Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joshua 22 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Joshua summoned the Reubenites, the Gadites, and the half-tribe of Manasseh, Boye, Jozue abengisaki bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase ;
2 and said to them, "You have kept all Moses the servant of our Father commanded you, and obeyed my voice in all I commanded you. mpe alobaki na bango : « Bosili kosala makambo nyonso oyo Moyize, mowumbu na Yawe, atindaki bino, mpe botosaki ngai na makambo nyonso oyo natindaki bino.
3 You have not abandoned your brothers these many days, down to this day, but kept the duty of your Father's command. Pamba te wuta tango molayi kino na mokolo ya lelo, botikalaki kosundola bandeko na bino te, kasi bobatelaki malamu mokumba oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino.
4 Now your Father has given your brothers rest, as he promised. So turn back to your tents, in the land you possess, which Moses, servant of our Father, gave you across the Jordan. Lokola Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bandeko na bino bopemi, ndenge alakaki, bokoki sik’oyo kozonga na bandako na bino, kati na mokili oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, apesaki bino, na ngambo mosusu ya Yordani.
5 Only take great care to do the command and law Moses, servant of our Father, commanded you: love your Father, walk in all his ways, keep his commands, cling to him, and serve him with all your heart and all your soul." Kasi bosala keba ete bobatela mitindo mpe mobeko oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino : kolinga Yawe, Nzambe na bino ; kotambola na banzela na Ye nyonso, kotosa mitindo na Ye, kokangama na Ye, mpe kosalela Ye na motema mpe na molimo na bino mobimba. »
6 Then Joshua blessed them and sent them away, and they went to their tents. Jozue apambolaki bango mpe azongisaki bango. Boye, bazongaki na bandako na bango.
7 Moses had given the half-tribe of Manasseh a possession in Bashan; to the other half Joshua gave a possession with their brothers west of the Jordan. When Joshua sent them home to their tents, he blessed them. Moyize apesaki na ndambo moko ya libota ya Manase, eteni ya mabele kati na Bashani ; mpe Jozue apesaki na ndambo mosusu ya libota ya Manase elongo na bandeko na bango, eteni ya mabele, na ngambo ya weste ya Yordani. Tango Jozue azongisaki bango na bandako na bango, apambolaki mpe bango.
8 He told them, "Go home with great wealth—abundant livestock, silver, gold, bronze, iron, and many clothes. Share the plunder from your enemies with your brothers." Alobaki na bango : « Bozonga na bandako na bino na bozwi ebele, na bibwele ebele, na palata, na wolo, na bronze, na bibende, mpe na bilamba ebele. Bokabola elongo na bandeko na bino bomengo ya bitumba oyo bosili kozwa epai ya banguna na bino. »
9 Then Reuben, Gad, and the half-tribe of Manasseh turned back from the Israelites at Shiloh in Canaan, to Gilead, their own possession, settled there at the command of our Father through Moses. Boye bakitani ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase batikaki bana mosusu ya Isalaele, na Silo, kati na mokili ya Kanana mpo na kozonga na Galadi, mokili na bango moko, oyo basilaki kozwa, kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
10 Reaching the region of the Jordan in Canaan, the Reubenites, Gadites, and half-tribe of Manasseh built an altar there by the Jordan—an altar impressive in size. Tango bakomaki na Geliloti, pene ya Yordani, kati na mokili ya Kanana, bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase batongaki etumbelo moko ya monene penza na esika wana, pene ya Yordani.
11 The Israelites heard, "Look, Reubenites, Gadites, and the half-tribe of Manasseh have built an altar facing Canaan, in the region of the Jordan, on Israel's side." Mpe tango bana ya Isalaele bayokaki ete bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase batongi etumbelo na ngambo ya mokili ya Kanana, na Geliloti pene ya Yordani, na ngambo ya bana mosusu ya Isalaele,
12 When Israel's people heard, the whole assembly of Israel's people gathered at Shiloh to wage war against them. lisanga mobimba ya bana ya Isalaele esanganaki na Silo mpo na kobundisa bango.
