Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Judges 12 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The men of Ephraim gathered and crossed to Zaphon. They said to Jephthah, "Why did you cross to fight the Ammonites without calling us to go with you? We'll burn your house down over you!" Bato ya Efrayimi basanganaki, bakatisaki na ngambo ya Tsafoni mpe balobaki na Jefite : — Mpo na nini okatisaki mondelo ya bato ya Amoni mpo na kobundisa bango, bongo obengaki biso te mpo ete tokende na yo elongo ? Tokotumba yo elongo na ndako na yo !
2 Jephthah told them, "My people and I had a bitter dispute with the Ammonites; I called you, but you didn't rescue me from them. Jefite azongiselaki bango : — Ngai mpe bato na ngai, tozalaki na kobendana makasi na bato ya Amoni ; mpe tango nabengaki bino, bokangolaki ngai te wuta na maboko na bango.
3 When I saw you wouldn't save me, I took my life in my hand and crossed over against the Ammonites, and our Father gave them into my hand. Why have you come up to me today to fight me?" Tango namonaki ete bokangoli na bino ngai te, nakabaki bomoi na ngai, mpe nakatisaki ngai moko nzela ya bato ya Amoni mpo na kobundisa bango ; mpe Yawe apesaki ngai elonga likolo na bango. Sik’oyo, mpo na nini boyei lelo kobundisa ngai ?
4 So Jephthah gathered all Gilead's men and fought Ephraim. Gilead struck Ephraim down, because the Ephraimites had said, "You Gileadites are fugitives of Ephraim, among Ephraim, among Manasseh." Jefite asangisaki mibali nyonso ya Galadi, mpe babundisaki bato ya Efrayimi. Bato ya Galadi balongaki bato ya Efrayimi ; mpe bato ya Efrayimi balobaki : « Bino bato ya Galadi, bozali na bino kaka bato oyo bokimaki wuta na Efrayimi mpe na Manase. »
5 Gilead captured the Jordan fords against Ephraim. When an Ephraimite fugitive said, "Let me cross," the Gilead men asked, "Are you an Ephraimite?" If he said, "No," Bato ya Galadi bakangaki esika oyo bakatisaka Yordani na makolo, pene ya etuka ya Efrayimi. Mpe tango nyonso mokimi moko ya Efrayimi azalaki koloba : « Tika ngai nakatisa, » bato ya Galadi bazalaki kotuna ye : « Ozali moto ya Efrayimi ? » Soki azongisi : « Te, »
6 they said, "Say 'Shibboleth.'" He said "Sibboleth," unable to pronounce it right. So they seized him and killed him at the Jordan fords. At that time 42,000 Ephraimites fell. bazalaki kosenga ete aloba : « Shiboleti ; » soki alobi : « Siboleti, » mpo ete akoki te koloba yango malamu, bazalaki kokanga ye mpe koboma ye na esika oyo bakatisaka Yordani na makolo. Na tango wana, babomaki bato ya Efrayimi nkoto tuku minei na mibale.
7 Jephthah judged Israel six years. Then Jephthah the Gileadite died, buried in a town of Gilead. Jefite, moto ya Galadi, akambaki Isalaele mibu motoba. Sima na yango, akufaki, mpe bakundaki ye kati na engumba moko ya Galadi.
8 After him, Ibzan of Bethlehem judged Israel. Sima na Jefite, Ibitsani, moto ya Beteleemi, akambaki Isalaele.
9 He had thirty sons and thirty daughters. He sent his thirty daughters outside the clan to marry, and brought thirty daughters from outside for his sons. He judged Israel seven years. Azalaki na bana mibali tuku misato mpe bana basi tuku misato. Abalisaki bana na ye ya basi na libanda ya libota ya botata na ye, mpe ayeisaki bilenge basi tuku misato ya bikolo mosusu mpo na bana na ye ya mibali. Ibitsani akambaki Isalaele mibu sambo.
10 Then Ibzan died and was buried in Bethlehem. Ibitsani akufaki, mpe bakundaki ye kati na Beteleemi.
11 After him, Elon the Zebulunite judged Israel; he judged Israel ten years. Sima na Ibitsani, Eloni, moto ya libota ya Zabuloni, akambaki Isalaele mibu zomi.
12 Then Elon the Zebulunite died and was buried at Aijalon in the land of Zebulun. Eloni akufaki, mpe bakundaki ye kati na mboka Ayaloni, kati na etuka ya Zabuloni.
13 After him, Abdon son of Hillel, from Pirathon, judged Israel. Sima na Eloni, Abidoni, mwana mobali ya Ileli, moto ya mokili ya Piratoni, akambaki Isalaele.
14 He had forty sons and thirty grandsons, who rode on seventy donkeys. He judged Israel eight years. Azalaki na bana mibali tuku minei mpe bakoko ya mibali tuku misato oyo babandaki kotambola likolo ya ba-ane tuku sambo. Akambaki Isalaele mibu mwambe.
15 Abdon son of Hillel the Pirathonite died and was buried at Pirathon in Ephraim's land, in the Amalekite hill country. Abidoni, mwana mobali ya Ileli, akufaki, mpe bakundaki ye na Piratoni, kati na etuka ya Efrayimi, na mokili ya bangomba ya bato ya Amaleki.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]