Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ezra 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 These are the province's people who came up from captivity—those Nebuchadnezzar king of Babylon exiled to Babylon. They returned to Jerusalem and Judah, each to his own town. Tala bato ya etuka ya Yuda, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu na mokili ya Babiloni, mpe, wuta na bowumbu, bazongaki na Yelusalemi mpe na Yuda, moto na moto kati na engumba na ye.
2 They came with Zerubbabel, Jeshua, Nehemiah, Seraiah, Reelaiah, Mordecai, Bilshan, Mispar, Bigvai, Rehum, Baanah—the count of Israel's men: Bazongaki nzela moko na Zorobabeli, Jozue, Neyemi, Seraya, Reyelaya, Maridoshe, Bilishani, Misipari, Bigivayi, Rewumi, Baana. Tala motango ya bana ya Isalaele :
3 The sons of Parosh, 2,172; Bakitani ya Pareoshi : nkoto mibale na nkama moko na tuku sambo na mibale.
4 the sons of Shephatiah, 372; Bakitani ya Shefatia : nkama misato na tuku sambo na mibale.
5 the sons of Arah, 775; Bakitani ya Ara : nkama sambo na tuku sambo na mitano.
6 the sons of Pahath-moab, namely the sons of Jeshua and Joab, 2,812; Bakitani ya Paati-Moabi na nzela ya Jozue mpe Joabi : nkoto mibale na nkama mwambe na zomi na mibale.
7 the sons of Elam, 1,254; Bakitani ya Elami : nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei.
8 the sons of Zattu, 945; Bakitani ya Zatu : nkama libwa na tuku minei na mitano.
9 the sons of Zaccai, 760; Bakitani ya Zakayi : nkama sambo na tuku motoba.
10 the sons of Bani, 642; Bakitani ya Bani : nkama motoba na tuku minei na mibale.
11 the sons of Bebai, 623; Bakitani ya Bebayi : nkama motoba na tuku mibale na misato.
12 the sons of Azgad, 1,222; Bakitani ya Azigadi : nkoto moko na nkama mibale na tuku mibale na mibale.
13 the sons of Adonikam, 666; Bakitani ya Adonikami : nkama motoba na tuku motoba na motoba.
14 the sons of Bigvai, 2,056; Bakitani ya Bigivayi : nkoto mibale na tuku mitano na motoba.
15 the sons of Adin, 454; Bakitani ya Adini : nkama minei na tuku mitano na minei.
16 the sons of Ater, namely of Hezekiah, 98; Bakitani ya Ateri na nzela ya Ezekiasi : tuku libwa na mwambe.
17 the sons of Bezai, 323; Bakitani ya Betsayi : nkama misato na tuku mibale na misato.
18 the sons of Jorah, 112; Bakitani ya Yora : nkama moko na zomi na mibale.
19 the sons of Hashum, 223; Bakitani ya Ashumi : nkama mibale na tuku mibale na misato.
20 the sons of Gibbar, 95; Bakitani ya Gibari : tuku libwa na mitano.
21 the men of Bethlehem, 123; Bato ya mboka Beteleemi, nkama moko na tuku mibale na misato.
22 the men of Netophah, 56; Bato ya mboka Netofa : tuku mitano na motoba.
23 the men of Anathoth, 128; Bato ya mboka Anatoti : nkama moko na tuku mibale na mwambe.
24 the men of Azmaveth, 42; Bato ya Azimaveti : tuku minei na mibale.
25 the men of Kiriath-arim, Chephirah, and Beeroth, 743; Bakitani ya Kiriati-Yearimi, Kefira mpe Beyeroti : nkama sambo na tuku minei na misato.
26 the men of Ramah and Geba, 621; Bakitani ya Rama mpe Geba : nkama motoba na tuku mibale na moko.
27 the men of Michmas, 122; Bato ya mboka Mikimasi : nkama moko na tuku mibale na mibale.