13 The Israelites sent Phinehas son of Eleazar the priest to the Reubenites, Gadites, and half-tribe of Manasseh in Gilead, Boye bana mosusu ya Isalaele batindaki na mokili ya Galadi, Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
14 with him ten chiefs, one per ancestral house, from every tribe of Israel, each head of his ancestral house among Israel's clans. Batindaki elongo na ye bakambi zomi, lokola mokambi moko mpo na libota moko na moko ya bana ya Isalaele : moko na moko azalaki mokambi ya libota na ye kolanda mabota ya bana ya Isalaele.
15 They came to the Reubenites, Gadites, and half-tribe of Manasseh in the land of Gilead and said to them, Tango bakomaki na mokili ya Galadi, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase, balobaki na bango :
16 "The whole assembly of our Father asks: 'What treachery is this against our Father, the God of Israel—turning today from following him, building yourselves an altar today to rebel against him? — Tala liloba oyo lisanga mobimba ya Yawe elobi : « Ndenge nini bokoki penza kosala lisumu ya boye na miso ya Nzambe ya Isalaele ? Ndenge nini penza bokoki kopesa Yawe mokongo mpe komitongela etumbelo mpo na kotombokela Ye na mokolo ya lelo ?
17 Wasn't Peor's sin enough for us? We haven't made ourselves clean from it to this day, though a plague struck the congregation of our Father, Boni, lisumu ya Peori ekoki te mpo na biso ? Kutu, kino na mokolo ya lelo, nanu tosilisi kopetolama na yango te, atako etumbu ekweyelaki lisanga ya Yawe !
18 that you must turn away today from following our Father? If you rebel against him today, tomorrow he will be angry with all Israel's congregation. Mpe bino bopesi Yawe lelo mokongo ? Soki bino botombokeli Yawe lelo, lobi Ye nde akotombokela lisanga mobimba ya Isalaele.
19 But if the land of your possession is unclean, then cross over into the land of our Father's possession, where his tabernacle dwells, and take possession among us. Only do not rebel against our Father, and do not draw us into rebellion with you, by building yourselves an altar other than the altar of our Father. Soki mokili oyo bosili kozwa ezali mbindo, boleka na mokili ya Yawe, epai wapi Mongombo ya Yawe ezali mpe bokabola mabele elongo na biso. Kasi botombokela Yawe te, botombokela mpe biso te na komitongela etumbelo mosusu pene ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso.
20 Did Achan son of Zerah not act unfaithfully with the devoted things, bringing wrath on all Israel's community? He was not the only one who died for that guilt.'" Tango Akana, mwana mobali ya Zera, asalaki lisumu, na koyiba biloko ya bule, boni, etumbu yango ekweyaki te likolo ya lisanga mobimba ya Isalaele ? Akufaki kaka ye moko te likolo ya lisumu na ye. »
21 The Reubenites, Gadites, and half-tribe of Manasseh answered the heads of Israel's clans. Bakitani ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase bazongiselaki bakambi ya mabota ya Isalaele :
22 "The Mighty One, our Father! The Mighty One, our Father! He knows, and let Israel itself know! If in rebellion or in unfaithfulness against our Father, do not spare us today, — Nzambe ya banzambe ! Yawe ! Nzambe ya banzambe ! Yawe ! Ayebi nyonso ! Tika ete Isalaele ayeba mpe yango ! Soki tosali yango mpo na kotombokela Yawe to mpo na kosala lisumu na miso na Ye, tika ete abikisa biso te na mokolo ya lelo !
23 that we built our own altar to turn away from following our Father, or to offer on it burnt, grain, or peace offerings—may our Father himself call us to account! Soki tomitongeli etumbelo mpo na kopesa Yawe mokongo to mpo na kobonza mbeka ya kotumba mpe makabo ya mbuma na likolo na yango to mpe mpo na kobonza bambeka ya boyokani na likolo na yango, tika ete Yawe asambisa biso !
24 Rather, we did this from fear that someday your children might say to ours, 'What connection do you have with our Father, the God of Israel? Te, ezali bongo te ! Tosalaki bongo mpo na kobanga ete lobi bakitani na bino baloba na bakitani na biso : « Eloko nini ezali kosangisa bino na Yawe, Nzambe ya Isalaele ?
