Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Judges 13 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Again the Israelites did evil in our Father's eyes, so he gave them into the Philistines' hand for forty years. Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe, mpe Yawe akabaki bango mibu tuku minei na maboko ya bato ya Filisitia.
2 A man named Manoah, from Zorah of the Danite clan, had a barren wife who bore no children. Ezalaki na mobali moko, moto ya Tsorea, ya libota ya Dani, kombo na ye ezalaki Manoa ; mwasi na ye azalaki ekomba, mpe abotelaki ye bana te.
3 The messenger of our Father appeared to the woman and said to her, "You are barren, childless, but will conceive and bear a son. Anjelu na Yawe abimelaki mwasi ya Manoa mpe alobaki : « Tala, ozali ekomba mpe ozali na bana te, kasi okokoma na zemi mpe okobota mwana mobali.
4 Now then, be careful not to drink wine or strong drink, and do not eat anything unclean, Sik’oyo, sala keba ! Komela vino te to masanga mosusu ya makasi, mpe kolia te eloko nyonso ya mbindo ;
5 for you will conceive and bear a son. No razor will touch his head, for the boy will be our Father's Nazirite from the womb, and will begin to save Israel from the Philistines' hand." pamba te okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bakoki te kokata suki ya moto na ye, pamba te mwana mobali yango akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye. Akobanda kokangola Isalaele wuta na maboko ya bato ya Filisitia. »
6 The woman went and told her husband, "A man of God came to me; his appearance was like the appearance of the messenger of our Father, very awesome. I didn't ask him where he was from, and he didn't tell me his name." Tango mwasi azongaki epai ya mobali na ye, ayebisaki ye : « Moto moko ya Nzambe ayaki epai na ngai, azalaki lokola Anjelu na Nzambe : azalaki somo mingi. Natunaki ye te soki awuti wapi, mpe ayebisaki ngai te kombo na ye.
7 But he said to me, "You will conceive and bear a son. Now do not drink wine or strong drink, and eat nothing unclean, for the boy will be a Nazirite of our Father from the womb until the day of his death." Kasi alobaki na ngai : ‹ Okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bongo komela vino to masanga mosusu ya makasi te mpe kolia eloko moko te ya mbindo, pamba te mwana mobali oyo okobota akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye kino na mokolo na ye ya kufa. › »
8 Then Manoah pleaded with our Father: "Please, my Sovereign Father, let the man of God you sent come to us again and teach us what to do for the boy to be born." Bongo Manoa asambelaki Yawe : « Oh Nkolo, nabondeli Yo : tika ete ozongisa lisusu moto na Nzambe, oyo otindelaki biso, mpo ete aya lisusu koteya biso nini tosengeli kosala mpo na mwana mobali oyo akobotama ! »
9 Our Father heard Manoah's voice; the messenger of our Father came again to the woman sitting in the field, but Manoah her husband was not with her. Nzambe ayokaki Manoa, mpe Anjelu na Nzambe ayaki lisusu epai ya mwasi, wana avandaki na bilanga. Kasi mobali na ye, Manoa, azalaki elongo na ye te.
10 The woman ran quickly and told her husband, "Look, the man who came to me the other day has appeared to me!" Mwasi ya Manoa akendeki mbangu koyebisa mobali na ye : « Tala, namoni moto oyo abimelaki ngai na mikolo oyo eleki ! »
11 Manoah got up, followed his wife, and came to the man. He asked, "Are you the man who spoke to the woman?" "I am," he said. Manoa atelemaki mpe alandaki mwasi na ye. Tango akomaki epai ya moto yango, alobaki : — Boni, ezali yo nde osololaki na mwasi na ngai ? Azongisaki : — Iyo, ezali ngai.
12 Manoah said, "When your words come true, what will govern the boy's life and work?" Manoa atunaki ye : — Tango maloba na yo ekokokisama, mibeko nini tosengeli kotosa mpo na bomoi ya mwana ? Mpe ye mwana asengeli kosala nini ?