28 the men of Bethel and Ai, 223; Bato ya bamboka Beteli mpe Ayi : nkama mibale na tuku mibale na misato.
29 the men of Nebo, 52; Bakitani ya Nebo : tuku mitano na mibale.
30 the men of Magbish, 156; Bakitani ya Magibishi : nkama moko na tuku mitano na motoba.
31 the sons of the other Elam, 1,254; Bakitani ya Elami mosusu : nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei.
32 the sons of Harim, 320; Bakitani ya Arimi : nkama misato na tuku mibale.
33 the men of Lod, Hadid, and Ono, 725; Bakitani ya Lodi, Adidi mpe Ono : nkama sambo na tuku mibale na mitano.
34 the men of Jericho, 345; Bakitani ya Jeriko : nkama misato na tuku minei na mitano.
35 the men of Senaah, 3,630. Bakitani ya Sena : nkoto misato na nkama motoba na tuku misato.
36 The priests: the sons of Jedaiah, of the house of Jeshua, 973; Tala motango ya Banganga-Nzambe : Bakitani ya Yedaeya, na nzela ya libota ya Jozue : nkama libwa na tuku sambo na misato.
37 the sons of Immer, 1,052; Bakitani ya Imeri : nkoto moko na tuku mitano na mibale.
38 the sons of Pashhur, 1,247; Bakitani ya Pashuri : nkoto moko na nkama mibale na tuku minei na sambo.
39 the sons of Harim, 1,017. Bakitani ya Arimi : nkoto moko na zomi na sambo.
40 The Levites: the sons of Jeshua and Kadmiel, of the sons of Hodaviah, 74. Tala motango ya Balevi : Bakitani ya Jozue na nzela ya Kadimieli mpe ya Odavia : tuku sambo na minei.
41 The singers: the sons of Asaph, 128. Tala motango ya bayembi : Bakitani ya Azafi : nkama moko na tuku mibale na mwambe.
42 The gatekeepers: descendants of Shallum, Ater, Talmon, Akkub, Hatita, and Shobai—139 in all. Tala motango ya bakengeli bikuke ya Tempelo : Bakitani ya Shalumi, Ateri, Talimoni, Akubi, Atita mpe Shobayi : nkama moko na tuku misato na libwa.
43 The temple servants: the sons of Ziha, the sons of Hasupha, the sons of Tabbaoth, Tala basali ya Tempelo : Bakitani ya Tsika, Asufa, Tabaoti,
44 the sons of Keros, the sons of Siaha, the sons of Padon, Kerosi, Siya, Padoni,
45 the sons of Lebanah, the sons of Hagabah, the sons of Akkub, Lebana, Agaba, Akubi
46 the sons of Hagab, the sons of Shamlai, the sons of Hanan, Agabi, Shalimayi, Anani,
47 the sons of Giddel, the sons of Gahar, the sons of Reaiah, Gideli, Gaari, Reaya,
48 the sons of Rezin, the sons of Nekoda, the sons of Gazzam, Retsini, Nekoda, Gazami,
49 the sons of Uzza, the sons of Paseah, the sons of Besai, Uza, Paseya, Besayi,
50 the sons of Asnah, the sons of Meunim, the sons of Nephisim, Asina, Mewunimi, Nefusimi,
51 the sons of Bakbuk, the sons of Hakupha, the sons of Harhur, Bakibuki, Akufa, Aruri,
52 the sons of Bazluth, the sons of Mehida, the sons of Harsha, Batsiluti, Meyida, Arisha,
53 the sons of Barkos, the sons of Sisera, the sons of Temah, Barikosi, Sisera, Tama,
54 the sons of Neziah, and the sons of Hatipha. Netsia mpe Atifa.
