Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hebrews 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 So, holy brothers sharing a heavenly call, consider Jesus, the apostle and high priest we confess. Yango wana, bandeko basantu, bino oyo Nzambe abenga mpo na kozwa bomengo ya Likolo, botalela kaka Yesu oyo biso tozali kondima lokola Ntoma mpe Mokonzi ya Banganga-Nzambe.
2 He was faithful to the one who appointed him, as Moses also was in all our Father's house. Solo, azali sembo na miso ya Nzambe oyo aponaki Ye, ndenge Moyize azalaki sembo kati na Ndako mobimba ya Nzambe.
3 Jesus deserves far more glory than Moses, as a house's builder deserves more honor than the house itself. Yesu amonanaki ete akoki mpo na kozwa lokumu monene koleka Moyize ; ndenge moko mpe motongi ndako azali na lokumu monene koleka ndako yango moko.
4 For every house is built by someone, but the builder of all things is our Father. Pamba te, ezali na ndako moko te oyo ezangi motongi ; nzokande Nzambe azali motongi ya biloko nyonso.
5 Moses was faithful in all our Father's house, a servant testifying to what would be spoken later. Moyize azalaki sembo lokola mosali kati na Ndako mobimba ya Nzambe, mpo na kotatola na tina na makambo oyo Nzambe akoloba na mikolo oyo ezalaki kolanda.
6 But Christ, as son, is faithful over his house. And we are his house—if we hold firm the confidence and hope we boast in. Kasi Klisto azali sembo lokola Mwana, Mokonzi ya Ndako ya Nzambe. Mpe biso, tozali Ndako na Ye, soki kaka tozali kobatela makasi kino na suka, kondima mpe lokumu oyo elikya epesaka biso.
7 So, as the Holy Spirit says: "Today, if you hear his voice, Yango wana, kolanda ndenge Molimo Mosantu alobi : « Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,
8 do not harden your hearts as you did in the rebellion, on the day of testing in the wilderness, boyeisa mitema na bino mabanga te, ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe, na mokolo ya komekama kati na esobe
9 where your ancestors put me to the test and saw my works for forty years. epai wapi batata na bino bamekaki ngai mpe balukaki kotala mozindo ya motema na ngai atako bamonaki misala na ngai
10 That is why I was angry with that generation, and I said, 'Their hearts are always going astray, and they have not known my ways.' mibu tuku minei. Yango wana, natombokelaki bato ya ekeke wana mpe nalobaki : ‹ Mitema na bango ezali kobeba tango nyonso, mpe bayebaki banzela na ngai te. ›
11 So I swore in my anger, 'They will never enter my rest.'" Boye, kati na kanda na ngai, nakataki seleka : ‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai ! › »
12 Brothers, watch that none of you has an evil, unbelieving heart that deserts the living Father. Bandeko na ngai, bosala keba ete moto moko te kati na bino azala na motema mabe mpe azanga kondima kino kokabwana na Nzambe na bomoi ;
13 But encourage each other daily, while it is called "today," so none of you becomes hardened by sin's deceit. kasi bolendisanaka bino na bino mokolo na mokolo, na tango nyonso oyo bakoki nanu koloba « lelo, » mpo ete moko te kati na bino akosama na masumu mpe akoma motema libanga.
14 For we have become sharers in Christ, if we truly keep our first confidence firm to the end. Pamba te tozali solo lisanga na Klisto soki tosimbi makasi, kino na suka, elikya oyo tozwaki wuta na ebandeli,
15 As it is said: "Today, if you hear his voice, do not harden your hearts as when you rebelled." kolanda ndenge elobama : « Lelo, soki boyoki mongongo na Ye, boyeisa mitema na bino mabanga te, ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe. »
16 Who heard and rebelled? Wasn't it all who left Egypt through Moses? Banani bayokaki mongongo ya Nzambe mpe batombokelaki Ye ? Ezali te bato nyonso oyo Moyize abimisaki na Ejipito ?
17 With whom was he angry forty years? Was it not with those who sinned, whose bodies fell in the wilderness? Asilikelaki banani mibu tuku minei ? Ezali te bato oyo basalaki masumu, oyo bibembe na bango ekweyaki kati na esobe ?
18 Who did he swear would never enter his rest, except those who disobeyed? Epai ya banani Nzambe akataki seleka ete bakokota te kati na bopemi na Ye ? Ezali te epai ya bato oyo baboyaki kotosa Ye ?
19 So we see they couldn't enter because of lack of faith. Boye, tomoni ete balongaki te kokota mpo ete bazangaki kondima.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]