Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joshua 20 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then our Father spoke to Joshua: Yawe alobaki na Jozue :
2 "Tell the Israelites: 'Designate for yourselves the cities of refuge I spoke to you through Moses, « Yebisa bana ya Isalaele ete bapona bingumba ya kokimela, ndenge nayebisaki bino na nzela ya Moyize,
3 so anyone who kills someone by accident, unknowingly, may flee there—a refuge for you from the avenger of blood. mpo ete moto nyonso oyo akoboma moto na nko te akoka kokimela kuna mpe azwa ebombamelo liboso ya mobukanisi makila.
4 Whoever flees to one of these cities is to stand at the entrance of the city gate and state his case to that city's elders. They will bring him in, give him a place, and let him live among them. Soki akimeli kati na moko ya bingumba wana, akotelema na ekotelo ya ekuke ya engumba mpe akotalisa likambo na ye epai ya bampaka ya engumba wana. Bongo bampaka bakoyamba moto yango kati na engumba mpe bakopesa ye esika ya kovanda elongo na bango.
5 If the avenger of blood pursues him, they must not hand the slayer over to him, because he struck his neighbor unknowingly, without prior hatred. Soki mobukanisi makila alandi ye, bampaka basengeli te kokaba mobomi yango na maboko na ye, pamba te abomaki mozalani na ye na nko te mpe azalaki liboso na makanisi ya mabe te.
6 He must stay in that city until he stands trial before the assembly, and until the high priest serving at that time dies. Then the killer may return to his own city and house, the town he fled from.'" Akotikala na engumba wana kino tango akoleka na esambiselo liboso ya lisanga mpe kino tango mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo azali na mosala na tango wana, akokufa. Na sima na yango nde mobomi yango akoki kozonga na engumba na ye, na ndako na ye, kati na engumba epai wapi awuta. »
7 They set apart Kedesh in Galilee, Naphtali's hills; Shechem, Ephraim's hills; and Kiriath-arba (Hebron), Judah's hills. Bana ya Isalaele babulisaki Kedeshi, kati na Galile, kati na mokili ya bangomba ya Nefitali ; Sishemi, kati na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, kati na mokili ya bangomba ya Yuda.
8 Beyond the Jordan, east of Jericho, they gave Bezer in the wilderness on the plateau from Reuben's tribe, Ramoth in Gilead from Gad's tribe, and Golan in Bashan from Manasseh's tribe. Na ngambo mosusu ya Yordani, na este ya Jeriko, baponaki Betseri kati na esobe, na likolo ya ngomba ya libota ya Ribeni ; Ramoti kati na Galadi, kati na etuka ya libota ya Gadi ; mpe Golani kati na Bashani, kati na etuka ya libota ya Manase.
9 These were the cities designated for all Israelites and foreigners living among them, so anyone who killed someone unintentionally could flee there and not die by the blood avenger's hand before standing trial before the assembly. Yango nde ezalaki bingumba oyo eponamaki mpo na moto nyonso ya Isalaele to mpe mpo na mopaya nyonso oyo azali kovanda kati na bango. Moto nyonso oyo akoboma moto na nko te akoki kokimela kuna, mpo ete mobukanisi makila aboma ye te, liboso ete aleka na esambiselo na miso ya lisanga.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]