55 The sons of Solomon's servants: the sons of Sotai, the sons of Hassophereth, the sons of Peruda, Tala bakitani ya basali ya Salomo : Bakitani ya Sotayi, Sofereti, Peruda,
56 the sons of Jaalah, the sons of Darkon, the sons of Giddel, Yala, Darikoni, Gideli,
57 the sons of Shephatiah, the sons of Hattil, the sons of Pochereth-hazzebaim, and the sons of Ami. Shefatia, Atili, Pokereti-Atsebayimi mpe Ami.
58 All the temple servants and the sons of Solomon's servants were 392. Motango ya basali ya Tempelo mpe ya bakitani ya basali ya Salomo : nkama misato na tuku libwa na mibale.
59 The following came up from Tel-melah, Tel-harsha, Cherub, Addan, and Immer, but could not prove that they or their families were Israelite: Tala molongo ya bato oyo bawutaki na bowumbu, na bingumba Teli-Mela, Teli-Arisha, Kerubi-Adani mpe Imeri, kasi balongaki te kolakisa ete mabota na bango ya botata ewuta na Isalaele :
60 the sons of Delaiah, the sons of Tobiah, and the sons of Nekoda, 652. Bakitani ya Delaya, Tobiya mpe Nekoda : nkama motoba na tuku mitano na mibale.
61 From the priests' sons: the sons of Habaiah, the sons of Hakkoz, and the sons of Barzillai, who married a daughter of Barzillai the Gileadite and took that family's name. Mpe kati na Banganga-Nzambe : Bakitani ya Obaya, ya Akotsi mpe ya Barizilayi oyo abengamaki « Barizilayi » mpo ete abalaki mwana mwasi ya Barizilayi, moto ya Galadi.
62 They searched genealogical records for their names, found none, and were excluded from the priesthood as unclean. Balukaki mikanda oyo bakoma bakombo ya bakoko na bango, kasi batikalaki komona yango te. Boye balongolaki bango na mosala ya bonganga-Nzambe, pamba te bazalaki mbindo.
63 The governor told them not to eat the most holy food until a priest stood with the Urim and Thummim. Moyangeli apekisaki bango kolia bilei ya bule kino tango Nganga-Nzambe moko akotuna toli ya Yawe na tina na bango, na nzela ya Urimi mpe Tumimi.
64 The whole assembly together numbered 42,360, Motango ya lisanga mobimba ya bato oyo bawutaki na bowumbu ezalaki nkoto tuku minei na mibale na nkama misato na tuku motoba,
65 besides their male and female servants, who were 7,337; and they had 200 male and female singers. bakisa bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi, nkoto sambo na nkama misato na tuku misato na sambo ; bazalaki na bayembi na bango ya basi mpe ya mibali, nkama mibale ;
66 Their horses were 736, their mules 245, bampunda ya bitumba, nkama sambo na tuku misato na motoba ; bamile nkama mibale na tuku minei na mitano ;
67 their camels 435, and their donkeys 6,720. bashamo nkama minei na tuku misato na mitano ; mpe ba-ane nkoto motoba na nkama sambo na tuku mibale.
68 When they reached the house of our Father in Jerusalem, some family heads gave voluntary offerings for the house of our Father, to rebuild it on its site. Tango bakomaki na Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi, bakambi mingi ya mabota bapesaki makabo oyo bakataki bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango mpo na kotonga lisusu Tempelo ya Nzambe, na esika na yango ya kala.
69 As they were able, they gave the work's treasury 61,000 gold coins, about 6,250 pounds of silver, and one hundred priests' garments. Bapesaki na libenga ya misala, moto na moto kolanda ezweli na ye, mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku motoba na moko, mbongo ya bibende ya palata nkoto mitano, mpe banzambala nkama moko ya mosala ya bonganga-Nzambe.
70 The priests, Levites, some of the people, singers, gatekeepers, and temple servants settled in their towns—all Israel in their towns. Banganga-Nzambe, Balevi, bakengeli bikuke, bayembi, basali ya Tempelo, ndambo kati na bato mpe bato nyonso ya Isalaele bavandaki kati na bingumba na bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]