25 For our Father made the Jordan a border between us and you, Reubenites and Gadites—you have no share in him.' So your children might stop our children from revering our Father. Yawe atiaki ebale Yordani lokola mondelo kati na biso mpe bino ; bino bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi ! Bozali na libula moko te epai na Yawe ! » Boye, bakitani na bino bakoki kosala ete bakitani na biso batika kobanga Yawe.
26 Therefore we said, 'Let us build ourselves an altar, not for burnt offering and not for sacrifice, Yango wana tomilobelaki : « Tika ete tomitongela etumbelo oyo noki, kasi ezali te mpo na kobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu.
27 but a witness between us and you, and our generations after us, that we serve our Father before him with burnt offerings, sacrifices, and peace offerings—so your children won't tell ours someday, "You have no share in our Father."' Ezali nde lokola litatoli kati na biso mpe bino, mpe mpo na milongo oyo ekoya, ete tokosalela Yawe na nzela ya mbeka ya kotumba mpe na nzela ya mbeka ya boyokani, na Esika na Ye ya bule. Boye lobi, bakitani na bino bakoloba na bakitani na biso te : ‹ Bozali na libula te epai na Yawe ! › »
28 We thought: if they ever say this to us or our future generations, we'd answer, 'See the model of our Father's altar our ancestors made—not for burnt offering or sacrifice, but a witness between us and you.' Tomilobelaki : « Soki lobi bameki koloba na biso to na bakitani na biso bongo, tokozongisela bango : ‹ Botala elilingi ya etumbelo ya Yawe, oyo batata na biso batongaki ; basalaki yango te mpo na kobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu, kasi mpo ete ezala lokola litatoli kati na biso mpe bino. › »
29 We would never rebel against our Father or turn away from following him today by building an altar for burnt offerings, grain offerings, or sacrifices, apart from our Father's altar before his dwelling!" Tozali te na likanisi ya kotombokela Yawe to ya kopesa Ye lelo mokongo, na kotonga etumbelo mpo na kobonza mbeka ya kotumba, makabo ya mbuma mpe bambeka mosusu pembeni ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso, oyo ezali liboso ya Mongombo na Ye.
30 When Phinehas the priest, the leaders of the community, and the heads of Israel's clans who were with him heard what the Reubenites, Gadites, and Manassites said, they were pleased. Tango Nganga-Nzambe Pineasi, bakambi ya lisanga mpe bakambi ya mabota ya Isalaele bayokaki makambo oyo bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase balobaki, batondisamaki na esengo.
31 Phinehas son of Eleazar the priest said to the Reubenites, Gadites, and Manassites, "Today we know our Father is among us, since you haven't betrayed him this way. Now you've saved Israel's people from the hand of our Father." Mpe Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, alobaki na bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase : — Lelo, tososoli ete Yawe azali kati na biso, pamba te bosali likambo moko te ya mabe liboso ya Yawe. Sik’oyo bokangoli nde bana ya Isalaele wuta na loboko na Yawe.
32 Phinehas son of Eleazar the priest, and the leaders, left the Reubenites and Gadites in Gilead and returned to Canaan, to Israel, and reported back to them. Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, mpe bakambi ya bato nyonso ya Ribeni mpe ya Gadi balongwaki na Galadi epai wapi bazalaki na mayangani, bazongaki na Kanana epai ya bana ya Isalaele mpe bapesaki bango sango ya makambo oyo elekaki.
33 The report pleased the Israelites, and the Israelites blessed our Father and gave up going to war against them to destroy the land where the Reubenites and Gadites lived. Bana ya Isalaele batondisamaki na esengo na koyoka sango yango mpe bakumisaki Nzambe. Boye, batikaki likanisi ya kobundisa mokili oyo bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bazalaki kovanda.
34 The Reubenites and Gadites called the altar Witness, "For," they said, "it is a witness between us that our Father is God." Bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi babengaki etumbelo yango « Edi » oyo elingi koloba : Litatoli kati na biso ete Yawe azali Nzambe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]