Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joshua 21 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then the heads of the families of the Levites approached Eleazar the priest, Joshua son of Nun, and the heads of the families of the tribes of Israel. Bakonzi ya mabota ya bakitani ya Levi bayaki epai ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe epai ya bakonzi ya bituka ya mabota mosusu ya Isalaele,
2 At Shiloh in the land of Canaan they said to them, "Our Father commanded through Moses that we be given cities to live in, with their pasturelands for our livestock." na Silo, kati na mokili ya Kanana, mpo na koloba na bango : « Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize ete bopesa biso bingumba ya kovanda elongo na mabele na yango mpo na bibwele na biso. »
3 So the Israelites gave the Levites these cities with their pasturelands, out of their own inheritance, at the command of our Father. Boye, kolanda mitindo ya Yawe, bana ya Isalaele balongolaki kati na libula na bango ndambo ya bingumba elongo na mabele na yango, mpe bapesaki yango epai ya bakitani ya Levi.
4 The lot came out for the families of the Kohathites. The descendants of Aaron the priest, who were among the Levites, received by lot thirteen cities from the tribes of Judah, Simeon, and Benjamin. Zeke ya liboso ekweyaki epai ya etuka ya Keati. Bato ya Levi oyo bazalaki bakitani ya Nganga-Nzambe Aron bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi na misato kati na libota ya Yuda, ya Simeoni mpe ya Benjame.
5 The rest of the Kohathites received by lot ten cities from the families of the tribe of Ephraim, the tribe of Dan, and the half-tribe of Manasseh. Bakitani ya Keati oyo batikalaki bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi kati na mabele ya libota ya Efrayimi, ya Dani mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
6 The descendants of Gershon received by lot thirteen cities from the families of the tribe of Issachar, the tribe of Asher, the tribe of Naphtali, and the half-tribe of Manasseh in Bashan. Bakitani ya Gerishoni bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi na misato kati na mabele ya libota ya Isakari, ya Aseri, ya Nefitali mpe ya ndambo ya libota ya Manase, kati na Bashani.
7 The descendants of Merari, by their families, received twelve cities from the tribe of Reuben, the tribe of Gad, and the tribe of Zebulun. Bakitani ya Merari, kolanda bituka na bango, bazwaki bingumba zomi na mibale kati na mabele ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Zabuloni.
8 So the Israelites gave these cities with their pasturelands to the Levites by lot, just as our Father had commanded through Moses. Boye, ndenge Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize, bana ya Isalaele babetaki zeke mpo na kopesa bingumba wana elongo na mabele na yango epai ya bakitani ya Levi.
9 From the tribes of Judah and Simeon they gave the cities named here: Kati na mabota ya Yuda mpe ya Simeoni, babetaki zeke mpo na kopesa bingumba oyo, kolanda bakombo na yango,
10 These went to the descendants of Aaron, of the Kohathite families of the Levites, because the first lot fell to them. epai ya bakitani ya Aron, oyo babimelaki na bituka ya Keati kati na bana mibali ya Levi, pamba te zeke ya liboso ekweyaki epai na bango :
11 They gave them Kiriath-arba, that is, Hebron, in the hill country of Judah, with the pasturelands around it (Arba was the father of Anak). Bapesaki bango Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, elongo na mabele na yango, kati na mokili ya bangomba ya Yuda. (Ariba azalaki koko ya Anaki) ;
12 But they had given the city's fields and villages to Caleb son of Jephunneh as his possession. kasi bapesaki bilanga ya engumba mpe bamboka na yango ya mike-mike, lokola libula epai ya Kalebi, mwana mobali ya Yefune.
13 To Aaron the priest's descendants they gave Hebron, a city of refuge for one who kills, with pasturelands, and Libnah with pasturelands. Epai ya bakitani ya Nganga-Nzambe Aron, bapesaki Ebron lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Libina,
14 Jattir with its pasturelands, Eshtemoa with its pasturelands, Yatiri, Eshitemoa,
15 Holon with its pasturelands, Debir with its pasturelands, Oloni, Debiri,
16 Ain, Juttah, and Beth-shemesh, each with pasturelands—nine cities from these two tribes. Ayini, Yuta mpe Beti-Shemeshi, elongo na mabele na yango. Bazwaki bingumba libwa kati na bituka ya mabota oyo mibale : Yuda mpe Simeoni.
17 From the tribe of Benjamin: Gibeon with its pasturelands, Geba with its pasturelands, Kati na libota ya Benjame, bapesaki bango bingumba oyo : Gabaoni, Geba,
18 Anathoth with its pasturelands, and Almon with its pasturelands—four cities. Anatoti, Alimoni, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.
19 All the cities of the descendants of Aaron, the priests, were thirteen cities with their pasturelands. Bingumba nyonso ya Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, ezalaki zomi na misato elongo na mabele na yango.
20 The remaining Kohathite Levite families received their allotted cities from the tribe of Ephraim. Babetaki zeke mpo na kopesa epai ya bakitani mosusu ya Levi, oyo bazali ya bituka ya Keati, moko kati na bana mibali ya Levi, bingumba oyo, kati na mabele ya libota ya Efrayimi.
21 They gave them Shechem, a refuge city for a killer, with its pasturelands, in Ephraim's hill country, and Gezer with its pasturelands. Kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, bapesaki bango : Sishemi lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Gezeri,
22 Kibzaim with its pasturelands, and Beth-horon with its pasturelands—four cities. Kibitsayimi mpe Beti-Oroni, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.
