Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ezra 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In Cyrus king of Persia's first year, to fulfill our Father's word through Jeremiah, our Father stirred Cyrus king of Persia's spirit, so that he sent a proclamation throughout all his kingdom and put it in writing: Na mobu ya liboso ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Yawe alamusaki molimo ya Sirisi, mokonzi ya Persi, mpo na kokokisa liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi, mpo ete asakola mpe akoma boye kati na mokili na ye mobimba :
2 This is what Cyrus king of Persia says: "The LORD, God of heaven, has given me all the kingdoms of the earth, and has appointed me to build him a house at Jerusalem in Judah. « Tala makambo oyo Sirisi, mokonzi ya Persi, alobi : ‹ Yawe, Nzambe ya Likolo, apesi ngai babokonzi nyonso ya mabele mpe mokumba ya kotongela Ye Tempelo, na Yelusalemi kati na Yuda.
3 Whoever among you of all his people—may his God be with him—let him go up to Jerusalem in Judah and rebuild the house of the LORD, the God of Israel; he is the God in Jerusalem. Tika ete moto nyonso oyo, kati na bino, azali na molongo ya bato ya Yawe akende na Yelusalemi kati na Yuda mpo na kotonga Tempelo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo azali Nzambe kati na Yelusalemi !
4 Let every survivor, wherever he lives, be helped by the people of his place with silver, gold, goods, and livestock, along with voluntary offerings for the house of God in Jerusalem." Tika ete bavandi ya bisika nyonso oyo bato ya Yuda bazali bapesa bango, mpo na Ndako ya Nzambe oyo ezali na Yelusalemi, makabo oyo : palata, wolo, bibwele, biloko ya ndenge na ndenge mpe makabo oyo bakati bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango. › »
5 Then the family heads of Judah and Benjamin, the priests and Levites—everyone whose spirit our Father had stirred—set out to go up and rebuild the house of our Father in Jerusalem. Bongo bakambi ya mabota ya Yuda mpe ya Benjame, Banganga-Nzambe mpe Balevi, elongo na moto nyonso oyo Nzambe atutaki motema babongamaki mpo na kokende kotonga Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi.
6 All their neighbors supported them with articles of silver and gold, goods, livestock, and valuable gifts, besides everything freely offered. Bato nyonso oyo bazalaki zingazinga na bango basungaki bango ; bapesaki biloko esalema na palata mpe na wolo, bibwele, biloko ya ndenge na ndenge, bakado ya talo mpe makabo oyo bakataki bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango.
7 King Cyrus also brought out the articles of our Father's house that Nebuchadnezzar had taken from Jerusalem and put in his own gods' house. Mokonzi Sirisi abimisaki biloko ya Tempelo ya Yawe, oyo Nabukodonozori amemaki wuta na Yelusalemi mpo na kotia yango kati na tempelo ya nzambe na ye.
8 Cyrus king of Persia had Mithredath the treasurer bring them out, counting them to Sheshbazzar the prince of Judah. Sirisi, mokonzi ya Persi, atindaki Mitredati, mobombi bozwi na ye, ete abimisa, atanga mpe apesa yango epai ya Sheshibatsari, moto ya libota ya bakambi ya Yuda.
9 This was their number: 30 gold basins, 1,000 silver basins, 29 incense burners, Tala biloko yango mpe motango na yango : bakopo ya wolo ezalaki tuku misato ; bakopo ya palata ezalaki nkoto moko ; basani ya mbele ya palata ezalaki tuku mibale na libwa ;
10 30 gold bowls, 410 silver bowls of another kind, and 1,000 other articles. basani ya wolo ezalaki tuku misato ; basani minene ya palata ezalaki nkama minei na zomi ; biloko mosusu ezalaki nkoto moko.
11 The gold and silver articles numbered 5,400. Sheshbazzar brought them all up when the exiles came up from Babylon to Jerusalem. Motango ya biloko nyonso ya wolo mpe ya palata ezalaki nkoto mitano na nkama minei. Sheshibatsari amemaki biloko yango nyonso tango bato oyo bakendeki na bowumbu balongwaki na Babiloni mpo na kozonga na Yelusalemi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]