13 The messenger of our Father said to Manoah, "She must be careful of all I told her. Anjelu na Yawe azongiselaki Manoa : — Mwasi na yo asengeli kosala makambo nyonso oyo nayebisaki ye.
14 She must eat nothing from the grapevine, drink no wine or strong drink, and eat nothing unclean. She must keep all I commanded her." Akolia eloko moko te oyo ewuti na nzete ya vino, akomela vino te to masanga mosusu ya makasi, akolia eloko moko te ya mbindo ; asengeli kosala makambo nyonso oyo natindi ye.
15 Manoah said to our Father's messenger, "Please let us hold you, and we'll prepare a young goat for you." Manoa alobaki na Anjelu na Yawe : — Soki okoki kozela mwa moke, wana tozali kobongisela yo mwana ntaba.
16 The messenger of our Father told Manoah, "Even if you hold me, I won't eat your food; but if you prepare a burnt offering, offer it to our Father." (Manoah didn't know the visitor was our Father's messenger.). Anjelu na Nzambe azongiselaki Manoa : — Ata ozelisi ngai, nakolia ata eloko na yo moko te ; kasi soki obongisi mbeka ya kotumba, bonzela yango nde Yawe. Manoa asosolaki te ete oyo azali liboso na ye azali Anjelu na Yawe.
17 Manoah asked the messenger of our Father, "What is your name, so we may honor you when your words come true?" Manoa atunaki Anjelu na Yawe : — Kombo na yo nani mpo ete topesa yo lokumu tango elaka na yo ekokokisama ?
18 The messenger of our Father said to him, "Why ask my name? It's beyond understanding." Anjelu na Yawe azongiselaki ye : — Mpo na nini ozali kotuna ngai kombo na ngai ? Kombo na ngai ezali kombo ya kokamwa.
19 So Manoah took the young goat and grain offering and offered them on the rock to our Father, who does wonders, while Manoah and his wife watched. Boye Manoa azwaki mwana ntaba elongo na mbeka ya gato, abonzaki yango na likolo ya libanga, liboso ya Yawe. Wana Manoa mpe mwasi na ye bazalaki kotala, Yawe asalaki likambo moko ya kokamwa.
20 As the altar's flame rose toward heaven, the messenger of our Father rose in the altar's flame. Manoah and his wife saw and fell facedown to the ground. Ndenge moto ezalaki komata na likolo longwa na etumbelo, Anjelu na Yawe mpe amataki kati na moto. Tango bamonaki bongo, Manoa mpe mwasi na ye bakweyaki bilongi kino na mabele.
21 The messenger of our Father appeared no more to Manoah and his wife. Then Manoah knew he was the messenger of our Father. Tango Anjelu na Yawe alimwaki na miso ya Manoa mpe ya mwasi na ye, Manoa asosolaki ete ezalaki Anjelu ya Yawe.
22 "We will surely die," Manoah said to his wife, "for we have seen our Father!" Manoa alobaki na mwasi na ye : — Solo, tokufi na biso, pamba te tomoni Nzambe !
23 His wife told him, "If our Father meant to kill us, he would not have accepted a burnt offering and grain offering from our hands, shown us all this, or let us hear this now." Kasi mwasi na ye azongisaki : — Soki Yawe asepelaki koboma biso, akokaki kondima te mbeka ya kotumba mpe mbeka ya gato oyo esalemi na maboko na biso to kolakisa biso makambo oyo nyonso to mpe koyebisa biso sik’oyo makambo oyo.
24 The woman bore a son and named him Samson. The boy grew, and our Father blessed him. Mwasi ya Manoa abotaki mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Samison. » Mwana akolaki, mpe Yawe apambolaki ye.
25 And the Spirit of our Father began to stir him in Mahaneh-dan, between Zorah and Eshtaol. Molimo na Yawe abandaki kosalela ye tango azalaki na Maane Dani, na kati-kati ya Tsorea mpe Eshitaoli.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]