23 From the tribe of Dan: Elteke with its pasturelands, Gibbethon with its pasturelands, Kati na libota ya Dani, bapesaki bango bingumba oyo : Eliteke, Gibetoni,
24 Aijalon with its pasturelands, and Gath-rimmon with its pasturelands—four cities. Ayaloni, Gati-Rimoni, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.
25 From the half-tribe of Manasseh: Taanach with its pasturelands, and Gath-rimmon with its pasturelands—two cities. Kati na ndambo ya libota ya Manase, bapesaki bango bingumba oyo : Taanaki, Gati-Rimoni elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba mibale.
26 All these were ten cities with their pasturelands for the rest of the Kohathite families. Bingumba nyonso oyo bapesaki epai ya bituka mosusu ya bakitani ya Keati ezalaki zomi, elongo na mabele na yango.
27 From the half-tribe of Manasseh, to the Levite clans of Gershon: Golan in Bashan, a city of refuge for one who kills, with pasturelands; and Be-eshterah with pasturelands—two cities. Epai ya bakitani ya Gerishoni kati na bituka ya bakitani ya Levi, bapesaki bingumba oyo : Kati na ndambo ya libota ya Manase : kati na Bashani, Golani lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, mpe Beyeshitira, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba mibale.
28 From the tribe of Issachar: Kishion with its pasturelands, Daberath with its pasturelands, Kati na libota ya Isakari : Kishioni, Dabirati,
29 Jarmuth with its pasturelands, and En-gannim with its pasturelands—four cities. Yarimuti, Eyini-Ganimi, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.
30 From the tribe of Asher: Mishal with its pasturelands, Abdon with its pasturelands, Kati na libota ya Aseri : Misheali, Abidoni,
31 Helkath with its pasturelands, and Rehob with its pasturelands—four cities. Elikati, Reobi, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.
32 From Naphtali's tribe: Kedesh in Galilee, a refuge city for one who killed, with pasturelands; Hammoth-dor with pasturelands; Kartan with pasturelands—three cities. Kati na libota ya Nefitali : Kedeshi, kati na mokili ya Galile, lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi ; Amoti-Dori mpe Karitani, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba misato.
33 All the cities of the Gershonites, by their families, were thirteen cities with their pasturelands. Bingumba nyonso oyo bapesaki epai ya bakitani ya Gerishoni, kolanda bituka na bango, ezalaki zomi na misato elongo na mabele na yango.
34 To the remaining Levites, the Merarite clans, they gave from Zebulun's tribe: Jokneam and its pastureland, Kartah and its pastureland, Epai ya bituka ya Merari, bakitani ya Levi oyo batikalaki, bapesaki bingumba oyo : Kati na libota ya Zabuloni : Yokineami, Karita,
35 Dimnah with its pasturelands, and Nahalal with its pasturelands—four cities. Dimina mpe Naalali, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.
36 From the tribe of Reuben: Bezer with its pasturelands, Jahzah with its pasturelands, Kati na libota ya Ribeni : Betseri lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Yakatsi,
37 Kedemoth with its pasturelands, and Mephaath with its pasturelands—four cities. Kedemoti mpe Mefati, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.
38 From Gad's tribe: Ramoth in Gilead, a city of refuge for the killer, with its pasturelands, and Mahanaim with its pasturelands. Kati na libota ya Gadi : Ramoti, kati na Galadi, lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Maanayimi,
39 Heshbon with its pasturelands, and Jazer with its pasturelands—four cities in all. Eshiboni mpe Yaezeri, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.
40 All the cities for Merari's families—the remaining Levite families—totaled twelve, by lot. Bingumba nyonso oyo babetelaki zeke mpo na kopesa epai ya bakitani ya etuka ya Merari, bakitani ya Levi oyo batikalaki, ezalaki zomi na mibale.
41 All the Levites' cities within the Israelites' possession: forty-eight, with their pasturelands. Bingumba nyonso ya bakitani ya Levi kati na mabele oyo epesamelaki bana ya Isalaele ezalaki tuku minei na mwambe, elongo na mabele na yango.
42 Each of these cities had its own surrounding pasturelands; this was true of all of them. Engumba moko na moko ezingelamaki na mabele na yango ; ezalaki penza bongo mpo na bingumba yango nyonso.
43 So our Father gave Israel all the land sworn to their ancestors; they took possession of it and settled there. Boye, Yawe apesaki na Isalaele mokili nyonso oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango na nzela ya ndayi. Bana ya Isalaele bazwaki yango mpe bakomaki kovanda kuna.
44 Our Father gave them rest on every side, as he swore to their ancestors. None of their enemies could stand against them; our Father gave all their enemies into their hands. Yawe apesaki bango kimia na bangambo nyonso, kolanda nyonso oyo alakaki batata na bango na nzela ya ndayi. Monguna moko te kati na banguna na bango alongaki lisusu kotelemela bango. Yawe akabaki banguna na bango nyonso na maboko na bango.
45 Not one of all the good promises our Father made to the house of Israel failed; all came true. Kati na bilaka nyonso ya kitoko oyo Yawe apesaki na libota ya Isalaele, moko te etikalaki kokweya ; solo, nyonso ekokisamaki.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]