doors to meet me returning safely from the Ammonites will be our Father's, and I'll offer it as a burnt offering." nakobonzela Yo, Yawe, lokola mbeka ya kotumba, nyonso oyo ekobima na ekuke ya ndako na ngai mpo na koyamba ngai, tango nakozonga na elonga wuta na bato ya Amoni. »
32 Jephthah crossed to the Ammonites to fight them, and our Father gave them into his hand. Bongo Jefite akatisaki bandelo ya bato ya Amoni, mpe Yawe akabaki bango na maboko na ye.
33 He defeated them from Aroer to near Minnith—twenty cities—and to Abel-keramim, a very great defeat. Ammon was subdued before Israel. Abebisaki bingumba tuku mibale oyo ezali na kati-kati ya Aroeri mpe Miniti kino na Abele-Keramimi. Ezalaki kobebisama ya makasi mpo na bato ya Amoni oyo bakweyaki liboso ya bana ya Isalaele.
34 Jephthah came home to Mizpah; his daughter came out to meet him with tambourines and dancing—his only child, he had no other son or daughter. Tango Jefite azongaki na ndako na ye, na Mitsipa, mwana na ye ya mwasi abimaki mpo na koyamba ye ; azalaki kobina mpe kobeta mbonda ya moke. Azalaki mwana na ye kaka moko : azalaki na mwana mosusu te, ezala ya mwasi to ya mobali.
35 When he saw her, he tore his clothes and said, "Oh, my daughter, you've brought me low—you have become my trouble. I opened my mouth to our Father; I can't take it back." Tango kaka Jefite amonaki ye, apasolaki bilamba na ye mpe agangaki : — Ah, mwana na ngai ya mwasi ! Opesi ngai mawa mingi mpe otie ngai na mobulu, pamba te nalapaki ndayi epai na Yawe mpe nakoki lisusu kozonga sima te.
36 She said, "My father, you vowed to our Father—do to me as you promised, since our Father avenged you on your enemies, the Ammonites." Mwana na ye ya mwasi alobaki : — Tata na ngai, opesaki elaka epai na Yawe. Sala na ngai ndenge olakaki epai na Yawe, pamba te Yawe azongisi mabe na mabe epai ya banguna na yo, bato ya Amoni.
37 She said to her father, "Let this one thing be done for me: grant me two months to go down to the hills, weeping for my virginity, I and my companions." Abakisaki : — Pesa ngai nzela ete likambo oyo moko esalema mpo na ngai : Tikela ngai basanza mibale mpo ete nakende koyengayenga mpe kolela, elongo na baninga na ngai, bozangi na ngai koyeba nzoto ya mobali.
38 "Go," he said, and sent her away two months. She and her friends went and wept over her virginity on the hills. Jefite alobaki na ye : — Okoki na yo kokende. Mpe atikaki ye kokende mpo na basanza mibale. Boye mwana mwasi akendeki na ngomba elongo na baninga na ye ya basi, mpe alelaki mpo ete ayebaki nanu nzoto ya mibali te.
39 After two months she returned to her father, who fulfilled his vow on her. She had not known a man; a custom began in Israel, Sima na basanza mibale, azongaki epai ya tata na ye, Jefite ; mpe Jefite akokisaki epai ya mwana na ye ya mwasi, ndayi oyo alapaki. Nzokande, atikalaki kaka koyeba nzoto ya mobali te. Boye, ekoma momesano kati na Isalaele :
40 that each year Israel's daughters went out to commemorate Jephthah the Gileadite's daughter, four days a year. mibu nyonso, bilenge basi ya Isalaele babimaka mikolo minei, mpo na kosala feti na tina na mwana mwasi ya Jefite, moto ya Galadi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]